All posts by admin5

21-1024 KLISTO AMONISAMI KATI NA LILOBA YA YE MOKO

Nsango: 65-0822m KLISTO AMONISAMI KATI NA LILOBA YA YE MOKO

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi ya Libala oyo alamukisami,

Tozwa nano esengo boye liboso te, to kosepela mingi na bomoi na biso. Tozali na Kolamukisa na nzela ya Emoniselindenge tozwa nano liboso te. Mokili ezali kopanzana. Bato bakoti penza mobimba kati na kobungisa mayele. Tozali komona makambo oyo toyoki pene na bomoi nab iso mobimba kokokisama penza liboso na miso ya biso.

Liteya moko na moko tozali koyoka ekoki penza na ntango mpe kaka oyo tozali na bosenga ya koyoka. Ezali Bilei ya Molimo na Ntango Elongobani. Tosepeli ete ezali makanisi ya moto moko te, soko ete ezali maloba ya moto moko te, ezali Maloba ya Nzambe kosolola na nzela ya Moto moko, kobenga Mwasi na Ye ya Libala ete abima.

Tokoki koloba uta na bozindo ya mitema na biso ete:

·       Etinda oyo ezali Yango Elobi Nkolo Yawe

·       Ezali nzela ya Nzambe epesami mpo na lelo.

·       Ezali na bosenga ya ndimbola te.

·       Ezali Maloba mazangi kokwea.

Koyoka kolandana ya mateya eleki oy’eleki ezalaki penza likambo monene na bomoi na ngai. Nalingi kaka kokabola eteni na yango moko na moko na moto nyoso. « Oyokaki mpe esika oyo…Natikala koyoka yango ndenge wana liboso te…Nayoki bande wana mbala 4 kati ya mwa mikolo mileki kasi natikala kosimba yango te ndenge nasimbi lelo. Etinda oyo ezali penza nde ya eleko bebe koleka ndeng’ezalaki ntango eteyamaki esili koleka mibu 56 ».

Ezali te na eloko eleki esengo ya mpeto ya koyeba ete ozali koyoka Mongongo ya Nzambe ya peto oyo endimisami. Bosenga ya koloba omikengela ezali te. Ntina ya kotungisama ezali te, oyo ekokani nde na Liloba. Yango ezali nde makanisi na ye to ndimbola na ye? Esengeli nakende kotala yango elongo na Liloba.

Biso te, oyabiso likambo ezali kaka komisembola pepele, mpe koloba AMEN na Liloba moko na moko, lokola toyebi ete eloko nyoso tozali koyoka ezali OYO ELOBI NKOLO YAWE.

Ekoka na yango kaka te koleka oyo na malamu mpe na petee.

Nazalaki kobondela mpe koluka Nkolo mpe Azali kokamba ngai kokoba na Mateya oyo ya suka mosakoli na Ye alobaki. Nayebi ete toyokaki Mateya oyo esili koleka kaka mwa ba sanza, kasi ntango nyoso tozali koyoka yango Azali komonisa biso makambo mosusu mpe mosusu mingi.

Ntango nazali kokanisa na ntina ya Mwasi ya Libala, koyangana elongo longwa na mokili mobimba, kozila na etingia kobanda Liteya na bango koyoka Nzambe kosolola na bango na nzela ya bibebu ya mosakoli na Ye, natondaka na esengo koleka. Akomonisa biso nini lelo?

Kolamukisa monene ezali kosalema na mokili mobimba. Mwasi na Libala azali ko ganga na bolobaka ete:” Tolingaka koyoka ba bande. Tolingaka kofina Play. Tolingaka koyangana na Mwasi na Libala zingazinga ya mokili mobimba”.

Tozali koyangana mpe kofanda elongo na bozali ya Mwana, kokemba, kobelema mpo na Konetolama. Nalingi na natindela bino ebiangeli ete boya kokemba elongo na biso na ngonga ya 2 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, wana ekoyoka biso Nzambe kosolola na Mwasi na Ye ya Libala mpe komemela biso Liteya, Klisto Amonisami Kati na Liloba ya Ye Moko 65-0822M

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka liteya:

Esode 4:10-12

Yisaya 53:1-5

Yilimia 1:4-9

Malaki 4:5

St. Luka 17:30

St. Yoane 1:1/ 1:14/ 7:1-3/ 14:12/ 15:24/ 16:13

Bagalatia 1:8

2 Timote 3:16-17

Baebele 1: 1-3/ 4:12/ 13:8

2 Petelo 1:20-21

Emoniseli 1:1-3/ 10:1-7/ 22:18-19

21-1017 MPE OYEBI YANGO TE

Nsango: 65-0815 MPE OYEBI YANGO TE

BranhamTabernacle.org

BA MPONGO BAZALI KOYANGANA

Balingami ba Mpongo oyo bazali koyangana,

O, eleko nini oyo, ntango nini oyo! Eloko etikali te oyo ezangi kosalema. Ba Mpongo ya Nzambe bazali koyangana zingazinga ya nzot’oyo ebomami. Lisakoli ezali kokokisama. Etikala kozanga ata mbala moko te, mpe ekozanga te, mpo na biso, baoyo tobongisamaki liboso mpo tomona yango, tozali komona yango.

Banda Tata azwa mosakoli na Ye na ndako, Mwasi na Ye ya Libala nano ayanganisama zingazinga ya Mongongo na Ye liboso te ndenge ezali lelo. Aponaki nzela ekokaki ete Liloba na Ye liya na yango, mpe yango ezalaki na nzela ya basakoli na Ye, baoyo babongisamaki mpe batiamaki na mosala liboso. Mpe biso tozali na kosepela, mpe tondimisami, ete yango ezali Yesu Klisto komiyebisa, komitalisa kati na lisakoli.

Ndenge nini ezalaki ete Akambaki bana na Isalaele kati na lisobe, kati na mobembo na bango, lokola elilingi ya bat’oyo babengami lelo kobima. Tala Ye oyo awa, na nzela ya bilembeteli ya bolukiluki ya zebi, kino Amitalisi penza liboso ya zebi. Mpe na nzela ya bikela na Ye penza mpe na nzela ya lisakoli na Ye, makambo oyo esakolamaki mpo na Ye et’esalema na mikolo oyo, kosala Ye azala Yesu Klisto lolenge moko lobi, lelo, mpe libela, ekokisami penza penza. Yango ekoka te ete epelisa mitema na biso na moto kati na biso ?

Lokola bayekoli wana na mokolo wana, tobongisamaki mpo na Bomoi. Eloko moko tozali na yango kosala ezali kaka koyebisa Mongongo na Ye. Mpe Mongongo yango ezali penza makanisi na Ye mabimisami. Tondimi yango nyoso. Tosengeli te kokokisa eloko soko nini na nzela ya zebi, to kotuna Mosadukai soko Mofalisai, to moto ata nani na ntina na yango the. Alobaki yango mpe biso tondimi yango. Ba mpate na Ye bazali koyoka Mongongo na Ye, kosolola na nzela ya mosakoli na Ye.

