Category Archives: Uncategorized

26-0301 MOMBOTO EZALI MOSANGOLI NA LIBULA ELONGO NA EZIPELO TE

Nsango: 65-0218 MOMBOTO EZALI MOSANGOLI NA LIBULA ELONGO NA EZIPELO TE

BranhamTabernacle.org

Balingami Mwasi Liloba Moseka,

Nazali kofanda awa na ntóngó oyo koyóka epakweli moko ya ndéngé wana lokóla ezali ngai koyóka, kotanga mpe koyékola Litéya liye Mwasi ya libála akozala koyóka mokolo mwa Lomíngo. Bomoto na ngai mobimba epakólámí.

Motéma mua ngai mozali kopunjwa-punjwa na esengo ya ndéngé wana koyeba ete, TOKOYANGANISAMA BANSO ELONGÓ LONGWÁ NA MOKILI MOBIMBA NA EPAKWELI OYO MOKO. Tokozala kosepela, kosánzola Nkoló, nyoso na ntango yango moko, lokola Azali koloba na moko na moko na bisó mpe komónisa Liloba na Ye.

Kopakolama ekozala mpenza monéne mingi na motindo ete ekozala na kogánga mpe milóló, “Aleluya, amen, Nkombo ya Nkoló ésánzolama” longwá na mokili mobimba na ntango yango moko, lokola tozali kotóndisa Lóla na masánzoli mpe kokúmisa ya bisó.

Nini nde ekozala kosálema? Nzambe akozala kosangisa mpe koloba na Mwasi na Ye ya libála. Tokozala Lisangá Moko, kati na likanisi moko mpe lobánzo moko lokola Azali komífungola mpe komímónisa epai na bisó.

Ezali na esiká monéne te epai wapi okoki kokende, Mongóngó monene te koleka okoki koyóka; ezali na epakweli eleki monéne te soko bobele te Mongóngó ya Nzambe koloba na yo mbala moko likoló ya ba bande.

Nzambe asénzéláki Liloba na Ye longwá na ebandeli mpe apésákí esiká wapi bana na Ye nyoso bakoki kokende mpe koyóka Ye koloba mpe kolimbola Liloba na Ye moko. Epai wapi ezali na kobánzabanza te, kolikia te, komítúna te, Ezali esiká epésámí na Nzambe koyóka YANGO ELOBÍ NKOLÓ.

Ntango emónísámélí yo, ezali lokola pole monéne koleka oyo epelísámí kati na motéma mpe bomoto na yo…ogángí, “nde yango oyo. Namóní yango. Nazali MOKO NA LILOBA. NAZALI LILOBA. NAZALI MWASI YA LIBALA. NAKÓMÍ NA NGAI.”

Ezali kokóma, nde bayébí yango te. Bomóní, nde yango. Bomóní? Ee, mobali. “Zambí esiká Nzóto oyo ekúfí ezali, wana nde ba mpongo bakoyangana,” mpenza kaka lokola molongo. Bomóní? Nde oyo Elobákí. Nzóto oyo ekúfí nde nini? Liloba. Azali Liloba, Nzóto oyo ekúfí, Klisto! “Klisto kati na yo,” lolengé moko lobi, lelo, mpe libela. Boni Ezali solo!

Lokola tozali koyangana koyóka Liloba, mitungisi nyoso ya bisó, mokumba ya makanisi na bisó, makambo ya bisó nyoso, ilímwí na yango sé kolímwa. Tozali kosepela lokola toyebi ete tozali na eloko moko te ya komítungisa na yango; tozali Mwasi na Ye ya libala. Azali kaka elongó na bisó te, KASI AZALI KATI NA BISÓ. TOZALI MOMBÓTO MWASI LILOBA. Nyoso ebongí be. Ntango na Ye ebongi be. Tobongí be.

Tosepélí koleka mpe tozali na matóndí mingi koloba ete tozali Liloba na Ye libótámí moseka tomónísámí; Yesu Klisto lolengé moko lobi, lelo, mpe libela, kobika mpe koúmela na kati na bisó. Alelúya!

Tokokí te kokakola likoló ya LILOBA ATA MOKO. Tosengeli koyóka Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande.

Osí omóná mpongo kokakola? Te, mobali. Ezali te na kokakola kati na Ye. Nde bongo Moklisto mpenza ya solo a kokakola soki te. Azali zololo te. Akoluka na etingia kino ázua Yango. Amen. Ee, mobali. Akozua Mosuni na ye. Alingí Máná ma sika. Akokita na nsé Kúná mpe akotímola kino ázua Yango. Akopumbwa likoló mpe likoló koleka. Soko eloko ezali te na lobwaku oyo, akopumbwa mwa likoló lisúsu koleka. Na bomatáká likoló mingi, nde okoki komóna polélé. Na bongo ntango ekokí mpo ya ba mpongo ya lelo oyo bákoka kopumbwa likoló koleka, bátímola kati na bilaká ya Nzambe, bábíka te na biléi ya ba kómbékómbé  oyo ibomámáki esili koleka mbúla ebelé; bóbima na yango.

Bómilengela Mwasi ya libála, tokozala kolia Máná mangó ma sika, kofánda na nsé ya epakweli monéne koleka oyo ezali, Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka: 65-0218 Mombóto Mozali Mosangoli Libulá Elongó Na Ezipelo Te.

Tobiángi Mwasi ya libala útá na mokili mobimba komíbakisa na bisó kosala lipati likoló ya Nzela ya Nzambe ebongí be epésámí mpo ya lelo. Esiká sé moko wapi MWASI YA LIBÁLA akoki koloba amen na Liloba nyoso. Epai wapi epakweli ya likoló koleka ya Molimó Mosanto ezali koloba mpe kobongisa be Mwasi na Ye ya libála na nzela ya Bofináká Play mpe boyókáká mpe boyambáká Liloba na Ye.

Ndeko Joseph Branham

Makomi:

 St. Matai 24:24

St. Luka 17:30

St. Yoane 5:24/ 14:12

Baloma 8:1

Bagalatia 4: 27-31

Baebele 13:8

1 Yoane 5:7

Emóniseli 10

Malaki 4

26-0222 Moto Oyo Azali Kokíma Longwa Na Bozali Na Nkolo

Litéya: 65-0217 Moto Oyo Azali Kokíma Longwa Na Bozali Na Nkolo

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Ba Mpate,

Lokúmu Nini mpe libakú malamu oyo ezali koloba ete: “Tozali Ba mpate ya Nzambe, baoyo Atíndélákí bisó mwanje na Ye ya nsambo motindami kobiánga kobima mpe koléisa Máná ma Ye mabómbámákí mpe mabátélamákí.”

Tosepélí mpe tondimí Etíndá oyo ezali Mongóngó mwa Nzambe motíndamákí kobongisa be Mwasi na Ye ya libala. Tondimí ete ezipelo ezali komílongola na lisángó, mpe sikawa Mwasi na Ye ya libála azali kofánda kati ya bozali ya Mwána, KOFINA PLAY mpo na kotela.

Mpe nde ntina tozali awa, moningá, Kotíkala kati na bozali ya Mwana kino mwa ebólo moké na bisó ya bato awa, kino ekokóma mpenzá ekémbí epai na Klisto, kokóma lípa likoló ya mesa na Ye. Yango nde Nalingí ésála.

Moto nyoso azángí Kondima ete KOFINA PLAY mpe koyóka Mongóngó mwa Nzambe mondimísámí koloba nde Mongóngó ya motúya koleka osengeli koyóka, azali moto oyo azali kokíma longwá na bozali ya Nzambe.

Osengelí kokútana na yango, to kosála eloko moko na ntina na yango. Ozali na mokúmbá, moto na moto azali na yango, mpe osengeli kokutana na makambo maye.

