Category Archives: Uncategorized

PÁSIKA 2025 – ELÁMBO YA GODI & MOLÚLÚ YA BOSUKOLANI MAKAKÁ

NSANGO: 62-0204 Elambo

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi ya libala wa Klisto,

Ntango ya nkembo nini oyo Mwasi ya libala ya Klisto akozala kozala na yango na Pasika ya Nsúka Ya Póso oyo. Nandimí ekozala moko ya makambo manéne ya bomoi ya bisó; ntango oyo tokobósana soko moké te. Nsúka ya póso ya Káfú-kafu.

Pasika yókó yókó etikalá kozala ntango moko godi mpo ya Mwasi ya libala, lokola tozali kokanga bikuke na mokili ya libandá na bokangáká masíni ma bisó manso mpe nyoso ya mokili oyo ekobendaka bokébi, mpe bobele kobúlisa lisúsu bomoi ya bisó epai na Ye. Ezali nsúka ya póso mobimba  ebúlisámeli Ye kati na losámbo, lokola tozali koloba na Ye kati ya mokolo moko na moko, na nsima koyóka Liloba na Ye.

Mongúna akómisí bokébí ya bomoi ya bisó kobéndama na ye mpe kotóndisama na makambo mbílíngá-mbilinga mingi mpenza ya bomoi na ndengé ete ekómí mpenza makasi  kokanga mokili libandá mpe koloba na Ye. Kútu masíni mpenza makosálelaka bisó koyóka Liloba, Satana asálelaka mangó kobébisa ntango ya bisó.

Kasi nsúka ya póso oyo ekokesene, mpe lokola nsúka ya póso ya Pasika ata moko te tosílá ndèle kozala na yango.

Ntango Nkoló atíakí likoló na motema na ngai koyóka Bilembo, Nazalaki na likanisi te boni mikolo mia sánzá mikozala. Kasi lokola ntango nyoso, ntango ya Ye ebongí be.

Biyenga bibalé bilekí, tozalaki na lokúmu ya boyóki Elembo ya 4, Eleko ya Mpongo, na sánzá ya Minei mwa 6, mbótámá ya mosakoli; boni ekokanákí mpenza.

Kasi sikawa, Nkoló azali kútu na mingi koleka na ebómbelo mpo ya bisó. Lokola Nalobaki, ntango nayókakí ete Nkoló Atiákí na motema na ngai koyókisa Bilembo, Nayebakí ete ekozua póso mingi kosilisa koyóka yango lokola ezali na Matéya 10 kati ya milongó miangó.

Wana etálakí ngai manáka, Namônákí ete Pasika ekozala libosó na bisó kosilisa Mateya mangó manso. Nakanisaki kati na ngai moko, Nabanza tosengeli tótélemisa  koyóka Bilembo mpe Akopesa ngai Mateya mpo ya Pasika.

Kati na mwa ntango Namónakí …ekozala KOBONGA BE. Tokoki kokóba koyóka Bilembo na Elembo ya Nsambo ekozala koyóka ma na Lomíngo ya Pasika na Ntóngó. Nakokaki kondima yango te, etandání na molongó mpenza na manáka. Nayebaki bobele na ntango yango, OYO EZALI YO, NKOLO.

Nazalaki bongo na bosepeli bonéne mpe na bozili na etingia mpo na ntango na bisó ya Pasika elongó moko na mosúsu, mpe elongó na Ye.

Nayebaki ete Asalaki manáka mpo ya bisó.

Na bongo, soko Nkoló alingí, tokokóba koyóka Bilembo kati na Nsúka Ya Póso na bisó godi ya Pásika.

MOKOLO MWA MINEI

Ezalaki na mpokwa ya mokolo mwa Minei nde Nkoló Yesu aliáki Elambo ya Nsúka na bayekoli ba Ye, kati na ekaniseli ya Elekeli libosó ya esóde ya bana na Yisalaele. Libakú malamu nini oyo kozala na bondeko elongó na Nkoló kati ya ba ndako na bisó, libosó ya nsúka ya póso ya bisó mosanto, mpe kosenga Ye kolimbisa masúmu ma bisó, mpe kopesa bisó nyoso tosengeli na yango kati na mobembo mwa bisó.

Sala yango, Nkoló. Bikísa babeli. Lendisa batungisami. Pesa esengo na baoyo bazali na nsé ya nguya mabe. Pesa kimia na balembi na mitéma, bilei na baoyo na nzala, bimeli na bango na mpósá, esengo na bango batóndí na mawa, nguya epai na lingomba. Nkoló, yeisá Yesu kati na bisó na mpókwa oyo, wana ebelemi bisó kozua Elambo oyo ezali etáliseli ya nzoto na Ye ebúkanáki. Tobondeli, Nkoló, ete Átambwela bisó na motindo mpenza godi…

Tika ete Ópambola basúsu, Nkoló, zingázingá ya mokili mobimba, baye Bazali kozila na esengo boyei ya Nkoló, minda mibongisamí, mpe bilekelo nyoso ya mílinga bipangúsámí, mpe Pole ya Nsango Malamu kongenga na bisiká ya molílí.

Tika banso tóbanda na 6:00 nsima ya nzángá  na ntango ya binó ya mboka na mboka koyóka Elambo 62-0204, na nsima mosakoli akokamba bisó kati na Molúlú mwa bisó mwa Elambo ya godi mpe Bosukwani Makaká, mokozala koleka na Lifeline app (na Angelé), to okoki komizuela losambo mobimba na Angelé to na nkótá isúsu na bofináká na ekanganeli awa na nsé.

Nsima ya Liteya, tokoyangana elongó na mabota ma biso kati ya ba ndako ya bisó mpe kozua Elambo ya Nkoló.

MOKOLO MWA MITÁNO

Tika tókende kati na libondeli elongó na mabota ma bisó na 9:00 na ntóngó, na nsima lisúsu na 12:00 nsima ya nzángá, kobianga Nkoló ázala elongó na bisó mpe átóndisa ba ndako ya bisó na Molimó Mosanto lokola tozali komibúlisa epai na Ye.

Tika ete makanisi ma bisó mázónga na mokolo wana na Kalvari, esili koleka pene na mbúla 2000, mpe tómóna Mobikisi na bisó akakémí likoló na ekulúsu, na nsima tómípesa na motindo moko kosala ntango nyoso yango ekosepelisaka Tata:

Mpe mokolo oyo, na bozalaká na motúya monene, moko ya mikolo minéne koleka, tika ete tótála makambo masáto mokolo moye Molingaki koloba mpo na bisó. Tokokaki kozua nkâmá na nkámá. Kasi na ntóngó oyo, Naponí bobele makambo masáto ma motúya, makeseni tolingí tótála, mpo na mwa ntango ikolanda, ntina na Kalvari epai ya bisó. Mpe Nabondeli ete ékwéisa mosumuki nyoso oyo azali awa; ekosala ete mobúlami nyoso ákende na mabóngo na ye; ésala ete mobeli nyoso átómbola kondima na ye epai ya Nzambe, mpe álongwa awa, abíkí; mosumuki nyoso, abikisamí; mozongi nsima nyoso ázónga, mpe ámíyóka nsóni; mpe mosanto nyoso, ásepela, mpe ázua botingami ya sika mpe elikia ya sika.

Na bongo na 12:30 nsima ya nzángá,  tika ete tókútana elongó kati na ba ndako ya bisó koyóka: 63-0323 Elembo Ya Motoba.

Nsima na yango tika ete tokútana elongó kati na libondeli na mbala moko nsima ya losambo, kati na ekaniseli ya bobakisami na ekulúsu ya Nkoló na bisó.

MOKOLO MWA PÓSO

Tika ete mbala moko lisúsu banso elongó tósangana kati ya libondeli na 9:00 na ntóngó mpe 12:00 nsima ya nzángá, mpe tólengele mitema mia bisó mpo ya makambo manéne makosala Ye mpo ya bisó na kati ya bisó.