Etinda oyo ezali Mongongo ya Nzambe likolo ya bande. Ezali emoniseli mobimba ya Yesu Klisto, Kondimana ya kala mpe Kondimana ya sika etiami elongo. Sekele nyoso efungolami polele. Tokobakisa eloko soko kolongola eloko likolo na yango te. Tozali kosala kaka ndenge Apesaki biso motindo tosala, KOTIKALA NA LILOBA

Yango nde likambo. Ezali moto wana ya katikati. Oyo ya kati wan’ekoyanolaka Liloba, ekotingama na Liloba, ezala eloko nini.

Asakolaki mpe ayebisaki biso makamb’oyo esengelaki kokoma. Mokili mobimba ekoyangana kati na bolema, mpe ekokoba kozinda, mpe kozinda, mpe kozinda, kino bakokoma libondo ya bato ya ligboma.

Alobaki ete ntango ebelemi eapai wapi tokomona eloko moko kokoma, eloko moko ekosalema. Mpe Mateya nyos’oyo ezalaki kaka kotia etemelo mpe moboko mpo na Etinda mokuse mpe ya nokinoki oyo eko ningisa bikolo nyoso. Nandimi ete tozali komona makambo yango kosalema sik’awa penza.

Mpe nayebi ete sima nan gai kolongwa na mabele oyo, ba bande mpe buku iye ikokoba kobika, mpe ebele kati na bino bilenge bana bokokuta, na mikolo mikoya ete, yango ezali penza SOLO, mpo ete nazali koloba na Nkombo ya Nkolo. 

Tika ete toyoka mpe tozala na bokengi penza na liloba moko na moko ya ndoto nyos’oyo mosakoli alobeli biso. Ndenge bamonaki ye kotelema likolo ya libanga oyo ezalaki longwa na ebimelo nan tango kono elimwelo na yango, kati na songe mopotu koulana na piramidi. Ndenge azalaki likolo na punda ya motindo ete batikala komona eloko ya ndenge wana liboso te kati na bomoi na bango; punda monene ya pembe, na kunza ya katikati pembe ebandi na moto kino ekiti na mokongo mpe edjembeli nse.

Ndenge lipata ya pembe ekitaki mpe ememaki ye mpe elongolaki ye. Na bongo sima ya mwa ntango moke, efandisaki ye na moto ya mesa mpe azalaki pembe pee lokola mbula pembe. Azalaki kotelema wana mpe alobaki na bokonzi. Kotatabana ezalaki te likolo na yango. Moto nyoso asosolaki polele oyo elobaki ye.

“Nakoleka na nzela oyo mbala moko lisusu!”

Na ndimi ete tozali komona yango kokokisama lelo. Mateya oyo ezali koleka na nzela moke yango mbala moko lisusu. Nzambe azali kobenga ba Mpongo na Ye elongo uta na mokili mobimba. Bazali koyangana zingazinga na Liloba na Ye, Mongongo na Ye, Etinda oyo.

Mokili ezali bolumbu, na makambo ya mawa, na bolozi, na lolanda, mpe eyebi yango te. Kasi Mwasi ya Libala alatisami na Liloba, atondi na kembo kati na Molimo, atondi na esengo na nzela ya Ngolu na Ye, mpe tokoki komona mpe koyeba tozali banani: MWASI NA YE YA LIBALA.

Ayebisaki biso ete kokokana na ndenge ayebaki, amonaki eloko moko te oyo ekokaki kopekisa koya ya Nkolo Yesu, libanda ya komilengela ya LINGOMBA NA YE.

Ba Mpongo, tika ete tomilengela. Nazali kobenga bino ete boya koyangana na biso zingazinga ya mosuni oy’ebomami Mokolo ya Lomingo na ngonga ya 2 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, koyoka Mongongo ya Nzambe mpo na mokolo na biso kolengela biso mpo na koya ya Konetolama oy’ebelemi awa ezali biso koyoka: 65-0815 Mpe Oyebi Yango Te.

Ndeko Joseph Branham

Emoniseli 3: 14-19

Bakolose  1: 9-20

21-1010 MAKAMBO MAMONISAMI POLELE NA NZELA YA LISAKOLI

Nsango: 65-0801E MAKAMBO MAMONISAMI POLELE NA NZELA YA LISAKOLI

BranhamTabernacle.org

BA MPONGO BAZALI KOYANGANA

Molingami Moseka moke, Etonga moke, Mwasi-Liloba ya Klisto,

Tozali Mwasi na Ye ya Libala tozali kozila Mobali na biso ya Libala mpe kosepela na bopemi na Ye ya Bokonzi ya mbula nkoto. Tokoyoka Mongongo nse moko. “Ba mpate na Ngai bayebi Mongongo na Ngai. Bakolanda mopaya te. » Mongongo na Ye ezali nini ?

Mongongo ya moto nyoso nde Liloba na ye. Mpe yango nde oyo, Biblia. Ezali na liloba moko te ekobakisama na yango to kolongolama na yango. Kotikala kaka na Mongongo yango. « Bakolanda mopaya te », ebongiseli.

Mongongo wana ezali Mongongo ya Ye, esololaka kati na bande na nzela ya Molimboli ya Liloba na Ye ya bonzambe, ye mosakoli na Ye, William Marrion Branham. Ezali Yesu Klisto kosolola na nzela ya bibebu ya moto. Maloba ya moto, makanisi ya moto, to ndimbola ya moto etali biso te, kaka Mongongo oyo endimisami na mokolo ya biso nde etali biso. Ezali OYO ELOBI NKOLO.

Nzambe Asalelaki maboko ya mosakoli na biso. Nzambe asalelaki miso na ye kati na bimononeli. Akokaki koloba eloko mosusu te bobele oyo azalaki kotala. Akokaki koloba eloko mosusu te, mpo ete Nzambe Azalaki na bokonzi mobimba na lolemo na ye, mosapi na ye, mpe enama moko moko ya nzoto na ye ezalaki na nse ya kopusama na Nzambe. Tokamwa te ntina Biblia elobi ete basakoli na Ye bazalaki ba nzambe; bazalaki eteni ya Nzambe! Azalaki Liloba ya Nzambe etalisami mpo na mokolo ya biso.

Biblia oyo elobi liboso, na nzela ya lisakoli, mokolo mpe ntango tozali kobika kati na yango. Motindo ya makambo nini nde ekozala kokoma. Ezali koloba yango penza polele polele, mpe etikala te kozanga ata na eleko moko. Baoyo babongisami komona yango, bakomona yango. Ezali Liloba ezali komikangisa na Liloba.

Na eleko moko na moko bato bazali kotika bato kotia ndimbola ya bango kati na Liloba oyo, mpe ezali kosala ete babetama na kufa miso liboso na likamb’oyo ekomi. Likambo yango moko esalemaki na ba Falisayi mpe na ba sadukayi.

Bayebisaki bato,”Tozali bapakolami ya Nzambe. Bosengeli na biso toyebisa bino oyo Liloba elobi. Bosengeli na biso ete tolimbola yango mpo na bino.”

Ndeng’ezalaki na mokolo wana ezali mpe ndenge moko lelo. Esika ya lipengwi ezali nde ete bapakolami na Molimo Mosanto. Bazali na ebiangeli kouta na Nzambe koteya Liloba. Esengeli bayebisa bato eloko nini mosakoli alobaki, kasi ebele monene kati na bango BAZALI KOTIA NDIMBOLA NA BANGO MOKO LIKOLO NA YANGO na boyeisaka lotomo ya bango na litomba monene koleka ata Mongongo ya Nzambe yango penza.