Boni eténi ya Liloba oyo ezali solo mpe na motúya mpo ya lelo. Ezali na kokabwana mingi mpenza kati ya babiángámí ya Nzambe kobima. Ezali nde na litómbá mingi koyókisa ba bande kati na losámbo koyóka Mongóngó ya Nzambe, soko ezali nde sikawa likambo ya motúya mingi mpo ya batéyi kotéya Liloba?

Nzambe abiángákí mpe atíakí batéyi awa kobatela Liloba libosó ya bato. Bazali Babáteli ya ba mpate. Liloba lilakisí boye. Basengélí bátósama mpe bámemiama lokola bato Nzambe abiángí mpe atíí.

Tokoki te, mpe tosengelákí te, soko moké te koloba ete Bazali Mwasi ya libála te. Ezali MABE mpe ezali te éngébéné na oyo mosakoli alakisakí bisó. Nayóká bato koloba: “Soko Bazali koyókisa ba bande te kati ya masámbo na bango, bazali batémeli ya Liloba”. Bosengélákí sokí moké te koloba likambo ya loléngé ya bongo. Etálísí ngai ozali na molimó mabé.

Nayókákí basúsu koloba, “Basengelí bango nyoso báyoka elongó moko na EB na mbala moko soko boye te Bazali libándá na Mokáno ya Nzambe”. Osengelákí soki moké te koloba likambo ya lolengé wana. Bobele Nzambe nde ayébí nani nde azali to nani te nde azali Mwasi ya libála. Oyo wana ezali te molimó ya Mwasi ya libála koloba likambo ya lolengé wana.

Kútu bato basúsu baoyo bazali koyóka elongó moko na EB bazali koloba, “ soko okei na losámbo koyóka ba bande mpe ozángí kolanda na lisangá útá na ndako na yo ozalí na libúngá!” Elóngóbání te bandeko mibali mpe basi. Soko ozali koloba Yango, TÍKÁ, ozali na libúngá. Moto nyoso asengélí ásála lokola BAYÓKÍ ETE BAKAMBÁMÍ NA NKOLÓ KOSALA.

Batéyi mingi bayókaka ete kotéya nde nzela epésámí na Nzambe mpo ya lelo. Tomóní na bisó kaka nde makambo na lolengé lokeséni, ezali solo. Mbala boni nde Ndeko Branham Asálákí bokokanisi oyo moko? Toútí kaka koyóka ye kati na M&B, ntango bato bazalaki koloba na ntina ya Ndeko Jackson kozala kati na libúngá, akwéisákí bango koloba likambo nini mabé kotémela ye mpe lingómbá na ye.

NAzali kaka kotéya na nzela ya mokandá oyo eloko Nandimaka ete ezali nzela ya Nzambe epésámí mpo na Eyánganelo ya Branham. Bazali bandeko na bisó mibali mpe basi. Balingí Nkoló mpe Etindá oyo. Nde lolengé bayokaka ete Nkoló azali kokamba bango. Masánzoli na Nkoló.

Bamónaka yango nzela moko mpe tomónaka yango nzela mosúsu, ezali malamu. Nakoki komóna nzela ya bango te lokóla mpe bakoki te komóna nzela ya ngai. Mpo na ngai, ezali na nzela mingi Nzambe apésá, kasi ezali na NZELA SÉ MOKO EBONGÍ BE, MPE MPO NA NGAI YANGO NDE KOFINA PLAY.

Nabóndeli Násósolama mabé te awa. Kotiama maboko ezali 100% éngébéné na Liloba. Kopakola Mafúta mpe kobondela mpo ya babélí Ezali Liloba ya Nzambe kokokana na Makomí. Ndeko Branham atéyákí mpe alakisákí yango nyoso mibalé epai na bisó ete ezali Liloba. Kasi Nalingí NZELA YA NZAMBE EBONGÍ BE EPÉSÁMÍ…KONDIMA KAKA MPO ETE NZAMBE ALOBAKI BONGO. Nde eloko Nazali kobunda kosála.

Kasi sikawa mpo ya lobíko na nzóto, ezali bobele mawa ya Nzambe ete A, “Na mapipí ma Ye bosili bobikisamákí.” Sikawa, ya libosó Liloba lilobí bongo, yango esengelaki kokoka, Kasi soko ondimí yango te kati na Liloba, na bongo ezali na makabo kati ya Lingómbá, lokola mibali baoyo bapémélámí koyeba boni kolakisa yango, oyo bakokómisa yango mpenza polélé epai na bino, yango nde, mpe Kondima ya Kondima.

Nandimaka bótáno ya botéi. Nandimaka ete ezali na mibali babiángámí na Nzambe kotéya mpe kolakisa Liloba. Kasi, Nandimi koyóka Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bánde nde NZELA YA NZAMBE EBONGÍ BE MPO YA NGAI.

Na boyókáká ba bánde, Nasengélí kútu te kosósola, KAKA KONDIMA LILOBA NYOSO NAZALI KOYÓKA. Ezali na moto te, motéi, esiká mosúsu te epai wapi Nakoki kokende wapi Nandimí LILOBA MOKO NA MOKO mpe kotía Séko na Sékó ya ngai na yango, sokí kaka ba bánde te.

Naino libosó soko moké te útá ebandeli ya ntango epésákí Nzambe bato na Ye makila malamu mpe makoki ya komíyókela Mongóngó na Ye koloba mbebu na litói. Libómbami nyoso limónisámí kati na ba bánde. Motúná moko na moko moyanólámí likoló ya ba bánde. Nyoso oyo Mwasi ya libála asengeli na yango kobongisama be ezali likoló ya ba bánde.

Liloba moko na moko lilobámí likoló ya ba bánde ezali Liloba ya Nzambe. Nakoki ntango mosúsu te kosósola to kozala na makoki ya kolimbola makambo nyoso, kasi nasengélí kosala yango te. Aséngí kaka ete náloba AMEN NA LILOBA MOKO NA MOKO, mpe ba BÁNDE nde esiká sé moko Nakokí kosala yango.

Kasi ntango—ntango osengelí kosála eloko moko ekesení, ntango osengelí kotelema likoló na oyo motéma na yo moyebisi yo ete ezali Solo, wana nde eténi makási, nde kaká eyaka, wana mpenza.

Nandimí na nyoso oyo ezali kati na ngai, tozali kati ya Mokáno mwa Nzambe mobongi be mpe likoló na masúwa kokende Niníwa. Nakolinga ete mokili mobimba báya konana likolo ya masúwa ma bisó elongó na bisó Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka Nzambe koloba na ba Mpate na Ye.

Ndeko Joseph Branham

Litéya: 65-0217 “ Moto Oyo Azali Kokíma Longwá Na Bozali Ya Nzambe”

Makomi ya kotánga:
Yona1:1-3
Malaki 4
St. Yoane 14: 12
Luka 17:30

26-0215 MITUNA MPE BIYANO #4

Nsango: 64-0830E MITUNA MPE BIYANO #4

BranhamTabernacle.org

Balingami Libóta Ya Bokonzi,

Ezali kaka na esiká MOKO endimísámí epai wapi bokoki kokende koyóka Nkoló koloba na nzelá ya mwanje na Ye mpe koyebisa bino, “ Ntango nyoso bókanisa, bozali bana ya Nzambe, Libóta ya Bokonzi na Makila ya Bokonzi. Ezali na Makila malamu te koleka oya bino kati ya mokili. Bozali bana na ngai, bopalangání na mokili mobimba, baoyo nabótélí Klisto.”