Nakoki koyóka Ye koloba: “Satana, yaka awa!” Azali Mokonzi sikawa. Asémboli loboko, Asimbí lifungóla yango ya kufa mpe ya ewelo longwá na loketo na ye, akangí yango na loketo ya Ye Moko. “Nalingi éyebana epai na yo. Osalá bipale ntango molai mingi. Nazali Mwana wa Nzambe mobótami na ngondo. Makila ma Ngai mazali naino kotanga na ekulúsu, mpe motúya mobimba mofútámí! Ozali lisúsu na makoki te. Otikámí bolúmbú. Pesa Ngai mafungola wana!”

Na bongo na 12:30 nsima ya nzángá, tokoya bisó banso elongó koyóka LILOBA: 63-0324m Mituna Mpe Biyano Likoló Ya Bilembo.

Mokolo nini YA KÁFÚ-KAFU oyo ekozala mpo ya Mwasi na Ye ya libala zingázingá na mokili mobimba.

Na nsima tika ete tókutana elongó kati na libondeli mbala moko nsima ya losambo.

MOKOLO MWA LOMÍNGO

Tika ete ya libosó tólamuka na ntá ntóngó lokola Ndeko Branham asaláki na ntóngó oyo mwa moninga na ye, ndeke ya tólo motáné, alamúsákí ye na 5:00 ya ntóngó. Tika bobele ete tótondo Nkoló mpo ya kosekwisa Yesu longwá na bakufi:

Na ngonga ya Mitáno na ntóngó oyo, moningá na ngai moké na tólo motáné apumbwáki na lininísa mpe alamúsákí ngai. Eyokanákí lokola nde mwa motema na ye molingaki kopasuka, na bolobaká: “Asékwí.”

Na 9:00 ya ntóngó mpe 12:00 nsima ya nzángá, tika ete tokangana mbala moko lisúsu kati ya monyolólo ya bisó ya libondeli, kobondela moko mpo ya mosúsu mpe komíléngele koyoka Mongóngó ya Nzambe.

Na 12:30 nsima ya nzángá, tokoya elongó koyóka Liteya ya bisó ya Pasika: 63-0324e Elembo Ya Nsambo.

Na 3:00 nsima ya nzángá, tika ete mbala moko lisúsu tósangana kati ya libondeli, kotóndo Ye mpo NSÚKA YA PÓSO YA KOKAMWA APESI BISÓ ELONGÓ NA YE MPE ELONGÓ NA MWASI NA YE YA LIBALA NA MOKILI MOBIMBA.

Epai ya bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi na ngambo ya bibale minéne, lokola mbúla elekí, Nalingí kobianga binó bósangana na bisó na ntango ya Jeffersonville, mpo ya ntango nyoso ya libondeli likoló na manáka oyo. Namoni, ata ko bongo, ete koyóka bande Mokolo mwa Minei, mwa Mitano, mpe mwa Póso nsima ya nzángá ntango ya Jeffersonville ekozala mpenza kpókósó mpo ya ebelé mingi na bino, na boye nabóndeli binó bómiyoka ba nsómí koyóka Mateya mango na ntango Ikoki na bino . Nzokande, Nakolinga ete, bisó banso tokutana elongó Mokolo mwa Lomíngo na 12:30 nsima ya nzángá ntango ya Jeffersonville, koyóka Liteya ya bisó ya Lomíngo elongó.

Nasepelaki mpe kobianga bino mpe bana na bino kozala basangani ya misala ya Creations, Journaling, mpe mimekano ya YF, oyo libota ya bino mobimba bokoki kosepela na yango elongó. Tokanisi ete bokolinga yango lokola nyoso izuí mobóko likoló ya LILOBA tokozala koyóka na nsúka ya póso oyo.

Mpo ya manáka ma nsúka ya póso, mayebisi mpo ya bomiléngeli mpo ya molúlú mwa Elambo, bisaleli bikosengelama na yango mpo ya misala mia Creations, Mimekano mia Pasika, mpe nsango mosúsu, bómóna bikanganelo ya mipepe na nsé awa.

Tika ete tókanga ba telegóne ya bisó mpo ya nsúka ya póso ya Elámbo longóla sé kokanga ba fotó, koyóka Eteni ya Liloba ya mosakoli mpo ya Mokolo, mpe koyóka ba bande longwá na Table app, Lifeline app, to komizuela eloko longwá na ekanganeli ya mipepe.

Ezali lokúmu lonéne mpo ya ngai kobianga yo na libota na yo koya elongó na Mwasi ya libala zingázingá na mokili mobimba mpo ya nsúka ya póso etóndí na LOKÚMU, MASÁNZOLI MPE LOBIKO. Nandimí ezali mpenza solo nsúka ya póso ekobongola bomoi na yo mpo ya libela.

Ndeko Joseph Branham

Makambo masengelamí na yango na etenéte:

Manáka ma Molúlú mwa Elambo mpe Bosukolani Makaká

Manáka

Lilako likoló ya bomibongisi mpo ya Elambo

Biloko bisengelami na yango mpo ya misala mia Creations

Mimekano mia Pásika

25-0413 Elembo ya Mitano

Nsango: Elembo ya Mitano 63-0322

BranhamTabernacle.org

Balingami Bapémi,

Tozali awa. Tosílí tokómí. Bondimisami ya Liloba ekokísí ete Emóniseli ya bisó ya Etindá Oyo eútí na Nzambe. Tozali kati na MOKÁNO MWA YE MOBONGÍ BE na botíkaláká na Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande.

Litómbá nini ezali Kofina Play? Maloba mazali bisó koyóka likoló ya ba bande mazali mpenza na motúya, na bosánto, na motindo ete Nzambe Ye moko akokaki kútu te kotiela Mwanje moko motema mpo na Yango…kútu ata moko te ya Banje na Ye ya likoló. Esengelaki émónisama mpe émemamela Mwasi na Ye ya libala na nzela ya mosakoli na Ye, mpo ete ye nde Liloba ya Nzambe liyáka epai na ye, BOBELE mosakoli na Ye.

Nzambe akangólaki Bilembo, Apesaki Yango na nsé na mwanje na Ye ya mabelé motindami ya nsambo, mpe amónisaki Búku mobimba ya Emóniseli epai na ye.
Na nsima, Nzambe alobaki na nzela ya mwanje na Ye ya mabelé mpe amónisaki NYOSO epai ya Mwasi na Ye ya libala.

Ndambo moké moko na moko elobamákí mpe emónisameláki bisó. Nzambe azaláki mpenza na bisó na motéma na lolengé ete Ayebisáki bisó kaka te oyo esalemákí awa na mabelé longwá na ebandeli ya ntango, kasi Alobákí na nzela ya mwanje na Ye mpe Ayebisaki bisó oyo ezali kosalema na esiká lokola paladíso sikawa mpenza.

Alingakí te tótungisama, to tózala na kotatabana na ntina ya oyo ezali na mikolo mikoya mpo na bisó wana ekolongwa bisó na mongómbo oyo ya mabelé. Na bongo Nzambe Ye moko azuakí mwanje na Ye ya nsambo ya nguya na ngambo ya ezipelo ya ntango, ete ákoka komóna Yangó, koyóka Yangó, kútu kosolola na bango Kúná. Ezalákí emónoneli te, azalakí KÚNÁ.

Nzambe amemákí ye Kúná na ntina ete ákoka kozónga mpe koyebisa bisó: “Nazalaki Kúná, Namonâkí Yango. Ezali kosalema SIKAWA MPENZA…ba mama na bisó, ba tata na bisó, ba ndeko mibali ya bisó, bandeko basi ya bisó, bana na bisó mibali, bana na bisó basi, basi na bisó, mibali na bisó, ba kóko na bisó, Mose, Eliya, BABULAMI NYOSO baoyo bakendeki Bazali Kúná na Bilamba Mpémbé, kopema mpe kozila BÍSÓ”.