Botala boni bazali kokangisa bato zingazinga ya lotomo ya bango, zingazinga ya ndimbola ya oyo mosakoli na Nzambe alobaki, kasi bakokoka kaka te kosala bongo.

Bazali komibomba sima ya bato mpe kobangisa bango wana bazali komilongisa koboya koyoka bande na mangomba ya bango na bolobaka ete,” Bato wana bazali kopesa lokumu likolo ya moto mpe bazali kosambela ye kasi Yesu Klisto te. Ezali ebongiseli koyoka bande bato nyoso na ntango moko longwa na esika moko. Ndeko Branham aloba ata mbala moko te ete esengeli koyoka bande kati na bisambo”, na bongo bazali kokima ntina penza, balingi na bango kaka te koyoka bande kati na mangomba na bango. Lotomo ya bango, lisosoli na bango, ebiangeli ya bango ezali na litomba monene koleka koyoka ba bande kati na losambo. Bakomeka soko moke te, NDENGE EZALI TE, kasi misala na bango ezali koloba mpo na bango.

Mosali ya solo oyo azali na lotomo, oyo abeti tolo koloba ete andimi oyo ezali Etinda ya solo ya ntango na suka, Mongongo ya Nzambe mpo na mokolo ya biso, akozwa kokima esika ata moko te azanga koyoka ba bande kati na losambo na bango. MEKA ELOBELO WANA NA LILOBA YO MWASI NA LIBALA.

Nalobá ata mbala moko te ete moto nyoso ayoka bande na ngonga ya 2 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, soko bongo te ozali Mwasi ya Libala te, NALOBA YANGO SOKO MOKE TE. Natikalá kosambela moto te. Ezali Yesu Klisto nde azali kozwa kembo nyoso. Nazali kobondela Nzambe kati ya moto lokola LILOBA eyebisaki biso tosala. Boni bazali bazimbisi mpe bakufi miso. Tanga kaka makomi ndeko na ngai, ezali na yango wana.

Zabolo AYEBI ete moteyi nyoso, to likita ya bateyi, bakokoka SOKO MOKE TE koyanganisa Mwasi ya Libala; bazali ata koyokana kati na bango te. Kaka lokola ba Metodisti, ba Batisti, ba Presbiteria mpe bato ya Kitela, ndenge nini moko na kati na bango to lisanga ya bango bakokoka koyanganisa Mwasi na Libala…ata ndenge nini EKOKOKA TE.

ELOKO MOKO KAKA OYO EKOYANGANISA MWASI NA LIBALA EZALI MONGONGO YA NZAMBE LIKOLO YA BANDE…MPE EZALI KOSALA YANGO.

Monguna ayini yango, nde ntina azali komeka kobebisa yango, kasi ekokoka kosala yango te…KEMBO!

Lokola momeseno, ntango nyoso, na suka ya eleko, bazali komizwa kati na mobulungano na nzela ya ba teolojia mpe ba nganganzambe kino ekokoma libebi. Ntango nyoso ndimbola ya bango ezali mabe, ata mbala moko ezanga kozala mabe te, mpe ata mbala moko te Liloba ya Nzambe ezanga kozala solo. Oyo wana nde bokeseni. 

Nzela ezali kaka moko mpo ya kondimisama, kotikala na Liloba, Mongongo ya Nzambe likolo ya ba bande. Tanga Biblia na yo, ekoyebisa yo makambo nini nde esengeli emonana na mokolo oyo. Ekoyebisa yo na ntina na mwanje na Ye ya Nguya oyo esengeli aya na mokolo oyo. Ekoyebisa yo otikala na Mongongo yango, kotikala na motindami na Ye oyo aponami.

Soko Satana ayinaka buku moko ya Biblia, ezali nde buku ya Emoniseli. Ekomamaki na Klisto Ye moko. Na bongo kokokana na molimo yango, esengeli Klisto Ye moko atia litomba mingi likolo na mwanje na Ye ya 7.

Sima na makamb’oyo Namonaki mwanje mosusu kokita na nse kouta na likolo, azalaki na nguya monene; mpe mabele engengaki na kembo na ye.

Klisto Ye moko alobaki ete mabele nyoso ENGENGAKI NA KEMBO NA YE. Alobaki te ete engengaki na “KEMBO NA NGAI”. Bongo kokokana na kososola na yo, ozali kofunda Klisto Ye moko wana ezali Ye kotia litomba mingi likolo ya motindami na Ye ya 7.

Motindami ya mabele azalaki penza pene na Klisto Ye moko, Yoane amekaki kosambela ye, MBALA MIBALE, kasi alobaki ere, « TE!, Sambele Nzambe. » Yango penza nde biso tozali kosala, kosambela Nzambe. Tozali kotia litomba mingi likolo ya moto te, tozali kaka kosala oyo KLISTO LILOBA ALOBAKI… « mabele engengaki na kembo na ye ». Yango ezali kopesa biso Kolamukisa na nzela ya Emoniseli.

Nzambe azali kopona ndenge ya Ye Moko, na bobongisaka makambo liboso, aponaki basakoli mpo na eleko moko na moko. Botala yango. Azali kobongisa lolenge ya mosakoli wana ete akokana na eleko yango. Bomoni, Azali kobongisa motindo na ye ya kosala makambo, nyos’oyo azali kosala. Azali kokembisa ye azala na boyekoli to azala na boyekoli te. Azali kokembisa makabo, lolenge nini akoteya kati na yango, makabo oyo akozala na yango. Mpe Etinda mpo na eleko moko wana, Nzambe abongisaki liboso ete eloko moko wana ekoma mpe ezali na eloko mosusu te ekokoka kozwa esika na yango.

Koyoka bande moko, ezala bande nini, Mokolo ya Lomingo, ezali na eloko moko te ekokoka kozwa esika na yango. Soko y’olingi komibakisa na eyanganelo ya Branham wan’ezali biso koyoka bande, miyoka somi mpe totombeli yo boyei bolamu komibakisa na biso Mokolo ya Lomingo na ngonga ya 2 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, wan’ekoyoka biso : Makambo Mayeisami Polele na nzela ya Lisakoli 65-0801E

Ndeko Joseph Branham

Makomi :

Genese : 22 : 17-18

Njembo : 16 :10 / Mokapo ya 22/ 35 : 11/ 41 : 9

Jekalia : 11 :12 / 13 :7

Yisaya : 9 :6/ 40 :3-5/ 50 :6 / 53 :7-12

Malaki : 3 :1 / Mokapo ya 4

St. Yoane 15 : 26

St. Luka : 17 :30 / 24 :12-35

Baloma : 8 :5-13

Baebele : 1 :1 / 13 :8

Emoniseli : 1 :1-3 / Mokapo ya 10

21-1003 NZAMBE YA EKEKE OYO MABE

Nsango: 65-0801M NZAMBE YA EKEKE OYO MABE

BranhamTabernacle.org

Balingami Mwasi ya Libala Kolamukisa na nzela ya Emoniseli,

Eloko nini nd’ezalaki kokoma zingazinga ya mokili na suka ya poso oyo eleki ? Nini nde ezalaki kosalema ? Ntina ya makelele oyo ezalaki nini ? Mwasi ya Libala uta na mokili mobimba ayanganaki zingazinga na Liloba, kosala ngomba longwa na na mabele ya lima mpe ya pembe, zelo mpe njete. Koyangana zingazinga ya mioto ya libota, na boyembaka nzembo ya masanzoli mpe ya lokumu na Nkolo. Ezala bana ezala mikolo, ndenge moko, balati bilamba ya likolo ekomami maloba ete KOLAMUKISAMA NA NZELA YA EMONISELI. Bautaki longwa na Michigan kino na Florida, longwa na Maine kino na California, longwa na Amerika ya likolo kino Amerika ya ngele, na Poto, na Africa, Asia, Australia, matumu manso ya mokili. Bazalaki koyoka longwa na biyokeli ya bango kati ya ba ndako na bango, koyoka Mongongo ya Nzambe kosolola na bango mbala moko.