Tozali Libóta ya Nzambe ya Bokonzi na Makilá ya Bokonzi kotámbola kati na misisá mia bisó. Bana baoyo babótáméli Klisto na nzela ya Mongóngó ya Nzambe koloba na nzela ya mosakoli na Ye ya nguya. Ekokí kozala malamu te koleka wana baninga na ngai.

Ndeko Branham, Mwasi ya libala akosengela nde kokende na Jeffersonville to na Arizona mpo ya kozala kati ya Konétolama?

“Mibalé bakozala na mbéto; Nakokamata moko mpe Nakotika moko; mpe mibalé na elanga, mpe Nakokamata moko mpe Nakotika mosúsu.” Bomóní? Na bongo bakozala ntango mosúsu…Kati na mokili mobimba, bakoyángana te na esiká moko na mokili mobimba kozala na biloko nyoso elongó. Kasi mabóké moké ya bango bakopalangana na mabelé nyoso.

Na boye kati na nzóto, tokozala te kati na esiká moko na mbala moko. Kasi nkémbo na Nzambe, Azalaki kútu na mwángo monéne koleka koyéisa Mwasi na Ye ya libala elongó.

Tozali kobóndela mpo ya mangómba nyoso mpe biyánganelo baoyo bayánganákí zingázingá ya—ya—ya mwa ba mikoló Kúná libándá, útá na mbóka, na molaí na nzela kino Libóngo ya Eloli, likoló Kúná na ba ngómbá ya Arizona, na nsé Kúná na mabándá ya Texas, kino na Libóngo ya Monyele, kati ya ekólo mobimba, Nkoló, epai wapi bayángánákí. Ngonga mingi ikéséní, lokola tozali na kati ya ntango, kasi, Nkoló, tozali elongó na pókwa oyo lokóla lisangá moko, bandimi, kozila boyéi ya Masiya.

Lelo, ezali kaka te ete Azali koyanganisa Mwasi na Ye ya libala longwá na ekólo oyo mobimba, kasi Azali koyanganisa BISÓ longwá na mikili 7 ya molongo. Longwá na Afrika kino na Antartíka. Ameríka ya epai ya Likoló mpe Ameríka ya Ngelé, Azía, Ositralia mpe Erópa. Azali koyanganisa mpe kosangisa Mwasi na Ye ya libála kokóla LISANGÁ MOKO koyóka Mongóngó ya Nzambe.

Ayebisaki bisó tókende na losámbo; atá epai bazali kotéya ndámbo ya Liloba, KINO tokoki kozua lingómbá epai wapi batéyaka LILOBA MOBIMBA. Masánzoli na Nzambe Mwasi ya libála azuí sikawa esíká yango, Mongóngó ya Nzambe likoló ya bande nde LILOBA MOBIMBA.

Ózala na losámbo na yo ya Bánde oyo obiángi losámbo na yo, losámbo ya bino epai wapi mabóta mingi bayangani, to kati na mwa ndako moké kati na zámba ya Amazoni to Afrika, epái sé epái okokí Kofina Play koyóka Mongóngó ya Nzambe koloba na yo mbebu na litói, okozala kati ya LOSÁMBO YA LILOBA MOBIMBA.

Tokútí losámbo yango ya Liloba mobimba mpe Tozali kobiánga yo komíbakisa na bisó Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka: Mitúná Mpe Biyano # 4 64-0830E.

Ndeko Joseph Branham

26-0208 MITUNA MPE BIYANO # 3

Nsango: 64-0830M MITUNA MPE BIYANO # 3

BranhamTabernacle.org

Balingami Babótami Epai na Klisto,

Loléngé nini nde moto akoki kotia na maloba na ye ya mokúfi bolingo mpe esengo izali kati na mitéma mia bisó koyéba Emóniseli ya solo ya Liloba na Ye mpo ya mokolo ya bisó? Kokanisa ete tozali na eloko ya kosála te na yango, kasi YE, NAZALI ya Monéne, na boponi na Ye moko, Abongisákí BISÓ libosó kozala na eloko elekí Monéne Akokákí kopesa bisó, EMÓNISELI YA LILOBA NA YE MPO YA MOKOLO NA BISÓ.

Azilákí, kino litóndí ya ntango eyáki kopémela péma ya bomoi kati na bisó, ete tókoka koyóka Ye koyebisa bisó mpe koloba:

Sikawa, Namékákí makokí na ngai nyoso ko—ko—koyebisa bino bato mpe kokamba bino lokola tata akokambaka bana na ye. Bozali bana na ngai; Nabótéli Klisto bino na nzela ya Nsango Malamu oyo natéyaka. Bomóní? Mpe Na—Na—Nalingí bókóla pelamoko bana bakémbá kokémba, to—to bana. Mpe Nalingí kotálisa bino epai na Klisto na mokolo wana, lokola Paulo alobaki: “ Moseka peto.” Ezali na eloko moko te kati na Liloba wana oyo motéma na bino ekozánga Kondima “amen” na yango.

Nzambe, koloba na nzela ya mwanje na Ye ya ngúya, azali kokamba mpe kotámbolisa bisó, Mwasi na libála ya Yesu Klisto. Tozali bana na Ye, moseka peto, tokémbá kokémba. Mpe na nzela ya ngolu na Ye ya kokamwa, tondimaka Liloba moko na moko toyókaka na bolobáká AMEN! Ezali ndimbola ebongí be ya Liloba na bondimisami ya Bonzambe!

● Soko Mongóngó tozali koyóka likoló ya ba bande ezali: ndimbola ebongí be ya Liloba, nini mosúsu nde Mwasi na libála ya Yesu Klisto asengeli na yango?…ELOKO TE!

Aponákí BISÓ, libóké moké na Ye Amíponeli, kozala na Emóniseli ya solo ya Liloba na Ye mpo ya mokolo na bisó. Bisó nde Aponákí kozala na mabelé, kati na nzóto ya bato, na ntango ya bokonzi ya Mbúla nkóto.

Baninga na ngai, toúmela naino kaka likoló na yango monúti moko.

Tokozala na nzóto ya nkémbo awa mpenza likoló ya mabelé. Tokozala kolia, komela, kotonga ba ndako, kobika mpenza kaka pelamoko Tozali kobika sikawa mpo na mbúla nkóto. Ekozala bosepeli na bisó ya makwéla epai wapi Mwasi ya libála (BISÓ) mpe Mobali ya libála (Nkoló Yesu Klisto) tokómí MOKO.

Tozali kosénzela mpe kozila ntango ya nkémbo oyo monúti moko na moko ya mokolo moko na moko. Ezali mpenza pene ebélémí ezali komónana lokola ete tozali pene ata ya komama yango. Nandimí, na motéma na ngai mobimba, oyo nde ezali kokómela bisó lelo:

Oo, lisangá wana ya molimó ya Klisto mpe Lingómba na Ye sikawa, wana mosuni mozali kokóma Liloba, mpe Liloba lizali kokóma mosuni, limónisámí, lindimísámí. Kaka mpenza oyo Biblia elobí ete ekokóma lelo oyo, ezali kokóma, mokolo na mokolo. Na boye, ezali koyíkana na lombangu mpenza Kúná libándá, kati na masóbé wana, mpe makambo kosálema, oyo Nakokaki kútu te koyéba Násála nini na yango. Tozali pene na boyéi ya Yesu, kosangisama na Lingómbá na Ye, epai wapi Liloba likómí Liloba.

Na Litéya moko na moko tozali koyóka, na koleka Azali kopesa bisó Emóniseli. Ezali koyíkana na lombángu mpenza na motindo ete Toyebí kútu te tósála nini na Yango. Tozali komóna Liloba kokóma Liloba lokola libosó naino soko moké te. Ezali na elilingí ya ntembe ata ndambo te; na nzela ya Emóniseli, TOYEBÍ mpenza tozali ba nani.