Tokolela lisúsu te, zambí ekozala nyoso esengo. Tokozala na mawa lisúsu te, zambí ekozala nyoso nsai. Tokokúfa soki moké te, zambí Ezali nyoso bomoi. Tokoki konuna te, zambí tokozala banso bilengé mpo ya libélá.

Ezali bobongi be…bakisa bobongi be…bakisa bobongi be, mpe tozali kokende kuna!! Mpe lokola Mose, tokotika ata linzáka te, TOZALI KOKENDE BISÓ NYOSO…LIBOTA YA BISÓ MOBIMBA.

Boni ezali na litómbá koLINGA mwanje ya nsambo ya nguya wana?

Mpe Egángákí, koloba: “Nyoso oyo olingá ndèle,…” mbano mpo ya mosala ya ngai. NAzali na bosenga ya mbano te. Alobaki: “Nyoso oyo olingá ndèle, mpe nyoso oyo alingá ndèle yo, Nzambe apésá na yo.

Tótánga yango lisúsu nabondeli bino: Alobaki nini?…Nzambe apésá na YO!!

Mpe tokomíbakisa na bango mpe kogánga: “Tozali Kopéma Likoló na Yango”

Tozali kopémisa sékó na sékó ya bisó likoló ya nini? LILOBA MOKO NA MOKO LILOBAMÁKÍ LIKOLÓ YA BA BANDE. Natondi na matondi epai ya Nkoló ete Apesí bisó Emónoneli ya Solo ete Kofina Play nde eloko ya LITÓMBÁ KOLEKA Mwasi ya libala asengeli kosala.

Okolinga kopema elongó na bisó? Yaka komíbakisa na bisó Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka nyoso na ntina ya oyo mikolo mikoya misímbí, epai wapi ezali bisó kokende, mpe lolengé ya kokóma Kúná, lokola tozali koyóka Mongóngó ya Nzambe koloba mpe kofungola: Elembo Ya Mitano 63-0322.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ma kotanga libosó ya boyóki Liteya:
Danyele 9:20-27
Misala 15:13-14
Baloma 11:25-26
Emónoneli 6: 9-11 / 11:7-8 / 22:8-9

25-0406 Elembo Ya Minei

Nsango: Elembo Ya Minei 63-0321

BranhamTabernacle.org

Balingami Babulami Babótami ya Lóla,

Tata azali koyanganisa bisó elongó na nzela ya Liloba na Ye, mpe bondimisami ya Emóniseli yango ezali kopesa bisó kolamukisa. Aponáki bisó libosó ya bozalisi ya mokili, zambí Ayebákí tokozala sembo na Liloba na Ye na kopona ya bisó moko.

Bótika náloba yango lisúsu mpo ékóta mpenza na bozindó. Atálákí kati ya ntango, kino na nsúka mpenza ya ntango nyoso, mpe AMÓNÁKI BISÓ…bozali koyóka yango? AMÓNAKI YO, AMÓNAKI NGAI, mpe alingákí bisó, mpo ete na nzela ya kopona ya bisó moko, tolingaki KOTIKALA NA LILOBA NA YE.

Na nsima ndèle, Asengeláki kobianga banje mpe bakelúba na Ye nyoso elongó mpe kotálisa epai ya bisó mpe koloba: “NDE YE,” “NDE MWASI NA NGAI YA LIBALA,” “NDE BAOYO NAZALAKI KOTÁLELA!”

Lokola Yoane, nde ntina tozali kosála bogángi mpe bobéleli nyoso oyo, mpe lokúmu na Nkoló, tolamúkisámí likoló ya Vínyo ya Sika mpe toyebi, NA NTEMBE ATA NDAMBO TE, TOZALI Mwasi na Ye ya libala.

Ezali pelamoko mbúla ya mipepe mikási na nkáké nyoso tozalaki kozua awa na kati ya Jeffersonville póso oyo…Bisó mpe lokola tozali kotinda EKEBISELI na mokili.

Mwasi ya libala azali kozala na NKÁKÉ NA MOPEPE MOKÁSI YA EMÓNISELI, MPE EZALI KOBÓTA PELA YA MBÚLA YA EMÓNISELI. MWASI YA LIBALA ASILI KOMÍLÉNGELE MPE KOYEBA BAZALI BA NANI. KENDE NA ESIKÁ YA KOBATELAMA NA MBALA MOKO. FINÁ PLAY TO BÉBÍSÁMÁ.

Tozali te kobika na Eleko ya Nkósi, to Eleko ya Ngombe, soko Eleko ya Moto te; tozali kobika na ELEKO YA MPONGO, mpe Nzambe atindelaki bisó mpongo ya nguya, Malaki 4, kobianga Mwasi na Ye ya libala kobima mpe kokamba ye.

Boni ekolóngobana mpenza Lomíngo loye, lokola tokosangisama elongó koyóka Elembo ya Minei. Ekozala Mokolo ya Mbótámá ya mpongo ya nguya mosakoli ya Nzambe.

Tika ete tosepela mokolo monene oyo mpe totóndo Nkólo mpo na botíndéláká bisó mpongo na Ye motíndami, oyo Atindákí kobianga bisó kobima mpe komónisa Liloba na Ye.

Ndeko Joseph Branham

Liteya: Elembo Ya Minei 63-0321

Ntango: 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville

Makomi ya kotanga kati ya bomílengeli.

St. Matai 4

St. Luka 24:49

St. Yoane 6:63

Misala 2:38

Emoniseli 2:18-23, 6:7-8, 10:1-7, 12:13, 13:1-14, 16:12-16, 19: 15-17

Genese 1:1

Njembo 16:8-11

II Samwele 6:14

Yilimia 32

Yoele 2: 28

Amosa 3:7

Malaki 4

25-0330 Elembo ya Misato

Nsango: Elembo ya Misato 63-0320

BranhamTabernacle.org

Molingami Éwa ya Molimó,

Tiká nábanda mokandá mwa ngai lelo na bómbe ya atomíki ya Nzambe; ezali te bondóki ya .22, BÓMBE YA ATOMÍKI mpo ya Mwasi ya libala ya Yesu Klisto.

Sikawa soko olingí kokoma yangó; na solo mpenza bino nyoso boyebí yango: Yesu, Yoane 14:12; mpe Yoele, Yoele 2:38; Paulo, mibale Timote 3; Malaki, mokapo ya 4; mpe Yoane momónisi, Emoniseli 10:17, 1-17. Bomoni, mpenza kaka oyo ekokaki kosalema sikawa!

Liyebisi mpe ekébiseli: eteni ya maloba malandí ezali mpo ya yo te soko ondimí.

“Totiaka lokúmu mingi likoló ya mosakoli ya Nzambe.” Okoki kozala Mwasi ya libala te Soko ozali kaka koyóka mosakoli.” “Koyóka ba bande kati ya losámbo ezali mabe.” “Móto mosili molekisami; eloko ya litómbá koleka lelo ezali koyoka batéi.” “Kofina Play banso na ntango yango moko ezali ebongiseli.”

Epai na lingomba, ezali Nini? Liloba kati na nzoto likómi mosuni kati na bato na Ye lisúsu! Bomoni?

KABOOM…Na bongo na bofináká play, tokoki koyóka Liloba kati na nzoto likómí mosuni, koloba mbebu na litói epai na bisó lokola Azali komónisa Liloba na Ye.

Mpe moto moko akoki koloba Ezali te MONGÓNGÓ YA LITÓMBÁ KOLEKA OKOKI KOYÓKA? Eteni oyo ya maloba ezali mpo na yo.

Mpe bandimi na bango Yango kaka Te.