Kobendama ezalaki nini ? Momboto ya Nzambe oy’ebongisamaki liboso, oy’ekoki kosala eloko mosusu te kasi kaka kolanda Etinda ya ntang’oyo, oyo bandimi Liloba moko na moko oyo elobami na monoko ya Nzambe, bayanganaki elongo kati na masanzoli, na lokumu, mpe kati ya kosepela likambo monene oy’ekomaki na mokolo na biso likolo ya Ngomba ya Elimwelo ya Ntango.

Ezalaki Nzambe kokokisa Liloba na Ye. Nde ntina ya makelele nyoso oyo. Botala, ezali Nzambe kokokisa Liloba ya Ye Lilakamaki lisusu, ya Emoniseli 10: 1-7, “Mpe na mokolo ya koyula Etinda ya Mwanje ya sambo, Libombami ya Nzambe likosila kokoka”.

Ezalaki Nzambe koloba lisolo ya ntango. Ezalaki Nzambe kokokisa lisakoli. Ezalaki eyano ya lisakoli ya mosakoli mpe tolingaki kofanda wana kozwa mpe koyoka eloko nyos’oyo Asalaki na nzela ya mosakoli na Ye.

Koloba mabe ya mozangi kondima mpe ya bandimi ya katikati etali biso te. Tokoswana na bango te. Tozali na eloko moko ya kosala, yang onde  kondima mpe kozwa eteni moko na moko na yango ndenge tokokoka. Tozali koyangana poso na poso lokola lisanga moko koyoka Mongongo ya Nzambe, wana ezali biso kozila koya ya Masiya.

Ntango monene nini oyo tozali kobika kati na yango. Komona likomi kokokisama na bomoi na biso penza. Kasi Akebisaki biso kati na Liloba ya Ye ete bapakolami ya lokuta bakozala pene penza na ndenge ete bakozimbisa ata baponami SOKO ekokoka. Kasi Lokumu ezonga epai na Nzambe, ekokoka te kozimbisa Mwasi na Ye ya Libala, mpo ete bakotikala na Mongongo yango ya Nzambe oyo Endimisami mpe bakobongola litono moko soko moto ya likambo moko te. Bakobakisa kolimbola ya bango moko te likolo na yango, kasi kaka KONDIMA LILOBA MOKO NA MOKO.

Boni esengeli na biso kozala na bokebi mingi soko ezali PENE MINGI. Tozali komituna ekozala nde mangomba ya bibongiseli ? Baoyo wana emonani ete bazali mosika mingi, bazali kutu pene te. Ekozala ko nde ba nani ?

Sasaipi , soko ezali kaka mangomba ya malili, ya lolenge ya kosambela ya libanda mpe ya zololo, mpe bongo na bongo, oyo ya kiteolojia ebongisami na moto, oyo wana ekokaki te Baponami ; baponami bakoka ata kotala yango na miso te ; kasi ezali  wana likolo, pene ya kokokana na eloko ya solosolo. Kotika kaka liloba moko nde eloko okosala.

Alobaki ete Ewa abimaki te mbala moko mpe kobanda koboya kondima Nzambe na nko. Ezalaki libunga nde andimaki. Satana andimaki ete ezalaki Liloba ya Nzambe kasi likambo ezalaki ete atiaki ndimbola na ye moko likolo na yango mpe esalaki ye mwasi kondima lokuta mpe akweisamaki na yango.

Ezipelo elongolami. Piramidi efungolami. Makomi matikami polele. Emoniseli epesameli Mwasi ya Libala. Ezali Yesu Klisto lolenge moko lobi, lelo mpe libela.

Yango ezali kokomisa satana kozala na kele makasi epai na biso. Ayebi akomi na suka ya ye. Alingi biso tobeta ntembe na oyo biso tozali. Tozali koleka na mimekano mpe bitumba ya makasi ndenge toleka nano na yango liboso te. Mbala mosusu tozali komituna mpo ya nini makambo ya motindo boye ezali kokomela biso?

Ntina na yango, ezali komeka Ye, Mwasi na Ye ya Libala. Ezali ko…Wan’esili ye kotalisama, kopimama, kokokisama, kondimisa ye liboso ya satana.

Kembo!!! Mimekano mpe bitumba na biso ezali kaka Ye kolakisa satana ete TOZALI MWASI NA YE YA LIBALA ATALISAMI.

Tokuti sik’oyo ete eleko mabe oyo ezali mpo ya kotalisa satana, ete azali lokola Ewa te , ete Azali te elilingi ya mwasi moko boye. Mpe Akopimama na nzela na Liloba na Ye. Mwasi ya Libala, lokola Mwasi ya Adama amekamaki na Liloba ya Nzambe. Mpe mwasi na Adama andimaki Liloba eteni moko moko na yango, kasi abulunganaki likolo ya elaka moko.

Kasi biso tokobulungana te likolo na liloba moko to kokende sima na mimesano ya bango, ndimbola na bango ya Liloba, tokotikala na LILOBA YA EBANDELI.

Soko tozali na masini ya koyokela bande, tokoyanganisa etonga ya bato elongo, tokofungola elobeli, mpe tokoyoka na bokengi, kaka ndenge ayebisaki biso tosala !

Kaka lokola bomoi oyo ya nzoto wana bilembeteli bizali kouta longwa na koyikana uta na tata na yo, mpe bongo Molimo ya Nzambe azali, oyo ebongisamaki liboso ya kozalisama na mokili.

Boni tozali na botondi koyeba ete koyikana na biso ebongisamaki liboso ya kozalisama na mokili kozala na Emoniseli ya Solo ya Etinda oyo.

Totombeli yo boyei bolamu koya kozwa Kolamukisa na nzela ya Emoniseli yango moko elongo na biso Mokolo ya Lomingo na ngonga ya 2 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, wan’ekoyoka biso : 65-0801M NZAMBE YA EKEKE OYO MABE.

Ndeko Joseph Branham

St. Matayi mokapo ya 24 / 27 :15-23

St. Luka 17 :30

St. Yoane 1 :1 / 14 :12

Mis 10 : 47-48

1 Bakol4 :1-5 / Mokapo ya 14

2 Bakol4 :1-6

Bagal1 :1-4

Baef 2 :1-2 /4 :30

2 Bates 2 :2-4 / 2 :11

Baeb Mokapo ya 7

1 Yoa Mokapo ya 1 /3 :10 / 4 :4-5

Emoniseli 3 :14 / 13 :4 / Mikapo 6-8 mpe 11-12 / 18 :1-5

Mas 3 : 5

Yisaya14 :12-14

21-0626 KOBENDAMA LIKOLO YA NGOMBA EZALI NINI?