Azali kosangisa Mwasi na Ye ya LIBALA bobele lokola elobákí Ye ete Akosála, mpe tozali eténi na Yango. Tozalí komóna Yango kosálema na míso ma bisó moko. Basúsu bakokí ntango mosúsu komóna Yango te to kosósola Yango te. Ezali mpo na bango te, EZALI MPO YA BISÓ, BANA BABÓTÁMÍ NA YE.

Mwasi ya libala azalákí na mitúná kotúna mosakoli.

Ekoki na yango nde BOBELE koyóka Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande? Nzambe ayanólákí mpe alobákí: EE!!

Bana na bisó mpe bakoki kozua nyoso bazali na yango bosengá kozala Mwasi ya libala ya Klisto sé na boyókáká ba bande: EE!!

Na bongo, nyoso Mwasi ya libála asengeli na yango ezali LIKOLÓ YA BA BANDE.

Toyebí mpe ete Nzambe Apésá ba nzela mosúsu mingi mpo ya bana na Ye.

“Na nzela ya mapipí ma Ye bosilí bobikisámákí.” Sikawa, likambo ya libosó Liloba lilobí bongo, esengélákí ekoka bongo, kasi soko ondimí yango te kati na Liloba, boye ezali na makabo kati na Lingómbá, lokola mibali baoyo bapémélámí koyeba boní kolakisa yango, ekoyéisa yango polélé mpenza epai na yo, yango nde, mpe kondima mpo ya kondima.

Totóndi na matóndí Nzambe apésá mibali baoyo bapémélámí koyeba kolakisa lobiko na nzóto mpe Liloba na Ye koyéisa yango polélé epai ya basúsu, kasi Mwasi na Ye ya libála alingí NZELA NA YE EPÉSÁMÍ EBONGÍ BE EKOKÍ. Nde nyoso TOSENGELI NA YANGO.

Nalingi kobianga yo koya komíbakisa na Eyánganelo ya Branham Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka: Mitúná Mpe Biyano # 3 64-0830M.

Boni ezali bikamwa kozala na Emóniseli ya Liloba na Ye mpe koyeba tozali Liloba likómí mosuni.

Ndeko Joseph Branham.

26-0201 MITUNA MPE BIYANO # 2

Nsango: 64-0823E MITUNA MPE BIYANO # 2

BranhamTabernacle.org

Balingami Ba Mpongo Miké,

Epai wapi Nzóto oyo ebomámí ezali, nde esíká Mwasi ya libála bakoyánganisama elongó. Mpe epai na bisó, ezali sé na esíká moko ebongí be epái tokoki kozua Máná wana mosuni mobésu: na bofináká play mpe boyókáká Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bánde.

Koloba likoló ya Máná ya MOBÉSU, tokokí kútu nde kobanda kokanisa oyo tozali na yango mpenza na nsúka ya misapi ya bisó? Mongóngó mpenza ya Nzambe koloba na Mwasi na Ye ya libála molingami likoló ya bánde, wapi kobánza ezali te, komítúna te, kotúna-tuna ya ntembe te to kobéte ntembe te soko oyo tozali koyóka ezali Nzambe, kosálela mongóngó ya moto, koloba Yango Elobí Nkoló Yawe na Mwasi na Ye ya libála.

Na nzela ya Emóniseli, tondimí Yango nde esiká BOBÉLÉ MOKO tokoki kokende na yango mpe kopemisa milímó na bisó ete Maloba mazali bisó koyóka mazali liloba ya moto te, sokí te ndimbola to likanisi na ye líbakisámí na Yango, kasi Ezali Liloba ya Nzambe Péto koloba na bisó ba mpongo miké, komónisa Liloba na Ye.

Tozali na bondeko zíngázingá na Liloba. Totángaka Liloba na Ye kati na ba Biblia ya bisó. Toyókí kútu ete Nzambe abongísákí mpe abiángákí mibáli batóndákí na Molimó Mosanto, kozóngela biteni ya Liloba mpe kotéya Liloba ya Nzambe, kasi na mokolo ya bisó, Nzambe apésí esiká wapi tokoki koyóka LILOBA NA YE LIBONGÍ BE LIOBÁMÍ, na bofináká play.

Tata apésákí kútu Mwasi na Ye ya libála libakú malamu ya kotúna mitúná mizalákí likoló ya mitéma na bisó na ntina ete tókoka kozala na eyano ebongí be:

  • Satana akokí nde kosálela Likabo ya minoko ya sika to kosakola kati ya moto oyo azali na Molimó Mosanto?
  • Yesu alingákí nde koloba nini kati na Matái12, molongó ya 32?
  • Bolimbisi limbola Bakolinti ya Libosó 13:8-12.
  • Basi balingisámí nde kosala kati na Misálá ya mbula-matáli ntango bazali na Mobali mpe bana baoyo bazali na nzóto kolóngónú?
  • Ezali nde mabe mpo ya mwasi kotia zazú na nsúki na ye?

Nzambe apésákí nzelá mingi mpenzá kopámbola mpe kokémbisa Mwasi na Ye ya libala, kasi ezali na esiká sé moko Apésákí wapi Mwasi na Ye ya libala akoki kozala na motéma na kati 100% ete oyo bazali koyóka ezali LILOBA NA YE LIBONGÍ BE. Etóko moko ya Mái ma Bomoi epai wapi ba Mpongo miké bakoki komela na yango wapi makoki mazali te ya makono makoyambanela. KOFINA  PLAY.

Nabiàngí yo óya komela longwá na Etóko yango Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, wapi tokoyóka 64-0823E “Mitúná Mpe Biyano #2.”

Ndeko Joseph Branham

26-0125 MITUNA MPE BIYANO # 1

Nsango: 64-0823M MITUNA MPE BIYANO # 1

BranhamTabernacle.org

Balingami Eyánganelo Ya Branham,

Mbote mingi na Mwasi ya libála ya Yesu Klisto longwá na mokili mobimba, baoyo bandimaka ete Eyánganelo ya Branham, Mongóngó ya Nzambe, nde losámbo na bango moko epai wapi bazali koléisama kati ya molímo na Máná mabómbámí maye mabómbámákí mpe mabátélámákí mpo ya Mwasi ya libála ya Klisto.

Oyo nde mboka na ngai; oyo nde esiká na ngai ya mosálá; awa nde tofándaka. Sikawa, bóbatela yango kati ya makanisi atá nini ésálema. Sikawa soko bozali na bwányá, bokosimba likambo moko. Atá nini ésálema, awa nde esíká na bisó ya mosálá, awa mpenzá!

Bandimi mingi ntango nyoso basósólákí mabé to batiaki likanisi ya bango moko to ndimbola ya bango moko na oyo elobákí mosakoli awa, kasi azali koyebisa Mwasi ya libála alimá polélé: “Soko bozali na bwányá, bokosímba eloko moko, oyo nde esíká na bisó ya mosálá, awa mpenza!”

Alingákí koloba nini na yango?

Ntango Ndeko Branham azalaki awa, mingi basósólákí ye mabé mpe bakanisaki ete esengelákí na Mwasi ya libála kokende na Arizona mpe kolanda ye Kúná, mpo ya kozala kati ya Konétolama. Ndeko Branham ayanólákí bango polélé: BÓTIKALA AWA, AWA NDE ESÍKÁ YANGO.

Ebólo mobimba na bango balongwákí kokende epai Kúná, mpe balingaki kokende epai oyo mpe kosála bongo, nsima ya ngai koyébisa bango bátíkala Kúná. Bótikala Kúná, bótíkala awa mpenza; awa nde esiká yango.