Na koleka Nkoló azali kopesa bisó Emoniseli ya Liloba na Ye, mpe baoyo tozali, na koleka oyo nyoso azali libandá ya Emóniseli yango azali kotangwa mosiká.

Tiká náloba yango, mpenza, na ntina ete bózala…ékóta kati ya motema. Nalingi oyo ézwa yango. Nde likambo na bino lelo, bomóní, boyebí Liloba te! Bomóní?

Nzambe apakólaki bato kotéya Etíndá Oyo, kasi ezali na Etémelo bobele moko: Liloba. Ntango oyókí motéi, to moto ata nani koloba, esengeli ózala na kondima kondima ete oyo azali koloba ezali MPENZA Oyo mosakoli ya Nzambe asili alobaki. Liloba ya bangó, emóniseli ya bango, ndimbola ya bango ikokí kokwéa; Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande EKOKI KOKWÉA SOKÍ MOKÉ TE.

Bosí boyóká na ntina na Nzambe kati ya komíkitisa na bofináká play…Alobí yango LISÚSU.

Bazángí Ye, Liloba ya bomoi limónisámí kati na mosuni, na nzela ya Liloba lilakamákí. Liloba lilakákí kosala makambo maye. Elaká esálemákí, ete ekozala lokola boye na mikolo ya nsúka.

Bóyoka Nkáké na Ye. Nkáké nde Mongóngó ya Nzambe. William Marrion Branham azali Mongóngó ya Nzambe epai na libóta oyo.

Mwa—Mwasi ya libala azuí naino kolamukisa te. Bomoni? Kolamukisa esálémá naino kuna te, bomónisami ya Nzambe kolamukisa Mwasi ya libala naino te. Bomoni? Tozali koluka yango sikawa. Ekosengela na Nkáké íná kuna nsima iyebani te, kolamusa Ye lisúsu, bomoni. Ee. Akotínda yango. Alakáki yango. Sikawa bótala.

Bokokí kozungulusa kobébisa yango soko bolingí, kasi Nkáké Nsambo ikopésa Mwasi ya libala kolamukisama na nzela ya Emóniseli mpe Kondima ya Konetolama, oyo ekoyaka bobele na nzela ya Molimó Mosanto koloba na nzela ya mosakoli ya Nzambe. Ezali kosalema SIKAWA MPENZA zingázingá ya mokili mobimba. Nzambe azali na Mwasi na Ye ya libala alamúkisámí na Liloba lia Ye.

Kaka yango te, kasi Asili ayebisí mongúna wa bisó eloko ya kosála.

Batélá mabóko ma yo mosiká na bango. Bayebí epai wapi Bazali kokende, mpo ete bapakólamí na Mafúta ma Ngai. Mpe na bopakólámáká na Mafúta ma Ngai, Bazali na vinyo ya esengo, zambí bayebí Liloba na ngai ya elaká, Nakosekwisa bango lisúsu.’ Kosalela Yango mabe te! Meka kokende te kopotana na bango.

Ayebisaki mongúna na bisó kobatela maboko ma ye ma bosoto mosiká na bisó. Kasi malali makoki naino mpe kobundisa bisó. Ee. Tozali naino na makambo? Ee. Kasi Ayebisáki mpe bisó eloko ya kosála.

Ezali na bozindó. Tangá yango malembe mpe lisúsu na lisúsu.

Libosó Liloba, ezali likanisi. Mpe likanisi lisengeli kokelama. Malamu. Na boye, makanisi ma Nzambe makomákí bozalisi wana elobamákí mango, na nzela ya Liloba moko. Nde ntango azali koyeisa yango epai na —epai na yo lokola likanisi, likanisi ya Ye, nde limonisameli yo. Nde, ezali naino likanisi kino óloba yango.

Makanisi ma Ye makómaki bozalisi wana elobamákí yango. Na nsima, makanisi ma Ye mayeisamáki mpe mamonisámáki na bisó lokola Liloba. Sikawa ezali naino likanisi elongó na bisó kino tóloba Yango. BOYE TOLOBÍ YANGO…MPE TONDIMI YANGO.

NAzali Mombóto ya Bokonzi ya Abalayama. Nazali Mwasi ya libala ya Klisto. Naponamáki mpe nabongisamáki libosó yambo ya bozalisi ya mokili kozala Mwasi na Ye ya libala, mpe eloko te ekoki kobóngola yango. Elaká moko na moko kati na Biblia ezali ya ngai. Ezali Liloba na Ye epai na ngai. Nazali mosangoli ya Elaká yango mpenza. Azali Nkoló Nzambe oyo abikisaka makono ma ngai manso. Nyoso ezali ngai na yango bosengá ezali ya ngai, Nzambe alobaki bongo.

Nzambe kati na komikitisa: Kondima ekoyaka na nzela ya boyóki, boyóki Liloba. Liloba likoyaka epai ya mosakoli.

Moto nyoso alingí kosalela “BITÉNI YA MALOBA YA MOSAKOLI” Kokokisa makanisi ma bango, mabánza ma bango, litéya ya bango. Mpe Bazali na elonga, Ngai mpe bongo, nde ntina nyoso Napesaka bino ezali biteni ya maloba ma mosakoli koyebisa bino: Bótikala na ba Bande. Boyóká Mongóngó wana. Mongóngó wana nde Mongóngó ya Nzambe. Esengeli óndima Liloba moko na moko likoló ya ba Bande, ezali te oyo moto ata nani mosúsu alobí. Mongóngó wana NDE MONGÓNGÓ YA LITÓMBÁ KOLEKA OSENGELI KOYÓKA.

Basúsu Bazali kosálela biteni ya maloba ma mosakoli komema bino na botéi ya bango, na lingomba na bango, na ndimbola ya bango, emoniseli ya bango. “Bótikala na mobateli ya bino.” (Na bongo, Nalingi oyo wana mpe lokola, zambí tokosalaka yango, kaka mobateli oyo akeseni.) “Azali te bobele ye nde libángá moké moko likoló ya libóngo.” “Atikalá koloba ata mbala moko te ete bande íyókama kati ya losambo.”

Tía te ndimbola ata nini ya yo moko na Yango. Alingi oyo ya peto, abebísami te, ata kofina líso te. Nakolinga te ete mwasi na Ngai áfinela mobali mosúsu moko boye líso. Mpe ntango okei koyóka biyóká—yóka ya mabánza, mosika na Yango, ozali koyóka, ozali kofinela Satana líso. Amen! Ezali kosala te ete bómiyóka bato ya losambo? Nzambe alingí bótikala bobébísámí te. Botikala wana kaka mpenza elongó na Liloba yango. Bótikala sé na Yango. Malamu.

Mpo na ngai mpe ndako ya ngai, tokofina play mpe tokolanda Liloba lia Nzambe kati na nzóto koloba na nzela ya motindami na Ye mwanje ya nsambo. Tokobakisa te ndimbola ya bisó moko na Yango; tokofina líso te to koyóka lobánzo ata nini. Toko TIKALA NA LILOBA WANA PELAMÓKÓ LILOBAMÁKÍ LIKOLÓ YA BA BANDE. Ezali Nzambe kati na komíkitisa.

Ntango ya nkembo nini oyo tokozala kozala na yango Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka: Elembo Ya Misato 63-0320. Nalingi kobianga yo komíbakisa na bisó lokola tozali kosangana zingázingá ya Liloba mpo ya lelo.