Nsango: 65*-0725E KOBENDAMA LIKOLO YA NGOMBA EZALI NINI?

BranhamTabernacle.org

Balingami ba MPONGO, tika ete biso nyoso toyangana elongo mpe toyoka Liteya 65-0725E Kobendama Likolo Ya NGOMBA Ezali Nini? mokolo ya Lomingo oyo na ngonga ya 2 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville.

Ndeko Joseph Branham

21-0919 Bapakolami Na Ntango Ya Suka

NSANGO: 65-0725M Bapakolami Na Ntango Ya Suka

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi ya Libala Moponami,

Ntina Yesu alobaki ete, baponami bakozimbisama te, ezali mpo ete bazali Liloba yango. Bakoki kozala eloko mosusu te. Bayebi eloko mosusu te.

Ezali na eloko eleki monene na mokili te koleka koyeba ete Nzambe aponaki mosakoli na Ye liboso na bozalisi ya mokili kosolola maloba oyo. Na bongo Alingisaki ete Mongongo na Ye etiama na bande, mpo ete biso, Mwasi na Ye ya Libala oy’abongisamaki liboso, tokoka kozonga na yango koyoka Mongongo na Ye oy’etiamaki na ba bande mpe ebatelamaki, mpo ete Alingaki biso toyeba ete :

·       Tozali Liloba.

·       Tokoki kozimbisama te.

·       Tokoki kozala eloko mosusu te.

·       Tokoki koyoka eloko mosusu te.

·       Toyebi eloko mosusu te.

Ayebaki ete tokozala na bosenga ya koyikisasma mpiko lelo koleka mokolo mosusu nyoso kati na ntango.

Etumba ekongala lokola engali nano liboso te. Mwasi na Ye ya Libala akotiama na emekeli. Kasi soko Akokaki kokanisela Mwasi na Ye ya Libala oyo bango bazali, bakokaki kosepela na mitema ya bango na boyebaka ete bazali balingami na Ye ya motema kati na mokano na Ye.

Ata ezala eloko nini oyo satana azali kobwakela biso, ezala tozali kobika makambo ya ndenge nini, sik’oyo toyebi, Azali kopona Mwasi ya Libala, mpe tozali Mwasi yango ya Libala. Tozali koyoka nsoni te na Emoniseli na biso ya Liloba. Tokomeka soko moke te kosalela Nzambe mosala nzoka nde libanda na mokano ya Nzambe. Mpo na biso, ezali Bilei ya Molimo na Ntango Elongobani. Tososoli ete ekozala na Bapakolami na Ntango ya Suka, kasi biso TOKOTIKALA NA LILOBA.

 Soko bokolinga kondimisama oyo moko, boya komibakisa na biso Mokolo na Lomingo na ngonga ya 2 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, koyoka : 65-0725M Bapakolami Na Ntango Ya Suka.

Ndeko Joseph Branham

St. Matai 5 :44-45 / 7 :21 /24 :15-28

St. Luka 17 :30 / 18 :1-8

St. Yoane 14 :12

Baefese 1 :5

2 Timote 3 :1-8

Baebele 6 : 1-8 / 11 :4

Emoniseli 10 : 1-7 /16 :13-14

Malaki 4 :5

I Mikonzi 22 : 1-28

Yilimia Mikapo 27 & 28

21-0912 Bilei Ya Molimo Na Ntango Elongobani

NSANGO: 65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Elongobani

PDF

BranhamTabernacle.org

BA MPONGO BAZALI KOYANGANA

Balingami ba Mpate na Etonga ya Nzambe,

Na mikolo Nkolo na biso Yesu azalaki awa na mabelé kati na nzoto, babeti ntembe mpe bazangi kondima balobaki na Ye:

Kino ntango nini okobetisa biso ntembe? Soko Yo ozali Klisto, yebisa biso polele.

Mbala moko lisusu, Akosolola na biso polele polele mpe koyebisa baoyo bazali koloba mabe mpo na Ye mpe Mwasi na Ye ya Libala, “ Nazali moto oyo auti longwa na Nzambe, atindami na Nzambe, abulisami na mosala na Nzambe, na OYO ELOBI NKOLO ya solo. Naumeli penza na bozali na Ye mpo na ntango molai, Nakosolola na bino lokola Nzambe Ye moko.

Nalingi te ete tembe ezala, mpe ete bino bondima, Nazali motindami ya Nzambe epai na bino. Etinda oyo nazali kosolola mpe motindami bazali nse eloko moko. Tozali kaka eloko yango Moko. Atindaki ngai epai na bino mpo nakomisela bino YANGO ELOBI NKOLO, Liloba moko sima ya mosusu.

Bokanisa, Liloba na Nzambe lilobi ete Akoki kosala eloko moko te bobele ete Amonisa nano ngai yango liboso. Bato balingi batia ndimbola ya bango moko na oyo ngai nalobi, kasi Liloba lilobi ngai na bino ezali na bosenga ya ndimbola te. Boloba KAKA oyo nalobi.

Nalingi mpe boyeba ete Liloba yango moko oyo nazali kolobela bino, ezali mpe kobika kati nab iso. Bozali na bokonzi ya Nzambe na bomoi kati na bino. Bozali Lingomba Mwasi ya Libala na bomoi.

Sima na ngai kolongwa, liboso moi makasi ya kozangisa mai mobanda, Nzambe Apesi bino esika ya komibomba liboso kosambisa ebeta mokili. Bokozala wana kozila, na boliaka Biloko bibombami oyo Akozala Atikeli bino. Bokozala kobika na nse ya boboto mpe mawa ya Emoniseli ya Yesu Klisto lokola Azali komindimisa Ye moko mokolo na mokolo.

Mpo na bino, Ekozala Biloko ya molimo na eleko ekoki. Ekokomisa bamosusu na malali na libumu na bango. Eleki mabumo na bango na vitamin mingi. Kasi mpo na bino BA MPATE na Ye,  ekozala Lipa ya bomoi, Yesu Klisto lolenge moko lobi, lelo, mpe libela.

Kobosana te, Nako leisa yo “WANA”; ezali esika mosusu boye te, “WANA”. Bato bakoseka bino mpe bakoloba ete bobeli ligboma, kasi oyo bazali kobenga bolema mpe kobungisa mayele, Nzambe akobenga yango tombwá.

Ayebisaki biso ete lotomo lonene Nzambe apesaki ye ezalaki penza kokokisama ya elilingi ya lotomo ya Eliya. Wana ebelemaki moi makasi ya kozangisa mai kosila, Abimisaki ye mpe Atindaki ye epai na NDAKO ya mwasi mokufeli mobali kino ngàngé elekaki.

Alobaki ete mwasi mokufeli mobali amisangisaki te na bazangi kondima to azwaki te elembo ya nyama na ntango ya moi makasi, boye Abengaki Eliya kosunga ye. Abelemaki kokufa awa etikalaki ye kaka na mwa kopo moko ya fufu, eloko moke moko azalaki kokangama na yango.

Eliya abengaki ye, “Pesa ngai yango liboso, mpo ete NKOLO YAWE ALOBI BOYE ete, nzungu ya fufu ekozanga te mpe molangi ya mafuta ekokauka te , kino mokolo Nkolo Yawe akotinda mbula na mokili.”