Bato bazuakí nzelá útá na bisiká nyoso na Ameríka kokende na Arizona, kasi ayebisaki bango polélé: Bótikala awa mpenza, awa nde esíká yango!

Kotíkala kati ya Jeffersonville? Yango nde alobákí!

Emóniseli ya ngai ezali, ezalákí Nzambe, koloba na nzela ya mosakoli na Ye mpe koyebisa bato: “BÓTÍKALA NA BA BANDE.” YANGO nde ESÍKÁ YANGO!

Ayókaki mpenza mpási na motéma mpe alobákí asengélákí kosála eloko moko na bato yango. Asengeli kosála nini? Alingákí kotinda bango na lingómbá nini? Basengelakí bákende wapi? Ndeko Branham alobaki asengéli kosála nini?

Na bongo sikawa, Nasengeli názóngisa bana yango awa mpo ya eloko moko ya kolia. Bazali na nsé Kúná kati ya lisóbé kokúfa na nzala.

Alobákí te ete bakosengela kokende na lingómbá ya mboka moko mpe kozua mwa biléi ya kolia. Alobaki asengeli KOZÓNGISA BANGO AWA mpo ya eloko moko ya kolia, soko boye te BAKOKÚFA NA NZALA.

EMÓNISELI YA NGAI, BANINGÁ.

Sikawa, ezali te mbala moko lisúsu kosósola ye mabé, to koloba eloko moko elobákí ye te, na bolobáká: “Ndeko Branham alingákí mondimi nyoso akende na Jeffersonville mpo ya kozala Mwasi ya libála.” Ndeko Branham ayébákí bato yango nyoso, mpe mondimi NYOSO útá na mokili mobimba, akokaki te kolongwa koya mpe kofanda kati na Jeffersonville. Elingaki kokoka te. Na bongo alingaki koloba nini? Azalaki KOSANGISA mwasi ya libala ya Klisto zingázingá ya ba BANDE oyo itiámákí na masíni mpe ibómbámákí mpo ya Mwasi ya libála komiléisa na yango.

Etíndá oyo, Mongóngó moye, nde Liloba ya Nzambe lilobámí mpo ya lelo mpe Likosangisa mpe kobongisa be Mwasi na libála ya Yesu Klisto.

Nzóto oyo ebomámí nde ba ba mpongo baliaka. Sikawa, mpongo ayebání kati na Biblia, lokola mosakoli. Mosakoli azali mpóngo. Nzambe—Nzambe amíbiángaka Mpóngo, mpe bisó nde ba “mpóngo miké” nde, ba—bandimi. Bomóní? Mpe nzóto oyo ebomámí bakolíaka nde nini? Nde Liloba. Esiká sé esiká Liloba lizali, loléngé malamu ya ndeke ekoyébana yango moko.

Wapi nde, Yango Elobí Yawe Liloba mpo ya lelo, péto, oyo endimísámí, esósólámí mabé te, ezali? Ezali kaka na esíká moko, Ba Bande.

Nakokaki kokóba lisúsu na lisúsu, eténi ya Liloba moko nsima ya mosúsu, kasi Etíndá oyo mpe oyo elobákí Ndeko Branham esengeli na Emóniseli koúta na Nzambe. Esengeli tótánga kati ya milongó na nzela ya Emóniseli, kasi koloba oyo elobákí ye. Zambí Ezali LILOBA PÉTO.

Mitúná mpe Biyano mpo ya lelo mpe oyo NANDIMAKA.

Lelo, batéi mingi bazali koloba na bato ete na bozaláká na Losámbo ya Bánde na Ndako tozali libándá ya Liloba mpe oyo Ndeko Branham alobákí toósála. Bazali komíyóka ete esengeli na bisó kokende na oyo babiángí mpe bamóní ete yango nde losámbo.

Ezali sóló mpenza na biténi ya maloba mingi-mingi epai wapi Ndeko Branham alobí oyo polélé.

Sikawa, kendé na yo na lingómbá moko ya malamu ya Nsango Malamu Mobimba mpe mízuélá ya yo lingómba mpo na yo moko.

Mpe Nandimí yango na motéma na ngai mobimba, mpo ete alobákí bongo, Kasi Nandimí ete tozali kosála yango na nzela ya BOZALÁKÁ NA LOSÁMBO YA BÁNDE NA NDAKO. Bisíká tozuámí nde eloko ya motúya te epai ya Nkoló. Ezali bobélé litongi. Kasi lotómo na bisó epai na Nkoló ezali Kotíkala na Liloba na Ye, ESÍKÁ MOKO BOYE TE TO LITONGI. Esiká ya kosambelela ekobikisa to kobongisa be Mwasi ya libála te, LILOBA NDE LISÁLAKA YANGO.

Soko nakei na litongi ya losámbo moko, kasi babósání ELÓKO YA LITÓMBÁ: koyóka Mongóngó ya Nzambe na Bo Fináká Play, mpe na esiká na yango bazali BOBÉLÉ koyóka batéi kotéya Etindá, yango mpenza nde ekosepelisa mobimba mpe koléisa bomoto na yo? Ekokí kosepelisa bomoto na yo, ndeko na ngai mobali mpe mwasi, kasi ekosepelisa Mwasi ya libála te.

Bótika Náloba elóko awa mpe koloba ezali na nkóto ya ba nkóto ya bato baoyo bazali na losámbo te oyo etongámí ya kokende na yango. Babúngí nde kobúnga? Soko bazali na mobateli te to lingómba, elingí nde koloba ete bakokí kozala Mwasi ya libála te? Soko Ozali kobíka na ntáká ya ba kolométele 160 na litongi ya losámbo, osengélí nde kokende na losámbo wana? Kasi soko nafándaka mosiká koleka wana, nasengélí kokende te? Nasengelí náyóka motéi moko na nzela ya bikanganeli ya singa, kasi náyoka ba bande te? Litongi ya komónana nde eloko ya litómbá koleka oyo mosakoli azali koloba ete ezali eloko ya litómbá koleka tosengeli kokende na yango?

Mosakoli alingákí nde komema Mwasi ya libála wapi?

Soko okoki koya awa na Eyánganelo te, zua losámbo moko esiká moko boye; kendé na yango.

Mbala moko lisúsu, wapi nde kopona na ye ya libosó epai ya kotinda bato? Na Eyánganelo ya Branham, Liloba, ba bánde. Yango nde Nzambe apésákí Mwasi na Ye ya libála ásála na ntángo oyo ya nsúka, mpe tozali kosála yango mokolo nyoso MPE Lomíngo nyoso.

Boye Nasósólámí mabé te. NAZALI TE KOLOBA osengélí koyóka ba bánde elongó na Eyánganelo ya Branham na mbala moko mpo ózala Mwasi ya libála. Nazali TE KOLOBA ete osengélákí te kokende na losámbo. Nazali TE KOLOBA okokí te koyóka batéi. Soko ondimí yango, ozali libándá ya Liloba. NAzali koloba ete koyoka Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande nde Mongóngó ya litómbá koleka OSENGELÍ KOYOKA, mpe Nandimí ete mobateli nyoso asengélákí koyókisa Mongóngó wana, ba bánde kati ya masámbo ya bango. Kasi bamísálélí ekímelo ya ndéngé nyoso ya KOZÁNGA KOYÓKISA BA BANDE. Soko yango nde losámbo na yo, ozali komíléisa na Liloba te.

Oyo nde polélé mpenza yango alingákí te ékóma mpe yango nde bato bazalaki kosala.

Mpe kendé na losámbo; Kotíkala na ndako te, kendé kolóba te, mpe bokila te, mpe eloko moko lokola bongo te mokolo mwa Lomíngo.