Ndeko Joseph Branham

Makomí ma kotanga yambo ya boyóki Liteya:

St. Matai 25:3-4

St. Yoane1:1, 1:14, 14:12, 17:17

Misala Mokapo ya 2

I Timote 3:16

Baebele 4:12, 13:8

I Yoane 5:7

Lewitiko 8:12

Yilimia Mokapo ya 32

Yoele 2:28

Jekalia 4:12

Bótika názua libakú liye koyeisa yango polélé mbala moko lisúsu. Natémeli te bótáno ya botéi. Nandimaka bótáno ya botéi. Nayóki te ete ezali mabe koyóka motéi. Nandimi ete osengelaki koyóka mobateli wa yo epai wapi Nzambe atíí yo. Likambo na ngai ezali, Nandimí ete Nzambe atindaki mosakoli na mokolo ya bisó. Nzambe amónisaki Liloba ya Ye epai ya mosakoli na Ye. Nakoki kozala na libúngá, mobateli wa yo akoki kozala na libúngá, kasi toSENGELI koyókana (soko tolobí ete tondimí ETINDÁ OYO ezali solo mpe Ndeko Branham azali mosakoli ya Nzambe) oyo elobami likoló ya ba bande ezali Yango Elobi Nkoló Yawe. Soko ondimí yango te, na bongo ondimí na yo Etindá oyo te. Na boye, Nandimí Ezali MONGÓNGÓ YA LITÓMBÁ KOLEKA OSENGELI KOYÓKA. Osengeli te koyóka ngai, osengeli te koyóka moto ata nani mosúsu, kasi OSENGELI KOYÓKA MONGÓNGÓ WANA LIKOLÓ YA BA BANDE.

25-0323 Elembo ya Mibale

Nsango: 63-0319 Elembo ya Mibale

BranhamTabernacle.org

Balingami Bayóki ya Bande,

M: Tozali nde kati ya Mokáno mwa Ye mobongí be na boyókáká ba Bande?

E: EE.

M: Mwasi ya libala asengeli nde na eloko mosúsu koleka oyo elobami likoló ya ba Bande?

E: TE.

M: Tozali nde kozanga eloko moko na boyókáká BOBELE ba Bande?

E: TE.

M: Tokoki nde kozala Mwasi ya libala na boyókáká BOBELE ba Bande?

E: MINGI KOLEKA, EE!

Sikawa bókanisa: “ Eloko ya komónisama ezali te; Nzambe akosala eloko moko te, soki te, kino ya libosó Ámónisa yango epai ya baómbo na Ye, bango basakoli.”

Na bongo, NYOSO tosengeli na yango esí elobamákí mpe ezali likoló ya ba bande; to, ntango mwanje na Ye ya nsambo azongi na mabelé, Akoyebisa bisó ndèle.

Oo Mwasi ya libala, tika ete tótala malamu oyo ezali kokóma na Mwasi ya libala ya Klisto zingázingá na mokili mobimba.

Tata azali koyanganisa Mwasi na Ye ya libala elongó na nzela ya Mongóngó na Ye mpe azali ko Ngulumisa: “ Yango Elobí Nkoló Yawe.”

Bókanisa, ayebisaki bisó nkáké izalaki nini: “lokito ya kobeta makasi ya Nkáké ezali Mongóngó ya Nzambe”. Mpe Mongóngó ya Nzambe epai ya Mwasi ya libala nde nini? Mwanje ya nsambo motindami ya Nzambe, William Marrion Branham.

Alobaki ete ezali na Nkáké nsambo ya libómbami ikomámi na yango nkútu te. Mpe ete na nzela ya Nkáké yango Nsambo, eko yeisa Mwasi ya libala elongó mpo ya kondima ya konetolama.

Liloba ya Nkoló likoyaka epai ya basakoli ba Ye. Soko Ázalaka na lolengé malamu koleka, Akokaki kosálela yango. Aponáki lolengé lolámu koleka na ebandeli mpe Akoki te, mpe Akobóngola te.

Na bongo, Mongóngó ya Nzambe, koloba na nzela ya mwanje na Ye ya nsambo, ezali koyeisa Mwasi na Ye ya libala elongó mpe kopesa bisó Kondima ya Konetolama.

Lingombá litíkala komitúna te útá 1933, kuna na ebale mokolo wana, ete William Marrion Branham azali Mongóngó ya Nzambe, Konguluma: “Yango Elobí Nkoló Yawe,” Mpe atindamaki kobianga, koyanganisa, mpe kokamba Mwasi ya libala.

Nalingi kobianga yo koya koyoka elongó na bisó mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola Nkoló na bisó Yesu azali kofungola Búku, kokangola Elembo, mpe kokitisa Yango na mabelé, epai ya mwanje na Ye ya nsambo, komónisa BISÓ Yango!

Ndeko Joseph Branham

Mikolo Mia sánzá: Mwa Lomíngo, sánzá ya        Mísáto 23, 2025

Liteya: Elembo Ya Mibalé 63-0319

Ntango: 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville

Makomi ma kotanga libosó ya boyóki Liteya:

St. Matai 4:8 / 11:25-26 / 24:6

St. Malako 16:16

St. Yoane 14:12

2 Batesaloniki 2:3

Baebele 4:12

Emoniseli 2:6 / 6:3-4 / Mokapo ya 17 / 19:11-16

Yoele 2:25

Amosa 3:6-7

25-0316 Elembo Ya Liboso

Nsango: 63-0318 Elembo Ya Liboso

BranhamTabernacle.org

Molingami na Ngai Mwasi ya Mokonzi ya Lola,

Nazali na mingi koleka na ebómbelo mpo na yo Lomíngo loye.

Ya libosó, okoyóka lokito ya Káké. Ekozala Mongóngó na Ngai, Mongóngó ya Nzambe koloba na yo, Mwasi na Ngai ya libala. Nakozala komónisa Liloba na Ngai epai na yo lokola libosó naino soko moké te. Okomona Ngai, Mwana Mpate ya kotanga makila oyo abomámákí longwá na bozalisi ya mokili, kozua mpe kofungola Búku, kokangola Bilembo, mpe kotinda yango na nsé awa na mabelé, epai ya mwanje na ya nsambo motindami na Ngai, William Marrion Branham, komónisa na Yo mabómbami maye mabómbámákí longwá na bozalisi ya mokili!

Ekozala na kogánga, kobélela, mpe ba alelúya longwá na mokili mobimba lokola nazali koloba na yo. Nkósi ekozala konguluma; mopakolami, nguya, nkembo, bomónisami ikozala koleka maloba. Yo, mokonzi mwasi na Ngai, okozala kofanda elongó kati na bisíka ya likoló lokola Nazali koloba na yo mpe kopesa yo Kondima ya Konétolama.

Kanísa, osengelí kozala na Kondima oyo epesamelaki babulami mbala moko mpo ya libela. Nayebisaki yo, esengeli na yo koyoka mwanje na Ngai Natindelaki yo.

Asengeli “kozóngisa Kondima ya bana epai ya tata.” Kondima ya Biblia ya ebandeli esengeli ézóngisama na nzela ya mwanje ya nsambo.

Liloba na Ngai liyebisí yo, na mikolo ya Mongóngó ya mwanje ya nsambo, koyúlama na ye, kotíndika keleló ya Nsango Malamu; asengeli kosilisa mabómbami manso ma Nzambe. Ekoki kozala na eloko moko kobakisama na yango te soko eloko moko kolongolama te na oyo Nalobaki likoló ya ba bande; lobá bobele oyo Nalobaki kati na mwanje na Ngai motindami. Nde ntina Nasalákí etiama na bande, na ntina ete ókoka sé KOFINA PLAY mpe koyoka mpenza oyo Nalobaki, mpe boni Nalobaki yango. Ekopesa yo Kondima ya Konetolama.

Molingami na Ngai Mokonzi mwasi, kati na Miso ma Ngai, ozali mobimba, mpenza, mozángi lisúmu libosó na Ngai. Tungísamá te, okokende TE kati na monyókó monéne; zambí oyambí Makilá ma Ngai, Liloba ya Ngai, mwanje na Ngai, Mongóngó na Ngai, na bongo ozali mpenza mozangi lisúmu libosó na Ngai.