Esengelaki atia Nzambe liboso. Esengelaki na ye kondima mpe kotingama na Liloba moko na moko oyo motindami wana alobaki. Ayebaki ete motindami yango na Etinda na ye bazalaki eloko moko. Maloba oyo alobelaki ye ekokokisama, mpo ete ezalaki Oyo Elobi Nkolo Yawe.

Bongo mpe nde ezali lelo, Lipa ya Bomoi oyo bana bazali kolia, kobila Etinda ya Nzambe, oyo ezali kobatela bango na bomoi na ntango ya ngàngé makasi.

Liloba yango moko eyei epai na biso mpe ezali na kati na biso mpe tozali koleisama na Biloko bibombami ya Nzambe oyo ebombami liboso ya mokili. Amonisaki biso ete Etinda mpe motindami bazali moko. Biloko ya molimo ebongisami, mpe ezali kati na eleko yango sok’oyo.

Botombelami botangi ya MOKANDA MOSUSU YA BOLINGO MOKOL’OYO MPO NA MWASI YA LIBALA. Tokomema molangi na biso ya mafuta, mpe ekozala kosopana-sopana. Sima tokotoka longwa na Mbeki ya fufu, mpe ekozala etondi kino likolo ya ekotelo. Tokofanda elongo na bisika ya Likolo longwa na mokili mobimba, wan’ekozala biso tobombami na bisika na biso ya kuku, na bosepelaka na Mana mabombami wan’ezali Nzambe komi ndimisa Ye penza epai na biso.

Boya koyangana kati na etongá ya ba Mpate elongo na biso Mokolo ya Lomingo na ngonga ya 2 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, ekoyoka biso motindami ya Nzambe komemela biso Etinda ya Nzambe: Biloko ya Molimona Eleko ekoki 65-0718E.

Biso na dola moko mpe satime ntuku mwambe kotonga eyanganelo, ebele na bato ya bisika ya kobomba bibende mpe kobongisa mituka bakanaki ete ekokoma esika ya bango ya mosala. Kasi ezali naino Etonga ya ba Mpate mpo na ba Mpate ya Nzambe.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga

1 Mikonzi 17:1-7

Amosa       3:1-7

Yoele         2:28

Malaki         4:4

Luka.             17:30

Santu  Yoane 14:12

21-0905 Komeka Kosalela Nzambe Mosala Libanda Ya Mokano Na Nzambe

NSANGO: 65-0718M Komeka Kosalela Nzambe Mosala Libanda Ya Mokano Na Nzambe

PDF

BranhamTabernacle.org

BA MPONGO BAZALI KOYANGANA

Molingami Lingomba Mongongo ya Nzambe,

Tozali Lingomba na Ye Mongongo ya Nzambe, Mwasi Liloba na Ye ya motema, mpe ndenge ya biso kokanga motema ezali te kaka toyoka oyo Tata akoloba nab iso mpe komonisa biso Mokolo na Lomingo oyo.

Tozali na Liloba ya bomoi ya Nzambe na suka ya misapi na biso. Na kopusa kaka moko na mosapi na biso tokoki koyoka Nzambe kosolola na biso na nzela ya bibebu ya moto, Liloba ya Bomoi  Seko. Na kopusa kaka na mosapi moko Azali kosolola na biso mpe kofungolela biso mabombami oyo ebombamaki liboso ya bozalisi ya mokili.

Na mosapi moko Azali koyanola motuna moko na moko tozali na yango na mitema na biso. Na mosapi moko Azali koyebisa biso eloko nyos’oyo tolingi koyeba. Na mosapi moko tokoki koyoka Mongongo na Nzambe kosolola na biso mpe kopesa biso kondima ya konetolama. Na mosapi moko tokoki koyoka Nzambe kosolola mpe koyebisa biso, bobikisami.

Ntango monguna azali koyebisa biso ete tozali Mwasi na Klisto te, bozali kaka bato ya kokwea, na mosapi moko tokofinaka Play mpe tokoyoka Tata koloba na biso mpe koyikisa biso mpiko ete, “ BOZALI Mwasi na Ngai ya Libala moponami. Nabongisaki bino liboso ya kotongama ya mokili.”

Ntango móto na biso kati na molimo ekiti mpe monguna azali kobundisa biso uta na matumu manso, na mosapi na biso moko tokoki koyoka Ye kosolola na biso mpe koloba na petee ete, “ Mbote baninga,” mpe kimia ya Molimo Mosantu ekotondisa eteni ya ndako kaka mbala moko.

Natngo tozali koyoka MONGUNA KOLOBA ETE bozali kaka kolanda moto mpe kotiela ye motema mingi, kaka na mosapi moko tokoyoka Mongongo ya Nzambe koyebisa biso:

Ayebisaki ngai ete soko namemi bato kondima ngai. Yango ezali komonana lokola nde likambo ya kokamwa mpo nan gai koloba yango, “ Bondimi ngai?”alobaki, “Boksengelaki nde te kondima Nzambe?” Esengeli bondima yango. Bosengeli bondima Nzambe mpe bondima Klisto, mpe bondima Molimo Mosanto. Bongo sima ya kondima bango nyoso, Nzambe Alingi ete bondima ngai

Ntango monguna azali komeka koyebisa biso ete, “ Ezali makomi te mpe ezali libunga koya elongo na ntango moko boye mpe koyoka ba bande ” kaka na mosapi moko tozali koyoka Mongongo na Nzambe kolobela biso ete:

Mpe na lingomba oyo, mpe na ba bande, bato oyo bozali koyoka ba bande, mpe bat’oyo bokangni na biso na ba telefone na bisika mosusu na mboka, nalingi bino bolanda penza oyo na bokengi, mpe bozanga te koyoka.

Ntango monguna azali koloba ete Ndeko Branham alobaki botikala na Liloba, ba bande te, na mosapi moko tozali koyoka Mongongo na Nzambe KOGANGA MAKASI mpe koloba ete:

Boye mpe ngai nalobi na Nkombo na Yesu Klisto: Bomeka te kobakisa eloko moko, bolongola te, kotia makanisi na bino moko kati na yango, boloba kaka oyo elobami likolo na ba bande wana, bosala kaka oyo Nkolo Nzambe Apesi motindo ete bosala; bobakisa likolo na yango te.

Mongongo yango ezali kutu koyebisa biso ndenge nini tokoki kotala yango na Liloba mpo tosala libunga te.

Ezali na mitindo mitano. Esengeli ezala ndenge wana.

·      Ntango na Ye

·      Eleko na Ye

·      Moto oyo Ye Aponi

·      Esengeli eya epai ya mosakoli

·      Mosakoli esengeli azala mosakoli oy’andimisami

Mosakoli na biso azali Yesu Klisto

Liloba ya ntago Lindimisami! Liloba Lindimisamaki na mikolo ya Mose ezalaki Yesu. Liloba Lindimisamaki na mokolo ya Yisaya, Elia, Yoane, nyoso ezalaki Yesu. Mpe Liloba Lindimisami lelo ezali Yesu, motindo moko lobi, lelo mpe libela.

