20-0614 Kozongisama Ya Nzete Mwasi-Na-Libala

Sango: 62-0422 Kozongisama Ya Nzete Mwasi-Na-Libala

Molingami Nzete-Mwasi-na-libala,

Eloko nini ezali kosalema na mokili mobimba na ngonga oyo mpenza? Lisakoli ezali kokokisama. Makambo nyonso ebebi, bato bazali kobomana, kilikili bisika nyonso, mokili mobimba esili kobulungana mpenza. Kasi Mwasi-na-libala na Ye azali mpenza kopema, mpo bazali kokoma eloko Moko na Tata. Nzambe azali kosangisa Mwasi-na-libala na Ye kino bango nyonso bakoma na boyokani ebongi be kati na bango na Nzambe. Libondeli na Ye ezali kokokisama, tozali kokoma eloko Moko na Ye.

Tozali na lolenge na Ye, na bomoko na Ye, na elilingi ebongi be ya Nzambe na bomoi, mpo tokomi bana-mibali pe bana-basi. Tokabwani te, kasi Molimo yango moko, Nzambe yango moko, Moto yango moko, tosangani na libala na Yaweh. Bomoni lolenge nini Nzambe abongisaki likambo yango mpo tozala na bokesene te, kasi tozala lokola Ye! Tozala te moto mosusu ya ekolo mosusu, kasi tozala na bosangani ya solo, bakitani ya Oyo-na-Nguya-nionso, na nzela na bosangani mosanto.

Lolenge bobele moko oyo tokoki kokoma eloko Moko na Ye na bomoko ezali koboya kokotisa makanisi to kotangwa na Liloba ata moko. Tosengeli kondima Liloba nyonso.

Azali elongo na biso mokolo mobimba, Azali kokamba biso, koleisa biso na Bilei na Ye oyo ebombamaki. Alingi biso pe azali kosangana na biso ntango nyonso; tozali sikawa kokoma na elilingi na Nzambe, tozali na boyokani ebongi be na Ye na nzela ya Liloba na Ye. Klisto na Mwasi-na-libala na Ye bazali eloko Moko.

Tozali lolenge moko, Molimo ndenge moko, misala ndenge moko, bilembo ndenge moko, makambo nyonso mosusu. Ezali suka ya mokolo ya misato, Asili komimonisa mbala moko lisusu na Mwasi-na-libala na Ye, Azali kosangisa Mwasi-na-libala na Ye na nzela ya Liloba Elobami.

Eloko nini ezali kosalema lelo mpo na Mwasi-na-libala na Ye na mokili mobimba?

Ezali lisusu Pasika mpo na bandimi ya solo ya Liloba oyo ekweyaka-ata-moke-te. Ezali Pasika. Ezali lisekwa. Nzambe azali na bato bisika nyonso. Ezali Pasika mpo na bango…

Momboto ya Bokonzi asili kobombama kati na misisa, Liloba, abombami awa na nse kati na Liloba oyo, mibu na mibu na mibu, pe sikawa nde abandi komonisama. Ezali eleko ya Pasika. Ebongisamaki liboso na kozalisama ya mokili, Lingomba oyo ebandi kotelema.

Tozali kobika lisekwa ya Pasika bobele ndenge oyo Asalaki mpo na Mobali-na-libala. Pole ya mpokwa esili koya pe emonisaki Ye moko polele liboso na momboto na Ye oyo ebongisama liboso. Ezali Nzete ya Mosakoli oyo ebongi be, ezali koteya Liloba ya Mosakoli oyo ebongi be, na misala ya Mosakoli oyo ebongi be, mbano ya Mosakoli oyo ebongi be, ba-mbuma ya Molimo oyo ebongi be.

Pole ya mpokwa esili koya mpo na mwango ndenge moko oyo Pole ya ntongo eyelaki, mpo na kozongisa lisusu Liloba na Nzambe  na mobimba, komonisama mobimba ya Klisto kati na Lingomba na Ye. Nyonso oyo Ye asalaki, bobele ndenge moko oyo Ye asalaki ntango wana, Asili kosala yango lisusu.

Asili komonisa biso ete Nzete Mobali-na-libala, kozanga Mwasi-na-libala, ekoki kobota mbuma te, na boye Asengeli kozala na Mwasi-na-libala mpo na kokokisa Liloba na Ye. TOZALI  nzete Mwasi-na-libala yango. Tobotami na lolenge yango moko, Liloba oyo elati nzoto kati na nzete.

Ezali mpenza ntango ya esengo mingi mpo na Mwasi-na-libala na Ye. Tokozala mbala moko lisusu eteni ya lisakoli oyo ezali kokokisama mokolo na Lomingo oyo wana tokosangana elongo na ngonga ya 12h00, ngonga ya Jeffersonville, mpo na koyoka liteya oyo : KOZONGISAMA YA NZETE MWASI-NA-LIBALA, eteyami mokolo ya 22 avril 1962.

Nazali kobondela ete Molimo Mosanto akende na Yango na ba-bandes oyo na bikolo nyonso. Pe soki nasengeli kotika mokili oyo, tika ete Yango ekoba kobika, Nkolo. Ezali Liloba na Yo. Tika ete Pole na mpokwa engenga, Nkolo, ebimisa Mwasi-na-libala kitoko oyo ya Klisto. Pambola Yango, Nkolo. Tika ete Ezonga epai na Yo mpamba te. Tika ete Ekokisa ntina oyo Yango etindamaki. Kokisa yango, Tata. Lokumu nyonso ezala mpo na Yo.

Molimo Mosanto moko oyo eteyaki Liteya Oyo esili koleka mibu 58 ekozala na moko na moko na biso na ba-ndako na biso, na mangomba na biso, na ba-lopitalo, ata esika nini oyo tokosangana mpo na koyoka Liloba oyo. Lingomba, na boike nyonso, ezali kosangana na bomoko, moko awa pe moko kuna. Tozali kokoma Mwasi-na-libala na Ye.

Ndeko Joseph Branham