20-0621 Mokangami

NSANGO: 63-0717 Mokangami

PDF

BranhamTabernacle.org

Bandeko Mibali pe Basi,

Oh Nzete Mwasi-na-libala, mitema na biso ezalaki kopela moto te na kati na biso mokolo ya Lomingo wana Asangisaki biso lisusu elongo na mokili mobimba mpo na kolobela biso ete :

“Bokosala eloko oyo Ngai nayebi, lokola Mwasi-na-libala.”

“Bokozala eteni na Ngai. Bokozala Mwasi-na-libala na Ngai.”

“Bomoi na Ngai ekozala na kati na Nzoto na bino. Bobele ndenge mobali na mwasi bazali moto moko, bino na Ngai tozali moto Moko.”

“Na mokolo wana, bokoyeba ete Ngai nazali kati na Tata, Tata azali kati na Ngai, pe Ngai kati na bino, pe bino kati na Ngai.”

Tozali na suka ya mokolo ya misato. Asilaki komitalisa Ye moko pe ayaki kati-kati na biso, pe alobaki:”Botala Ngai. Nazali Moto yango moko. Nyonso oyo Ngai nazali, Nasopaki yango na kati na Klisto, Nyonso oyo Klisto azalaki, Nasopaki yango kati na bino. Boye bino na ngai tozali MOKO..”

Alakaki na biso ete Akozongisa mibu oyo gazam, sauterelle, jelek na hasil baliaki. Alobaki na biso ete bozali baoyo nabongisaki ete bokozala kati na misisa ya Nzete yango.

Makambo oyo nyonso ekokaki kosalema te kino na eleko oyo. Oyo ezali mokolo, oyo ezali ntango, pe biso tozali Nzete Mwasi-na-libala na Ye oyo ezongi lisusu. Mpo na nini eleko oyo ?

Bango nyonso basangani elongo, oh, amen, na suka ya mokolo ya misato

Pe Asili kokokisa likambo yango na kotelemisa mokili, kovandisa biso na ba-ndako na biso mpo  Mwasi-na-libala na Ye akoka kosangana na mokili mobimba mpo na koyoka Bilei oyo esilaki kobombama mpo na mokolo ya misato.

Pole ya mpokwa esili koya, pe Ezali kotelisa mbuma likolo na Nzete pe ezali kobimisa Mwasi-na-libala na bilembo ndenge moko, bikamwa ndenge moko, pe mbuma ndenge moko na oyo bazalki na yango na ebandeli. Nasili kozongisa, elobi Yahweh.

Bongo, tolingi kokangama na ekanganelo na Liloba Yango. Ata mokili elobi nini, ata bato mosusu balobi nini, biso tokangami na ekanganelo ya Liloba Oyo, Nsango oyo, ba-Bandes oyo, pe makambo mosusu ezali na ntina te. Tosili koteka mayaka mosusu nyonso, mpo tosili kozua Mayaka oyo na motuya.

Tosangana elongo lisusu moko na Lomingo oyo na ngonga ya 13h00, ngongo ya Jeffersonville mpo na koyoka liteya : MOKANGAMI oyo eteyamaki moko ya 17 juillet 1963, wana tokomipesa lisusu biso moko na Ye mpo na komikaba mobimba pe kokangama na Ye na miniololo ya bolingo. Tolobela Ye na bozindo ya mitema na biso ete :

“‘Esika nyonso oyo Yo okokamba, ngai nakolanda Yo, Nkolo.’ Nakozala mokangami.”

 Ndeko Joseph Branham