Na mosapi moko tokoki kofina play mpe koyoka Yesu Klisto Ye moko koloba na biso mpe kofungolela biso:

·      Ntango yang’oyo

·      Eleko yang’oyo

·      Moto naponaki ye oyo

·      Mosakoli na Ngai ye oyo

·      Mosakoli oyo andimisami koleka mosakoli ata nani kati na basakoli na Ngai nyoso

Lelo, ezali kaka te ete tozali na Nzambe ya Lola kosolola nab iso, kasi Azali na kati na biso, kofanda mpe kobika bomoi na Ye na nzela na biso. Eleki lisosoli na biso.

Tika ete tomibongisa biso penza. Ntango yang’oyo ebelemi. Tozali komona Likomi kokokisama mokolo na mokolo. Etinda ezali koyebisa biso pelamoko ba sango ya zoloná ya lelo:

“Yikiyiki  ya ntango, kolemba mitema kati na mabota, koningana na mabele na bisika na bisika, konguluma ya mai monene, motema ya moto ezali kokwea mpo na nsomo.”

Ata mokili yango moko ezali koyebisa biso lelo, wan’ezali biso komona mabota kokwea, mabele kozinda, likomi ya loboko ezali likolo na etutu.

Tozali komona Mwasi na Libala mpe Lolenge Azali na yango lelo, Mpe toyebi na nzela ya bozalisi, ete Lingomba ezali kobelema kolongwa.

KEMBO, tozali komilengela kolongwa. Kaka na mosapi moko okoki komilengela yo moko. Nazali kobenga bino ete boya bobakisama na biso Mokolo na Lomingo na ngonga ya 2 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, koyoka: Komeka kosalela Nzambe mosala Nzokande Libanda na Mokano ya Nzambe 65-0718M

Ndeko Joseph Branham

Dutelonome 4: 1-4 ; 4: 25-26

I Ntango 13

I Ntango  15: 15

Njembo 22

Nsantu Malako 7:7

Yoele 2: 28

Amosa 3:7

Malaki 3

Santu Matayi 11: 1-15

I Bakolinti 13:1

21-0829 KOYOKA NSONI

Nsango: 65-0711 KOYOKA NSONI

BranhamTabernacle.org

BA MPONGO BAZALI KOYANGANA

Balingami Eyanganelo ya Branham,

Tozali na matondi mingi Abongisaki biso liboso kopona Lingomba ya solo kotia mabota na biso na kati.

Soko nazalaki moto ya kopona lingomba, mbe nakopona Lingomba ya solosolo, oyo etelemi na moboko, oyo ya Sango Malamu mobimba, Lingomba ya Biblia, soko ezalaki ete napona moko mpo ya kotia libota nan gai kati na yango.

Tozali na matondi mingi koyebisa mokili  mobateli na biso azali nani, mpe tozali kosala makambo kaka lokola Ye.

Soko otali bizaleli ya lingomba wana, tala kaka mobateli na yango mwa ntango moke, mpe mbala mingi okomona ete lingomba ezali kosala kaka lokola mobateli.

Tozali na matondi mingi mpo ete ezali likambo te ata tozwami wapi kati na mokili, Azali kokutana na biso.

Alakaki ete Akozala esika moko epai wapi bato mibale to misato bayangani elongo. Ya solo, wana nde mondimi ya solo afandisi bilikia na ye, ezali epai wapi Liloba ya Nzambe ezali kondimisama kati na solo.

Tozali na matondi mingi ete tondimi mosakoli na Ye, mpe liloba nyoso lilobami.

Soko bondimi ete nazali mosakoli ya Nzambe, boyoka oyo nayebisi bino

Mosakoli na Ye esengelaki ateya nini?

Etinda ebongi be, kozonga kati na Liloba

Atindamaki mpo ya nini?

“ Kende kozwa Mwasi ya Libala wana!” Yango ezali lotomo. Ntina wana nde nazali awa. Yango nde nazali komeka kosala, ezali kobenga Mwasi ya Libala abima

Ekozala ko ndenge nini soko tobimi na molongo?

Mpe yango nde esengelaki nasala, kobatela mwasi ya Libala kati na molongo

Sasaipi Tata Azali na nini na ebombelo mpo ya Mwasi na Ye ya Libala?

Nazali kozonga na ndako, kozongela ndai na ngai lisusu, mpe kobandela lisusu ya sika. Pamba te oyo tozali kolengele kosala, nde ntina ya kozala na ngai awa.

Lokumu epai ya Nkolo, ntango nini nd’ezali biso kozongisa kosambela na biso ya sika lisusu?

Mpe bongo, Soko Nkolo Alingi, Mokolo mwa Lomingo mokolanda na tongo, tokobanda losambo. Mpe bino nyoso bosunga ngai, mpe tokobondela, mpo ete ezalaki na kati ya motema na ngai komeka…Balobaki ete, “ Tokokaki kokende na Louisville to tokokaki kokita kuna na New Albany.” Kasi losambo losengelaki lozala mpo ya Jeffersonville. Nakokende na Louisville mpe na New Albany, na ba ntango mosusu, kasi oyo esengeli ezala awa na Jeffersonville.

Tobelemi Tata. Ba mpongo na Yo bakoyangana mpe koyoka. Nini nde ekosalema na ntang’oyo?

“…Nazali na bosenga ya kondima na koleka.” Nde ntina nazali na ndako mpo na sik’oyo ezali mpo ya kozwa ko—kondima ya sika kopela na moto

Nkolo Azwa lokumu, yango nde biso mpe tolingi, Tata, kondima ya sika oy’ezali Kotoka pene ya kopasuka. Toyebi ete kondima euti na koyoka, koyoka Liloba na Yo, mpe Liloba na Yo likoyaka epai ya mosakoli.

Etinda oyo, makasi ya Nzambe na Nguya nyoso, esili kopalangana na mokili mobimba, kasi sasaipi ntango ya kokabola ekomi. Nzambe Azali kobenga Mwasi na Ye ya Libala, mpe zabolo azali kobenga lingomba moko. Tozali eteni ya Elinda oyo, Liloba na Ye, Mwasi na Ye ya Libala!

Tozali na kondimisama mpe toyebi eloko nini tozali koloba. Toyoki soni te ete tondimi Etinda oyo mpe Motindami na Ye, mpo ete bazali eloko moko. Tozali na nsoni te koloba ete: “Tondimi Liloba moko na moko”. Tozali na nsoni te koloba ete:”Tozali koyoka ba bande na lingomba na biso”. Tozali koyoka nsoni te koloba ete:” Tozali bato ya ba bande”

Ezali pasi mpo ya biso kososola ete mondimi nyoso, to motei nyoso kati ya ntomo mitano ya mosala, oyo azali kobeta tolo ete andimi Etinda oyo, mpe azali koloba ete Ndeko Branham azali  mosakoli ya Nzambe mpe motindami, na sima andima mpe ayebisa bato ete ezali mabe mpe ekokani na Liloba te koyoka Mongongo ya Nzambe mondimisami kati na losambo na bango.

Tika tozala na molende kati na eleko, soko libanda ya eleko; topamela; tosembola, mpe…na motema molai nyoso mpe malakisi. Mpo ete ntango ekoya epai wapi bakoyikela malakisi na bule mpiko te; kasi na posa mabe na bango bako…komizwela mpo na bango penza ebolo ya balakisi, konyomotisa matoi na bango; Mpe bakotangwa longwa na solo kobila masapo ya pamba.