NAzali na makambo manéne ya ndengé wana na ebómbelo mpo na yo. Ozali komóna Liloba na Ngai kofungolama libosó na yo mokolo na mokolo. Nazalaki kotia bilembo na etando koyebisa yo eloko moko ebelémí kosalema. Nazali koya, mílengélé. Tiá Liloba ya Ngai, Mongóngó ya Ngai libosó kati na bomoi na yo.

Tia makambo manso pembeni, eloko ya koleka Liloba ya Ngai na motúya ezali te. Nayebí mongúna azali komeka kobóla yo na nsé, kasi Nalakákí yo ete Nakotómbola yo. Nazali elongó na yo, kútu KATI NA YO. Yo mpe Ngai tozali kokóma Moko lokola Nazali komónisa Liloba na Ngai epai na yo.

Oyebi kati na motema na yo, oZALI Mwasi ya libala na Ngai Mokonzi. Oyebi Nabongisaki yo libosó. Oyebi Nalingi yo. Oyebí Nazali na yo elongó sekónde moko na moko ya mokolo na mokolo. Oyébí NAKOTIKA YO SOKO MOKÉ TE.

Tokozala kozala na ntango malamu ya ndenge wana lokola Nazali komónisa yo ya koleka Lomíngo moko na moko, mokolo na mokolo, lokola ozali koyoka Ngai koloba na nzela ya mwanje na Ngai epai na yo. Basúsu bakokí ntango mosúsu te kosósola to komona oyo ezali yo komóna, kasi Etiami lóngo kati na motema na yo ete oyo ezali Nzela ya Ngai epesami.

Ekimelo nini oyo ebongisí Ngai mpo na yo. Okoki bobelé KOFINA PLAY ntango sé ntango, mói to butú, koyóka Ngai koloba na yo. Nakomema libóndi na bomoto na yo lokola Nazali komónisa Liloba na Ngai mpe koyebisa yo ozali nani. Liteya moko na moko ezali mpo na yo, mpe mpo na yo káka. Tokoki kozala na bondeko mpe kosambela elongó ntango nyoso olingí.

Mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, eténi moko ya Mwasi ya libala akoyanganisama longwá na mokili mobimba koyoka mabómbami maye manéne kofungolama. Nabiangí yo koya komíbakisa na bisó lokola tozali koyóka: “ 63-0318-“Elembo Ya Libosó”.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga kati ya bomílengeli mpo ya boyóki Liteya:

St. Matai 10:1 / 11:1-14/ 24:6 / 28:19

St. Yoane 12:23-28

Misala 2:38

2 Batesaloniki 2: 3-12

Baebele 4:12

Emoniseli 6:1-2 /10:1-7 /12:7-9 / 13:16 / 19:11-16

Malaki Mikapo ya 3 mpe 4

Danyele 8:23-25 / 11:21 / 9: 25-27

25-0309 Ntaka Kati na Bileko Sambo ya Lingomba Mpe Bilembo Sambo

Nsango: 63-0317E Ntaka Kati na Bileko Sambo ya Lingomba Mpe Bilembo Sambo

BranhamTabernacle.org

25-0309 Ntáká Kati kati na Bileko Nsambo Ya Lingombá Mpe Bilembo Nsambo

Nsango: 63-0317E Ntáká Kati kati na Bileko Nsambo Ya Lingombá Mpe Bilembo Nsambo

BranhamTabernacle.org

Balingami Baoyo Bazongisámí,

Natikalá soko moké te kolemba na boyóki Mongóngó ya Nzambe koyebisa tozali ba nani, epai wapi toútí, epai wapi tozali kokende, tozali awa kosala nini, boni Alingí bisó.

Bonganga ya Molimó, libota ya bokonzi, kopesa mbeka ya molimó epai ya Nzambe, mbuma ya mbebu na bango, kopesa masánzoli na Nkombo na Ye.” Baoyo ba—Baoyo bato motindo nini! Azali na bango.

Libondi mpe kimia ya bisó bobele moko iyaka na boyókáká Mongóngó ya Nzambe koloba na bisó, nsima kozóngisa monoko epai ya Tata na bokabáká mbeka ya molimó na nzela ya mbuma ya mbebu na bisó, kopesa masanzoli na Nkombó na Ye.

Mokili mobimba oyo ezali kokímela. Bokeli bozali kokímela. Tozali kokímela mpe kozila boyéi ya Nkoló. Mokili oyo mosimbí eloko moko te mpo ya bisó. Tobelemí kolongwa mpe kokende na Lipati na bisó ya Libala mpe EZALELO Ekoya elongó na Ye mpe basúsu banso baoyo basili kozuama Kúná, bobele na epai esúsu ya ezipelo ya ntango, kozila bisó.

Tika ete tótélema mpe tóminingisa! Tófina mitéma mia bisó, tómilamusa na oyo ezali kosalema sikawa mpenza mpe oyo ekokóma na ntango ya kobwéta líso.

Ata mbala moko soki te kati na lisoló ya mokili etíkálá kokoka ete Mwasi ya libala ya Klisto ásangisama útá na mokili mobimba, banso na ntango moko mpenza, koyóka Mongóngó ya Nzambe koloba mpe komónisa Liloba na Ye epai ya Mwasi na Ye ya libala.

Bandimi, bómítúna, mongóngó yango nini, motéi yango nini, moto nini yango, akoki kosangisa mpe koyéisa Mwasi ya Klisto  nyoso elongó? Soko Ozali Mwasi ya libala ya Klisto, oyebi ete ezali na yango kaka te na Mongóngó mosúsu kasi Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande.

Ee, Molimó Mosanto azali kati na moko na moko na bisó, mosala moko na moko ya lingombá, kasi Nzambe Ye moko Ayebisaki bisó Akosambisa mokili na Liloba na Ye. Mwasi ya libala ayebi ete Liloba ya Ye likoyaka epai ya mosakoli na Ye. Mosakoli na Ye nde molimboli SÉ MOKO wa bonzambe ya Liloba na Ye. Oyo elobaki Ye ekoki kobakisamela eloko te to eloko eyebi kolongolama na yango te. Ezali Liloba, likoló ya ba bande, oyo bisó nyoso tokosambisama na yango, mpe liloba mosúsu te soko ndimbola ya Liloba yango.

Ekoka te mpo ya mongóngó mosúsu ata nini kosangisa Mwasi ya libala. Bobele Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande nde mokoki kosangisa Mwasi na Ye ya libala. Ezali Liloba sé moko Mwasi ya libala bango nyoso bakoyókana likoló na yango. Ezali Mongóngó sé moko Nzambe Ye moko Andimisákí kozala Mongóngó ya Ye epai ya Mwasi na Ye ya libala. Mwasi na Ye ya libala asengeli ázala na Likanisi Liókó mpe na Lobánzo Lókó mpo ya kozala elongó na Ye.

Batéi bakoki koteya, balakisi bakoki kolakisa, babateli bakoki kobatela, kasi Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande nde mosengeli kozala Mongóngó ya motúya koleka oyo basengeli kotia libosó ya bato. Nde Etémelo ya Mwasi ya libala.

Soko bozali na Emoniseli ya yango, na bongo oyo nde ekosalema.

Liloba liyebisi bisó Adama abungisaki libula ya ye, mabelé. Elekaki longwá na loboko na ye kino epai na oyo atékéláki, Satana. Atekáki kondima na ye epai na Nzambe, na mabánza ya Satana. Abungisaki eteni nyoso na yango na maboko ya Satana. Alekisaki yango longwá na loboko na ye kino na oyo ya Satana.

Nzambe azali Nzambe ya molongo, bipai binso, kasi Mwana na Ye, Adama, azalaki na mabelé oyo na nsé na bokonzi na ye moko. Akokaki koloba, akokaki kopesa nkombo, akokaki kosolola, akokaki kotelemisa bokeli, akokaki kosala eloko ata nini elingaki ye kosala. Azalaki na bokonzi mobimba, ya likoló mingi ya mabelé.