Tozali te. Tozali kosangana zingázingá ya eloko sé moko ekosangisa Mwasi ya libála, Etindá oyo, Mongóngó oyo.

Mbala moko lisúsu, Nandimaka kokende na losámbo. Ezali na masámbo mingi kati ya mokili mobimba baoyo bazali kotía ba bánde libosó kati na bitéyelo na bango, masánzoli na Nkoló. Nandimaka nde ete osengélí Kotíkala na ndako soko bongo te ozali Mwasi ya libála te? TE, TE, TE…Natíkálá kokanisa yango soko moké te, soko kútu Kondima yango soko moké te. Nalingí kaka ó FINA PLAY ózala wapi to ézala okendeke na lingómbá nini.

Soko ozali te na Emóniseli ya oyo ezali ye koloba, na bongo okokákí koloba polélé: “Nasengélí te koyóka Ndeko Branham to kútu kosengela KOYÓKANA na nyoso ezali ye koloba. Alobákí kútu bongo, ezali na ebelé mosúsu ya bato babiángámí na Nzambe.”

Kendé libosó. Tomóní awa, alobí: “Tosengéláki nde kokende na losámbo mosúsu oyo bazangí koyókana na yo?” Bongo mpenza, Nazali te na…Ezali kaka ngai te nde libángá moké moko na libóngo, boyebí. Ezali na—ezali na yango bobélé na bato malámu basúsu bipai nyoso; nalikíí Nazali moko na bango.

Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bánde nde LIBÁNGÁ MOKÉ YA NGAI, LIBÁNGÁ NA NGAI. Nde Mongóngó Nalingaka koyóka mpe Nalingaka Eyánganelo ya Branham báyóka.

Soko bokolinga komíbakisa na bisó, bómíyóka na boyéi bolámu koleka, bandeko na ngai mibáli mpe basi. Bómíbakisa na bísó mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka Mongóngó ya Nzambe koloba mpe koyanola mitúná ebelé okokí kozala na yango na motéma na yo. Mpe ómíyókela soko makambo Nalobákí kati na mokandá oyo ezali libándá ya Liloba mpe Nasósólákí mabé oyo Nzambe azali koloba na Mwasi na Ye ya libála.

Oyo elobí ye likoló ya ba bánde ezali Yango Elobí Nkoló. Ezali te oyo elobí ngai ete azali koloba, to oyo endimi ngai ete azali koloba, mpe Nzambe KÁKA nde akokí kopésa yo Emóniseli ya solo.

Ndeko Joseph Branham

Mokolo bande etéyámákí: 64-0823M Mitúna Mpe Biyano # 1

26-0111 Ezalelo Ekoya Ya Mobali Ya Libala Ya Likoló Mpe Mwasi Ya Libala Ya Mabelé

Nsango: 64-0802 EZALELO EKOYA YA MOBALI YA LIBALA YA LOLA MPE MWASI YA LIBALA YA MOKILI

BranhamTabernacle.org

Molingami na Ngai Ya Motéma Koleka,

Nalingí yo mingi koleka. Ozali mosuni ya mosuni ya Ngai, mpe mokuwa ya mokuwa ya Ngai. Kútu libosó Názalisa minzóto, sánzá, molongo ya Ngai mobimba, Namónákí yo mpe Nalingákí yo ndèle. Nayebaki ozalákí eténi na Ngai, oyo ya Ngai MOKO kaka wa motéma. Yo na Ngai tozalákí MOKO.

Mokolo Natálélákí mpe Nazilákí útá Namónákí yo ndéle nsúka nsúka yango oyo ekómí. Sikawa Nazali kobiánga yo mpe kosangisa yo longwá na ebimelo ya ntango mpe elimwelo ya ntango, likoló mpe ngelé, na nzelá ya Mongóngó ya Ngai. Ozali makanisi ma Ngai, Liloba ya Ngai, Mwasi na Ngai ya libála, oyo amónísámí.

Nazilákí mingi koyebisa yo makambo manso mazali kati na motéma na Ngai, na bongo Nakomákí yango na nzelá ya basakoli na Ngai mpe Nasénzélákí Yango ebátélámákí mpo na yo mpo ya bilánga nkóto na nkóto. Mingi batángákí Yango mpe bandimákí yango kati na bilánga nkámá na nkámá, kasi Nabátélákí makambo mingi mabómbámákí kino EKÓMÍ BINO. Epai na BINO bobélé nde Nakoyebisa.

Batálélákí koyeba mpe koyóka makambo nyoso oyo ya bikamwa Nabátélákí ya kobómbama, kasi lokola elakákí Ngai yo, Nazilákí mpe Nabátélákí yango ya kobómbama kino sikawa, kaka mpo ya YO, OYO YA NGAI MOKO MPE MOKO KAKA.

Nalakákí yo ete Nakoya mpe Nakomímónisa mbala moko lisúsu kati na mosuni ya moto, ete Nákoka koyébisa yo, mpe komónisa yo makamb’oyo nyoso. Nalingakí ete óyóka MONGÓNGÓ NA NGAI koloba mbala moko alimá na yo.

Napakólákí ebelé mosúsu na Molimó na Ngai Mosanto koyebisa yo mpo ya bolingo na Ngai, kasi lokola Nasálákí ntango nyoso, mpe Nakokí kobóngwana soko moké te, Naponákí moto moko: mwanje na Ngai, mosakoli na Ngai, kozala Mongóngó na Ngai ete Nákoka koloba Yango Elobí Nkoló epai na yo.

Nalingákí koyébisa yo, obikisamákí te na mokolo sóngóló. Ozalákí na yo ya kobikisama ntango nyoso. Nayei kaka nde kosíkola yo ózónga. Obikisamáki longwá na ebandeli zambí mpo ya kobanda ozalákí na Bomoi ya Sékó. Ntina wana, na míso na Ngai, masúmu ma yo manso makokí kútu te komónama na Ngai, eloko sé moko Nayókaka ezalí mongóngó na yo. Namónaka na Ngai kaka etáliseli na yo.

Bóní Naúmeli kozila koyebisa yo makambo mingi mpenza. Motéma na Ngai mozali kopunjwapunjwa na kosepela. Boni Nazilákí mpo ya Lipati na bisó ya Makwéla, mbúla nkóto na bisó ya bo nkóto elongó. Koyebisa yo kati ya bozindó nyoso na ntina ya Ezalelo ya Bisó Ekoya elongó; Bóni Naléngélakí eloko moko na moko mpo na yo, na elóko nyoso kokokana na pósá na yo.

Wa Ngai wa motéma, soko okanísí ezali bikámwá sikawa koyóka Mongóngó na Ngai koloba na yo, zilá bobélé kozila, oyo ezali kaka nde elílíngí ya boúlani ya oyo ekozala ntango tokobika kati na Mboka yango elongó. Mosakoli na yo akobika kútu na ekuke oyo elandí ya yo: akozala mozalani na yo.

Tokotámbola na ba bala-bála wana ya wólo mpe komela longwá na Etóko elongó. Tokotámbola kati na ba paladíso ya Nzambe elongó na banje kolembetela mabelé, koyémba ba njémbo…Mokolo nini oyo ekozala!

Nayebí nzelá emónání mabakú, mpe ntango mosúsu ekómaka makási mingi mpo na yo, kasi ekozala moké koleka, moké koleka, ntango tozali elongó moko na mosúsu.

Mpo ya sikawa, Nakoyánganisa bino mbala moko lisúsu mpe koloba na bino Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, mpe koyebisa bino na ntina ya “Ezalelo Ekoyá Ya Mobali ya libala ya Lóla Mpe Mwasi Ya libala Ya Mabelé”. Nakokí kozila te kino ekosangisama Ngai na bino na ntango wana.