Ntango ekomi mpo ya Liloba ya Nzambe penzapenza oyo ezangi kosangisama, oyo endimisami na Nzambe, Mongongo ya Nzambe oyo endimisami; ezali komonana ete ezali kotondisa ebolo mosusu na nsomo ya nsoni. Bazali na nsomo mpo na yango  mpe bandimi ete ezali kokesene na Liloba kozala Lingomba ya ba bande.

Kasi biso, ezali solo ya likambo. Tozali na nsoni te. Ntango toyambaki emoniseli wana, ezalaki na eloko moko ekitaki mpe efandaki kati nab iso; mpe sik’oyo ezali na eloko moko te oyo ekoki kozwa esika na yango. Tozali na esengo kobengama moko na bango, Lingomba ya ba bande, ebolo ya ba bande, bato ya ba bande.

Tozali kotindela bino mbela ete boya koyoka Lotomo ya ba bande elongo na Eyanganelo ya Branham, Mokolo ya Lomingo na ngonga ya 2 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville wan’ekoyangana biso na bozilaka na posa monene; kokomisa ndai na biso ya Libala ya sika lisusu, mpe kobandela mobembo ya sika, na boyokaka: KOYOKA NSONI 65-0711

Ndeko Joseph Branham

Santu Malako 8:34-38

21-0822 Kopona Mwasi Na Libala

Nsango: 65-0429e Kopona Mwasi Na Libala

PDF

BranhamTabernacle.org

BA MPONGO BAZALI KOYANGANA

Molingami Mwasi ya Libala ya Nzambe Oyo Aponami,

Tata aponaki Mwasi na Ye liboso ya bozalisi ya mokili.  Alingaki Mwasi ya Libala oyo akokaki kotalisa ezaleli ya Ye penza.Alingaki Mwasi ya Libala oyo akokaki kobenda bokebi na Ye na bobatelaka Liloba ya Ye.

Mwasi ya Libala oyo akosengela komiteka mobimba epai na Ye mpe Liloba ya Ye, na ndenge ete makanisi penza oyo ezalaki na kati na Ye ekozala kati na bango. Bakozala mosuni yango moko, mikua yango moko,  Molimo yango moko, makambo nyoso ndenge moko, ezali kaka kotongama elongo kino nyoso mibale bakokoma moko.

Alingaki koyema ezaleli penza ya Ye kati na bango, mpo ete esengeli Ye Mwasi azala kaka lokola Ye. Azalaki kozila longwa Atiaki Adamu mpe Ewa na Ye ya liboso na mabele mpo ya kozongisa Mwasi ya Ye ya Libala abongi be. Azalaki kozipa Ye, kozongisa na litondi mobimba ya kotalisama; mpo ete bakozala Mwasi ya Libala ya Ye Liloba lilobami.

Ntango Amonaki Ye, Azalaki na esengo mingi koleka, komona ete sukasuka Azwaki Mwasi ya Libala oyo akokakola Liloba ata moko te. Mwasi ya Libala oyo akobeta Tembe  ata moke te na moko na yango, kasi akozwa yango kaka lokola ezali. Bakoyebisa mokili ete yango ezali na bosenga ya ndimbola te, mpo ete ezali Liloba mpeto ya Nzambe.

Wan’ezalaki Ye kotala mwa mwasi ya Ye molingami ya motema, Azalaki na lipambu mpo na ye, esengelaki kaka  Alakisa ye polele. Boye Abengaki mwanje na Ye ya 7 ya nguya, mpo akoka komona  Mwasi yango koleka liboso na ye. Alingaki ete ye amona Ye, mpe amonisa Ye polele mpe ayebisa Ye boni Azalaki kitoko. Boye Akokaki koyikisa Ye mpiko mpe koyebisa Ye ete Ayebi oyo Ye azali.

Boye Azwaki mwanje na Ye mpe Atelemisaki ye na esika ya likolo mpo ete akoka komona Ye koleka. Ezalaki ye kotala, Molimo ya Nzambe Alobaki na ye ete:Mwasi ya Libala Azali.” Atalaki mpe amonaki BINO kuna. Motema na ye ezalaki na esengo.

Moko na moko na BINO bolataki molato ya ekolo epai wapi bouti: Switzeland, Germany, zingazinga na mokili, bikolo binso. Suki penza kitoko ya molai ekiti malamu na mukongo, maboko ya bilamba milai, bilamba ya nse kino na litindi. Mpe bino nyoso bozalaki na litambe ya moziki ya nzembo ya basoda n’ekulusu, kotambola liboso lokola na etumba. Wan’ezalaki ye kotala, tobandaki komata na likolo; tozalaki Liloba.

Matondi Tata.  Boni boni yango ezali koyikisa mitema ya biso mpiko lelo. Tolingi Yo mpe Liloba ya Yo na nyos’oyo ezali kati na biso. Tondimi Liloba moko na moko. Etinda oyo ekokani na biso ndenge moko  ndembo ya masano ekokani na likata.

Tolingi tozala Mwasi Liloba na Yo abongi be. Toyebi nzela mosusu ya kosala yango te kaka kotikala na Liloba, Mana maye mabombamaki Otikelaki Mwasi na Yo ya Libala ete Amilengela na yango.

Tomoni ete ntango ebelemi. Mokili ezali kolenga na nse ya biso na nzela ya koningana ya mabele. Banje ya Yo ya kotalatala bazali nyoso awa. Mokili ebaluki motó na nse makolo likoló. Bitumba, kowelana, kobomana, virusi mpe makono bipai binso. Monguna abelemi na kopema te, azali komeka konyokola Mwasi ya Libala, kasi Mwasi ya Yo molingami ya motema moponami atelemi kaka na Liloba na Yo.

Sunga biso Tata ete tolongwa te na litambe. Tika ete tozala na miso na biso likolo na yo mpe totingama na Loboko ya Yo eyebi kobongwana te. Matisa kondima ya biso, pesa biso oyo tozali na yango bosenga. Yaka ozala na Mwasi na Libala ba Yo Mokolo ya Lomingo oyo, na ngonga ya 2 sima ya nzanga ntango ya Jeffersonville, wan’ekoyangana biso zingazinga ya Mongongo ya Yo mpo ya mokolo mpe koyoka Yo koloba: Kopona Mwasi ya Libala 65-0429E

Oyo ezali libondeli ya biso, Tata:

O Nzambe na Lola, yokela mokili oyo etondi na masumu mpe bat’oyo batondi na masumu mawa, Nkolo, lokola tozali na pokwa oyo. Nzambe, nazali komeka kotelema na ntaka mpe kosenga boboto ya Nzambe, ete Y’osolola kati na ebele monene oyo na pokwa oyo mpe obenda Mwasi na yo ya Libala na bokebi, Nkolo ete batambola te na elembo soko ya lilako nini, kasi na mongongo ya Sango Malamu ya Nkolo Yesu Klisto. Sala yango , o Nzambe. Tika eyebana, na pokwa oyo ete ozaliNzambe, mpe Liloba ya Yo ezali Solo. Nabotelemaká liboso ya bato oyo, tozali kobenda kokeba na bango kati na Liloba ya Yo.

Ndeko Joseph Branham

Genese 24: 12-14

Emoniseli 21:9