Adama abungisaki yango nyoso, kasi Nkembo na Nzambe, nyoso oyo atangwaki na yango mpe abungisaki esikolamáki na Mosikoli Ndeko na bisó, mosúsu te kasi nde Nzambe na Nguya Nyoso, oyo akómáki Emanuele, moko na bisó. SIKAWA, EZALI YA BISÓ.

Tozali bana mibali mpe bana basi na Ye baoyo bakoyángela mpe kozala mikonzi mpe banganga elongó na Ye. Tozali na bomoi ya Sekó elongó na Ye mpe baoyo nyoso tolingi. Bokono lisúsu te, bolózí lisúsu te, kúfa lisúsu te, bobele sékó na sékó nyoso elongó.

Ntango tokanisí yango,  tokoki nde kotika zábolo ákwéisa bisó na nsé boni? Ezali ya BISÓ, nde epai tozali kokende nokí mpenza. Apésí bisó eloko monéne koleka oyo Akokaki kopesa bisó. Mikolo miké miye mia mimekano na bitumba likoló na mabelé oyo mizali kozindisama noki na ELONGA ya bisó MONÉNE OYO ETIKALI KAKA MIKOLO MIKÉ LIBOSÓ NA BISÓ.

KONDIMA YA BISÓ ezalá naino monéne boye libosó soko moké te. Esengo na bisó ezalá naino likoló boye libosó soko moké te. Toyebi tozali ba nani mpe epai wapi tozali kokende. Toyebi tozali kati na Mokáno mwa Ye mobongí be na botíkaláká na Liloba na Ye. Nyoso tosengeli na yango kosala ezali kotikala na ba bande mpe kondima Liloba moko na moko; kosósola yango nyoso te, KASI KONDIMA LILOBA MOKO NA MOKO…mpe TONDIMÍ YANGO!

Kondima eyaka na boyóki, boyóki Liloba. Liloba likoyaka epai ya mosakoli. Nzambe Alobakí Yango. Nzambe Abómbakí Yango na bande. Nzambe Amónisaki Yango. Toyóki Yango. Tondimí YANGO.

Okoki bobele kozua Emóniseli oyo na boyókáká Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande.

Nyoso oyo Klisto akosala na nsúka ekomónisamela bisó póso oyo, kati ya Bilembo Nsambo, soko Nzambe akolingisa bisó. Bomoni? Malamu. Ekomónisama. Mpe ekomónisama, lokola Bilembo bizali kobúkama mpe bizali kopesamela bisó, nsima tokoki komóna etandelo monene oyo ya lisiko ezali nini, mpe ntango nini mpe boni boni ekosalema. Ebómbami nyoso kati na Búku oyo ya mabómbami awa. Etiami elembo, ekangami na Bilembo Nsambo, mpe bongo Mwana Mpate kaka nde Moko Oyo akoki kobúka yango.

Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, eteni ya Mwasi ya libala útá na mokili mobimba akozala koyóka Mongóngó ya Nzambe banso na ntango moko. Tokozala kozingela lóla na mopepe mokási ya mabondeli ma bisó mpe kosanzola Ye. Nabiangi yo óya komíbakisa na bisó lokola tozali koyóka:

Ntáká Kati kati na Bileko Nsambo Ya Lingombá Mpe Bilembo Nsambo 63-0317E.

Nabondeli bino bóbósana te na ntina ya mbóngwáná ya ntango kati na Jeffersonville nsúka ya póso oyo.

Ndeko Joseph Branham

25-0302 Nzambe Komibomba Kati Na Komikitisa, Nsima Komimonisa Na Motindo Moko

Nsango: 63-0317M Nzambe Komibomba Kati Na Komikitisa, Nsima Komimonisa Na Motindo Moko

BranhamTabernacle.org

Balingami Folólo ya Libeke,

Na mikolo ya sánzá 28 Sánzá ya Mibale, 1963, Káké engulúmákí.

Whew-whew, Banje Nsambo baútakí na sékó na sékó mpe bamónánáki na Mwanje ya Nsambo Motindami ya Nzambe. Ayambamáki na likoló kati ya piramídi ya liboké ya banje. Na nsima lipata ya Bonzambe ya Nkembo limónanákí kati na etando likoló ya Arizona. Ezalaki elembo, Nzambe azalaki kozóngisa mwanje na Ye ya nsambo na Jeffersonville kofungola Bilembo Nsambo.

Mokolo ya nsánzá 28 na sánzá ya Mibalé, 2025, mikili nsambo mitandání kati na bitando. Mwasi ya libala azali komíbongisa Ye moko Koyangana mpe koyóka Bilembo Nsambo.

Obiangámí, na Nkoló Ye moko, koyangana na Mwasi ya libala útá zíngá-zíngá ya mokili mobimba, koyóka Mongóngó ya Nzambe komónisa Emoniseli ya Bilembo Nsambo.

Mokolo oyo basakoli mpe bato ya bwányá batálelákí mpe bazilákí útá ebandeli ya ntango, ezali kokóma. Mwanje ya nguya oyo Nzambe alobaki ete akotínda na mabelé na mikolo ya nsúka ayáki kofungola mpe komónisa mabómbami ma Nzambe mabómbamákí, mpo ete Nkoló na bisó Yesu ákoka kozónga mpo ya Mwasi na Ye ya LIBALA sembo mpe komema bisó na Lipati na bisó ya Libala.

Lotómo na ngai ya libosó, lokola nakótaki kati ya losámbo ya sika, Nabálisákí elengé mobali mpe mwasi baoyo bazaláki kotelema kati na biló. Tika ete ézala elilíngí, ete Nakozala mosali sémbo epai na Klisto, kozua Mwasi ya libala abélémi mpo ya molúlú ya Mokolo mwango.

Lelo oyo, Liloba liye likokísámí.

Nzambe azali koloba na nzela ya mwanje na Ye, koléngele Mwasi na Ye mpo ya molúlú ya Mokolo wana. Tozali kolanda Malako ma Ye molongó nsima ya molongó. Mwasi ya libala amíbongisí na BOTÍKÁLÁKÁ NA MONGÓNGÓ YA NZAMBE LIKOLÓ YA BA BANDE.

Toyókaki nini na nzela ya ndótó Mpe bimónoneli? BILÉI, YANGO OYO AWA, awa nde esíká yango. Mongóngó moyébisaki ye: “Yéisa Biléi na kati. Bómbá Yango na kati. Yango nde nzela bobele moko ya kobátela bango awa, ezali kopesa bango Biléi.”

Ebele bandimaka alingi kaka koloba: “botikala kaka na Liloba,” Mpe yango EZALI SOLO, azali koloba yango; kasi Mwasi ya libala akotanga mpe kati-káti ya milongó lokola Mobali ya libala azali koloba na Mwasi na Ye ya libala.

Ata bimónoneli Nzambe azali kopesa awa na esiká yango, izali mpenza kosósolama mabe. Nde ntina bozali koyoka ngai likoló ya ba bande koloba: “ bóloba Yango ELOBÍ ba bande, bóloba Yango ELOBÍ bimónoneli.” Sikawa, soko bozali mpenza ya kolamuka, bokomóna eloko moko. Bomoni? Nalikíí esengeli te na simba yango na loboko na ngai mpe nátalisa bino.

Ata bimónoneli bisósólamákí mabe, ata ko apesaki ndimbola na yango. Yango azalaki koyebisa bisó, soko bolingí kobúlungana te, to kosósola mabe te, bófina play mpe bóyoka mpenza oyo Mongóngó ya Nzambe elobí.