Bókanisa mpe bóbósana soko moké te, Nalingí bino mingi mpenzá.

Na mpo na Ye,

Ndeko Joseph Branham

Makomi:
St. Matái 19:28
St. Yoane 14: 1-3
Baefese 1: 10
2 Petelo 2:5-6 / Mokapo ya 3
Emóniseli 2:7 / 6:14 / 21:1-14
Lewitiko 23:36
Yisaya Mokapo ya 4 / 28:10 / 65:17-25
Malaki 3:6

26-0104 Mabulu Matobwani

Litéya: 64-0726E Mabulu Matobwani

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Bameli Útá na Etóko,

Noéle mpe Mbúla Ya Sika ya motindo nini oyo tozalákí na yango. Toyambákí mpe tofungólákí makabo ya Nzambe oyo Atíndélákí Mwasi na Ye ya libála. Likabo na bisó ya libosó ezalaki Noéle ya Monéne koleka oyo ezíngámá ndéle. Nzambe Ye Moko amízíngákí kati ya mosuni ya moto mpe azóngisákí libóké yango na mokili. Ezalákí Likabo na Ye monéne ya libosó koleka kozóngisa Mwasi na Ye ya libala.

Nsima Nzambe atindaki libóké monéne mosúsu epai ya Mwasi na Ye ya libala. Alingákí bisó mingi koleka na motindo ete Ayákí Mpe Amímónisákí kati ya mosuni mbala moko lisúsu ete Ákoka koloba na bisó mbebu na litói. Alingákí Ye moko mpe Mwasi na Ye ya libála kozala Moko.

Mpe sikawa, baníngá, bósósola ngai mabe te. Tika ete Náloba oyo na limemíá kati na motéma na ngai, na boyébáká ete Nazali moto akangámí na Bomoi ya Séko oyo nakotélema libosó ya esámbiselo mokolo moko: Nkóto na nkóto ya bato bazali kozánga likabo na bango. Bomóní? Bakokí te kosósola Yango. Mpe bazali kotála, mpe koloba: “ Oo, azali na ye kaka moto.” Ezali solo. Ezalákí Nzambe to Mose nde akangólákí bato? Ezalákí Nzambe kati na Mose. Bomóní? Balelákí mpo ya mosikoli. Mpe ntango Nzambe atíndélákí bango mosikoli, bazángáki komóna yango, zambí ezalákí na nzelá ya moto, nzokandé ezalakí moto te, ezalákí Nzambe kati ya moto.

Lelo, mbala moko lisúsu, nkóto na nkóto ya bato bazali kozánga likabo na bango mpe koloba: “bosengeli te koyóka ba bande, ezali sikawa na bato basúsu bapakólámí,” Oyo ezali solo, kasi bazángí koyéba ete ezali Mongóngó BOBÉLÉ MOKO mondimisamákí na Nzambe, koloba na nzela ya Yango Elobí Nkoló na nzela ya moto yango. Mongóngó yango nde Ulími Tumími ya Nzambe, Etémelo na Ye mpo ya lelo.

Ntango tozali koyóka Mongóngó na Ye likoló ya ba bande tozali mpenza solo komela longwá na Etóko ya Nzambe, oyo esengeli te na kotóka na ebéndeli, kobénda, komíbakisa na, komílongola na; tozali sé Kondima mpe Kopéma likoló na Liloba moko na moko Lilobámí.

Na boyókáká Mongóngó wana likoló ya ba bande, kokokana na Yesu Ye moko, tozali na bondimisami ya solo ya Molimó Mosanto kati na mokolo ya bisó.

Na bongo ezali na bondimisami ya solo mpenza ya Molimó Mosanto! Atikálá naino soki moké te koyebisa ngai likambo ata nini ya lokutá. Yango nde: “Ezali elembo ya Molimó Mosanto, nde ye oyo akokí kondima Liloba.” Bokokí koyamba Yango.

Nzambe apésí bisó Liziba tokoki komela útá na yango monúti moko na moko ya mokolo moko na moko. Ezali na yango ntango nyoso ya mpío. Ezali te eloko moko boye ya kozánga kotíola, Ezali Liziba na Ye lizángí kokaoka, Liziba limíkokí; osengelí bobele Kofina Play.

Kosolola na ntina na LIKABO longwá na Nzambe, bokokí nde kobánza boni Likabo oyo lizali penza solo MONÉNE KOLEKA? Na Bofináká bobélé Play mpe boyókáká Mongóngó na Ye likoló ya ba bande, nde bobélé…MONGÓNGÓ BOBELE MOKO kati na mokili mobimba osengelí na ekongoleli te, kokómba na epúpwelo te, to likambo nini mosúsu. Osengelí bobélé na koyóka, Kondima, mpe koloba amen na Liloba moko na moko.

Nzambe Ye moko apésákí nzela oyo, NZELA NA YE BOBÉLÉ MOKO, kozua bomoi ya séko, mpe mingi na koleka, KOZALA MWASI NA YE YA LIBÁLA. Tokoki bobélé kolála likoló na tólo na Ye mpe konúnga makási ma bisó longwá na boyókáká Liziba na Ye, Mongóngó na Ye, El Shaddai koloba na Mwasi na Ye ya libála.

Tiká ete mbúla oyo ézala mbúla Akoyá mpo na bisó, Mwasi na Ye ya libála molingami. Tozali kosénzela mpe kozila na bozili na etíngíá monéne. Mokolo sé mokolo sikawa tokotála baoyo toúmelá kozila bámónana. Tokokáta ntina, kati na mwa ntango ya kobwéta líso, toko bima awa, kobiangama na Lipati na bisó ya Libála.

Nkoló, lokola tozali komóna mesa yango monéne kotandama Kúná mpo ya lipati wana, molaí ya ba nkóto ya ba kilométele, kotálana ngámbo ya mesa moto na moninga na ye, babuni ya kala batóndí na bilembo ya mpótá, mpisoli ya esengo kotanga na matáma na bisó…Mokonzi abimí kati na bonzéngá na Ye, boyéngebene, kotambola na molaí ya mesa mpe kosímba na matándú ya Ye moko mpe kopangusa mpisoli longwá na míso ma bisó, koloba: “bólela lisúsu te, nyoso esílí. Bókóta kati na bisengo ya Nkoló.” Minyókó ya nzelá mikomónana lokola eloko moko te ndéle, Tata, wana ekokóma bisó na nsúka ya nzela.

Yaka mpe melá, mpe melá, mpe melá longwá na Liziba lipesámí na Nzambe mpo ya lelo elongó na bisó Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville. Ezali esiká BOBÉLÉ MOKO okokí komíbósana mobimba omítandí mpe koloba AMEN na Liloba moko na moko Ozali koyóka. Ezali Etóko na Ye epésámí mpo ya Mwasi na Ye ya libála komela útá na yango.

Ndeko Joseph Branham
Liteya: 64-0726E Mabúlú Matobwání
Makomi ya kotánga libosó ya boyóki Litéya:
Njembo 36:9
Yilimia 2:12-14
St. Yoane 3:16
Emóniseli Mokapo ya 13

25-1228 Koyeba Mokolo Na Bino Pe Nsango Na Yango

Litéya: 64-0726M Koyeba Mokolo Na Bino Pe Nsango Na Yango

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Mwasi ya Libala Oyo Apapámí,

Lelo, lingómba babósání mosakoli na bango. Balingi lisúsu ye atá ndambo te kotéya kati na masámbo ya bango. Bazali kobéta tólo ete bazali na babateli na bango baoyo bakotéyaka bango mpe bazongelaka biteni ya maloba ya Liloba mpe balimbolaka Liloba. Kotéya ezali na litómbá monéne koleka koyóka Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande kati ya masámbo na bango.