Nayebi Liloba lizali na ndimbola mibalé, kasi oyo nde ndimbola ya ngai: ndótó mpe bimónoneli ilobí eloko yango moko; bótikala na ba bande. Soko Ozali na motúna, kendé na ba bande. Ba bande nde Biléi ya Nzambe bibómbamákí. Bóloba kaka oyo ezali likoló ya ba bande; bóbakisa eloko moko na Yango te. Ba bande nde Yango Elobí Nkoló Yawe epai ya Mwasi na libala. Liloba liyaka bobele epai ya mosakoli, ye moko. Mosakoli azali molimboli SÉ MOKO ya bonzambe ya Liloba ya Nzambe.

Mosakoli azalaki na lotómo ya kobianga mpe kokamba Mwasi ya libala. Nakosambisama na oyo elobámí likoló ya BA BANDE.

Eloko nyoso ezali kotálisa ngai na ba BANDE.

Balingami na ngai folólo ya Libeke, mpo na ngai, KOFINA PLAY NDE NZAMBE KATI YA KOMIKITISA LELO.

 Póso na póso Nazali kozua bosepeli koleka; nini nde ekomónisama lelo lokola Mwasi na Ye ya libala azali koyangana koyoka Liteya? Nayebi ete Molimó Mosanto akozala kopakola moko na moko na bisó lokola Azali komónisa lokola libosó naino soko moké te. Nayoki kaka ete ntango sé ntango, Akoya mpe kozua bisó tokende na Lipati na bisó ya Libala.

Tozali, bana mibali mpe bana basi ya Nzambe.

Tozali, libota útá na Nzambe. Tozali basangoli ya mabelé. Tokokonza bozalisi. Tokokela biloko bízala. Tozali Mwasi ya libala!

Tika ete tómíbonzela ya sika na mosala, mpe tómibúlisa epai ya Klisto.

Ndeko Joseph Branham

25-0223 Oyo Ezali Nde Elembo Ya Nsuka Mobali?

Nsango: 62-1230e Oyo Ezali Nde Elembo Ya Nsuka Mobali?

BranhamTabernacle.org

Baningá Mibali,

Oyo nde, elembo yangó. Oyo nde, ntango yangó. Oyo nde, Etindá. Oyo nde, Liloba. Oyo nde, Mongóngó ya Nzambe. Oyo nde, Mwana ya Moto. Oyo nde, nzela ya Nzambe epésámí. Oyo nde, nsúka ya ntango.

Mosakoli moko te, ntómá moko te, soko moké te, kati na ntango ata nini, abíká ndèle na ntango lokola oyo tozali kobika kati na yango sikawa. Ekomámí kati na bitando. Ekomámí likoló na mabelé. Ekomámí kati na zoloná moko na moko. Oyo nde nsúka soko bokokí kotánga lokomá ya lobóko.

Ye nani azali na litói, tika ete áyóka yango elobaki Nzambe, mpe etiamáki na bande, na ntina ete ézala liloba na ngai te, mabánza ma ngai te, likanisi na ngai te, kasi Mongóngó mpenza ya Nzambe kolaka Mwasi na Ye ya libala nzelá na Ye BOBELE MOKO ebongí be epesámí mpo ya lelo ezali nini.

Yaka mpe yóká lokola azali koyebisa mpe komónisa bisó na nzela ya makomí, na nzela ya bimónoneli, na nzela ya ndimbola ya ndótó, kotikala na Etíndá, kotikala na ba bande. BOBELE koloba yango ezali likoló ya ba bande.

Ezali te na nzela malamu koleka, sokí te nzela endimísámí koleka, ezánga kozala koyóka Mongóngó ya Nzambe koúta na Nzambe Ye moko. Nzambe apesaki motindo epai ya Mwasi na Ye ya libala na bolobáká kati na mosakoli na Ye mpe na boyebisáká bisó, BÓFINA PLAY, mpútu.

Lobá Yango, téyá Yango, tátólá mpo na Yango, mpe yebisa mokili na ntina na Yango, kasi Ayébisí bisó ezali na nzela sé moko ebongí be epesámaki kokómisa Mwasi ya libala na bobongi be:

koyóka Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande. Soko eloko moko eleki mayéle ma yo, yóká bande. Esengeli ézala ya LIBOSÓ, mpe Mongóngó ya litombá koleka osengeli koyóka. Ezali Liloba na Ye libongí be Atiaki likoló ya bande.

Sikawa kokánisa kútu yangó na mosúsu, ndótó. Oyo ezalaki emónoneli. Bilei, Yango oyo awa. Oyo nde esiká yango.

Bóyoka, na nzela ya ndótó mpe bimónoneli, Bilei mpo ya Mwasi ya libala bizali wapi? Esiká yango nde wapi? Etindá mpo ya Mwasi ya libala ezali likoló ya ba bande.

Na bongo oyo eyókání lokola ndako, epai na ngai. Oyo nde esiká yango. Mpe soko botali malamu, ndótó ilobáki eloko yango moko, bomóní, epai wapi Biléi.

Mpo tóndimisama tosímbí Yango, ayebisi bisó mbala moko lisúsu, ba bande nde Biléi mpo ya Mwasi ya libala.

“Ntango ezali lisúsu te.” Soko ezali, tika ete tómíléngele, baningá, kokútana na Nzambe na bisó.

Ee, Nkoló, yango nde mpósá ya motema mwa bisó, koléngelama kokútana na Yo, kozala Mwasi na Yo ya libala. Esengelaki tósala nini Nkoló? Nzela na Yo epesami ezali nini? Mwango na Yo ezali nini? Nzela na Yo ebongí be ezali nini? Otindelaki bisó mosakoli oyo Okokaki koloba na kati na ye koyebisa bisó. Tobóndeli Yo lakisá bisó.

Biléi bitóndí kotonda bitiami na kati sikawa. Tika ete tósalela Yango. Tósálela Yango sikawa.

Boni moto akoki kozala akúfí miso? Ayebisi bisó eloko ya kosála: Biléi bitóndi kotónda likoló ya ba bande; bósálela biangó SIKAWA. Oyo nde lilako ya Nzambe epai ya Mwasi na Ye ya libala.

Soko ozali koloba ete ondimí Etindá oyo, ondimí William Marrion Branham azali mosakoli motindami ya Nzambe oyo atíndamáki kobianga Mwasi ya libala kobima, bomoi na ye bokokísí nyoso makomí malobaki na ntina na ye; ondimí Ezali Mongóngó ya Nzambe mpo ya lelo oyo, na bongo YE; Nzambe, koloba na nzela ya mosakoli na Ye, azali koyebisa Mwasi na Ye ya libala na Lingala polele eloko ya kosala.

Ata ko tosekámí, tonyókwámí, mpe totálámí na nsé mpo toyókaka bobele ba bande, tozali kosala mpenza kaka oyo Ayebisáki bisó tósála. Matondi Nkoló mpo ya Emóniseli.

Nalingi nabianga mokili komíbakisa na bisó Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka: “Oyo Ezali Nde Elembo Ya Ntango, Mobali?” Tokozala koyóka nyoso na ntina ya:

Nkáké, Bilembo Nsambo, Libángá Piramidi, Biléi ya Molimó, Sekó na Séko, Lipingá ya Banje, Mboka mokonzi ya mosala mwa ngai, Emónoneli, Ndótó, Lisakoli, Sekelé ibómbámí, Likomí nsima ya Likomí.

Ezali na eloko te eleki monene kati na bomoi oyo koleka koyóka mpe kotósa Mongóngó ya Nzambe.

Ndeko Joseph Branham

 Makomí:

Malaki Mokapo ya 4

St Matai 13:3-50

Baloma 9:33/ 11:25/ 16:25

1 Bakolinti 14:8/ Mokapo ya 15

Bagalatia 2:20

Baefese 3:1-11 / 6:19/ 5:28-32

Bakolose 4:3

1Batesaloniki 4:14-17

1Timote 3:16

Baebele 13:8

2 Petelo 2:6

Emoniseli 1:20 / 3:14 /5:1 / 6:1/ 10:1-7/ Mokapo ya 17