Kasi Nzambe ayébákí asengélákí kozala na mosakoli na Ye; nde bongo ntango nyoso Abiangáki Mwasi na Ye ya libala kobima mpe Akambákí ye. Apapákí bisó longwá na mabóta masúsu manso na nzela ya Mopánga mwa Ye Mopelí bipai nyoso mibalé, Molimó na Ye Mosanto, Mongóngó mwa Ye molobamákí na nzela ya mosakoli na Ye.

Apapákí bisó na nzela ya Mongóngó wana. Nde ntina Asálákí ete ézuama na masíni mpe ébómbama likoló ya bande. Na nzela ya Emóniseli tomóní boni Makomí mabongí be! Mwasi ya libala akokí kotela te longólá sé Mwana átelisa yango.

Ótéya boní, ósála ata nini, ekotelisama te, ekomónisama te, ekondimisama te; bobelé na nzela na Ye Oyo alobaki: “Nazali Pole ya mokili,” Liloba.

Liloba liyebisaki bisó ete Molimó Mosanto Ye moko akoyá mpe kotelisa bisó, kondimisa, komítálisa mpe komímónisa. Pole ya mpókwa eyéi. Nzambe komímónisa Ye moko kati ya mosuni kobianga Mwasi na Ye ya libála kobima.

Ye nde Oyo abiángákí YO kobima na nzela ya Molimó Mosanto na Ye, Liloba na Ye, Mongóngó na Ye. Ye nde aponákí YO. Ye nde alakisaka YO. Ye nde azali kokamba YO. Na nini? Molimó Mosanto na Ye, Mongóngó na Ye koloba NA YO MBALA MOKO ALIMÁ.

Kasi ezali likambo lileká ngala mingi epai na bango lelo oyo. Baleká esiká ya koyóka ba bande kati na masámbo na bango. Bayebí Yango te. Nde ntina bazali kati na lolengé bazali na yango. Kasi epai na yo, emónísámákí kozala nzela ya Nzambe oyo epésamákí, EZALI YANGO ELOBÍ NKOLÓ EPAI NA YO.

Boye esengelí ézala na—na—na Nguya moko éya, Molimó Mosanto Ye moko, kotelisa, to kondimisa, to kotálisa, to kosála émónisama ete elobákí Ye libosó ekokóma lelo oyo. Pole ya ntango ya pókwa ezali kobóta yango. Ntango nini!

Tozali Mwasi Liloba ya Nzambe tobongí be mosakoli na Ye amónákí kati ya emónoneli. Bisó nde baoyo Atindákí mosakoli na Ye kobianga kobima na nzela ya Liloba na Ye, mpe tozali sikawa na KOLAMUKISA, zambí toyebí sikawa tozali ba nani.

Kolamukisa, kuna, ezali liloba yango moko lisálemélí esiká mosúsu nyoso, Naútakí kaka kotála yango, elingí koloba: “kolamukisa.” “ Akolamukisa bisó nsima ya mikolo mibalé.” Ekozala: “Kati na mokolo ya misáto Akolamukisa bisó lisúsu, nsima na Ye kopalanganisa bisó, mpe kobéta bisó na kufa míso, mpe kopasola bisó.”

Tata atindákí mosakoli na Ye kosénzela Mwasi na Ye ya libála na ntina ete tólongwa te na nzela. Bómíkundwela, ezalaki emónoneli!

Mwasi ya libala alekákí na esiká yango moko ezalaki Ye wana ezalákí Ye na ebandeli. Kasi Nazalaki kotála Ye kobima na molongó, mpe nazalaki komeka kobénda kozóngisa Ye na molongó.

Kasi “a” kokákí nde kobénda ye ázónga lelo boní? “Ye”, moto, azali awa te na mabelé. NA NZELA YA LILOBA! Liloba SÉ MOKO lindimísámí mpo ya lelo nde nini? Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande.

Batéi babiángámí kotéya Liloba na bozóngéláká mpenza kaka yango elobákí mosakoli. Kokokana na mosakoli ye moko, basengeli báloba eloko mosúsu koleka te.

Ya solo, babiángámí kolakisa mpe kotéya Liloba yango. Kasi ezali na MONGÓNGÓ SÉ MOKO MONDIMÍSÁMÍ NA NZAMBE YE MOKO KOZALA YANGO ELOBÍ NKOLÓ.

Bongo mpe elobí Ngai, kati na Nkombo ya Yesu Klisto: Bakísá eloko moko te, longólá te, tíyá te likanisi na yo moko kati na Yango, Lobá bobelé oyo elobámí likoló ya ba bande wana, sálá bobelé mpenzá oyo Nkoló Nzambe apésí motindo kosála; bakísá na Yangó te!

Soko olobí “amen” na liloba moko na moko mobateli to motéi na yo alobí, obúngí. KASI SOKO OLOBÍ “AMEN” NA LILOBA MOKO NA MOKO NZAMBE ALOBÁKÍ NA NZELA YA MOSAKOLI NA YE LIKOLÓ YA BA BANDE, OZALI MWASI YA LIBALA MPE OKOZUA BOMOI YA SEKÓ.

Mosakoli ya Nzambe azalaki moto Nzambe aponákí koloba na nzelá na ye. Ezalaki na nzela ya BOPONI YA NZAMBE kosálela ye koloba Liloba na Ye mpe kotia Yango likoló ya ba bande na ntina ete Mwasi ya libála álinga NTANGO NYOSO KOSENGELA KOZALA NA YANGO ELOBÍ NKOLÓ KOYÓKA.

Alingí te ete Mwasi na Ye ya libala átálela oyo bato basúsu balobí, to ndimbola ya bango ya Liloba na Ye. Alingi Mwasi na Ye ya libala koyóka longwá na mbebu na Ye kino matói ma bango. Alingí te Mwasi na Ye ya libala átálela moto ata nani mosúsu kasi Ye moko.

Ntango tolamúkí na ntóngó, tolingaka Ye koyebisa bisó: “Mbote baningá. Nakoloba na bino lelo mpe koyebisa bino boni Nalingí bino mpe boni bino na Ngai tozali MOKO. NAzali na mingi baoyo Nakopesa Bomoi ya Sekó, kasi bobele BINO nde Mwasi ya libala Namíponeli Ngai moko. Kaka epai na BINO nde epésakí Ngai Emóniseli libosó ya bozalisi ya mokili.

Ebelé mosúsu balingaka koyóka Ngai, kasi Naponáki bino kozala Mwasi na Ngai ya libala. Mpo boyebí Ngai mpe botikali na Liloba na Ngai. Bokakólí te, bozalakí te kofinela soko nini líso, kasi botíkálí sembo na Liloba na Ngai.

Ntango ebélémí. NAzali koya mpo na bino noki mpenza. Ya libosó, bokomóna baoyo bazali elongó na Ngai sikawa. Oo, bóní bazali na mitéma lúku-lúku bámóna bino mpe bázala elongó na bino. Bótungisama te bana miké, nyoso ezali mpenza na ntango, bókóba bobele kopúsa.”

Lokola mosali ya Nsango Malamu, Nakoki komóna te eloko moko etikali kasi bobelé kokende ya Mwasi ya libála.

Ndeko Joseph Branham

Liteya: 64-0726M “Koyéba Mokolo na Bino Mpe Etíndá Na Yango”
Ntango: 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville
Makomi ya kotanga libosó ya boyóki Litéya:
Osea: Mokapo ya 6
Ejekiele: Mokapo ya 37
Malakí 3:1 / 4:5-6
II Timote: 3:1-9
Emóniseli: Mokapo ya 11