Mokolo ya Lomingo moko na moko tozali koyangana mpe koyoka Lotómo monene ya koleka na bomoi kati na lisoló ya mokili. Tozali na ntango na nkembo na koleka nyoso awa ezali biso kokutana elongo koyoka Mongóngó na Nzambe! Ezali Yesu Klisto Mwana na Nzambe, komimonisa na nzela ya Makomi, kokómisa Likomi oyo ebongisamaki na mokolo oyo, lokola ezalaki na mokolo na Ye, mpe na mikolo mosusu nyoso, NA BOMOI. Mpe kondima Yango, ezeli elembeteli ya Molimo Mosanto.
Elembeteli ya solo ya kozala na Molimo Mosanto ezali bobele te kokende na losambo mokolo nyoso ya Lomingo; Ezali ete ondima ete “NazaliYe,” Liloba mpo ya mokolo na yo. Liloba mpo na lelo ezali nini? Mosakoli na Nzambe azali Liloba mpo na lelo mpe asengeli kozongisa bato na Liloba , na ntina ete Mwasi na libala ayeba Mobali na Ye, koyeba Moninga na Ye, Liloba limonisami.
Bomoi na Ye moko, misala na Ye moko emonisaka mpe endimisaka Liloba ya mokolo oyo.
Ezali Molimo Mosanto kozonga kati na Lingomba lisusu; Klisto, Ye moko, amonisami kati na mosuni ya moto, na ntango ya mpokwa, kaka lokola Alakaki Akosala. Nayebi yango esalaka lokola kokangama na mongóngó na bango mwa moké, kasi bosengeli kotanga kati kati na milongó mpe komona, yango esalaka ete elili éya.
Tozali momboto ya bokonzi ya Abalayama, Mwasi na Libala.Elembo ya nsuka Abalayama atikalá komona liboso ete elembo ya elaka éya ezalaki nini? Nzambe, kati na lolenge ya ekelamu moto, oyo akokaki kososola makanisi na bato. Moto moko, Zomi na mibale te, moto moko.
Nayebi ete Bato mingi batemeli yango, kasi Nayebi ezali oyo. Nayebi yango. Ezali te mpo ete Nazali koloba ete bazali koloba ezali yango; zambi Nazuaki yango kouta na ngai moko te. Likanisi na nga—ngai ezali ya ngai moko te. Oyo ndele Ayebisaki ngai, Soko ezali libunga, na bongo ezali libunga. Kasi Nazali kosolola yango na ngai moko te, Nazali kosolola na nzela ya oyo moto mosusu alobaki. Moto mosusu yango azali Nzambe oyo Alobaki na biso mpe asalaki makambo oyo nyoso Asalaki, mpe emonanaki, bomoni, na bongo Nayebi ezali solo.
Tozali koyoka makanisi mpenza na Nzambe; makanisi ya moto te, kasi ya Nzambe. Mosakoli na biso azali momonisi ya Liloba likomamaki.
Tososolaka ete koyoka ba bande kati na ba ndako na bino to kati na mangomba na bino ezali mpo ya moto nyoso te, kasi mpo ya biso, Ezali BOBELE NZELA MOKO. Tolingaka koyoka Mongongó na Nzambe kosolola na biso mbala moko. Tolingi ndimbola moko te to bomanyoli te; ezali Nzambe kosolola na biso mbebu na litói.
Mokolo ya Lomingo oyo tokozala koyoka Nzambe kosolola na biso boni Amonisaki mosakoli na Ye biso koleka liboso na ye kuna na ngambo mosusu. Boni Mwasi yango na Libala azalaki kotala alimá epai na ye, kosolola na ye, mpe tozalaki kotelema elongo na ye. Tozalaki kotambola na bobongi be Liboso na Nkolo.
Na nsima Nzambe Asololi kati na mosakoli na Ye mpe asakoli mbala moko lisusu mpe alobi:
Ekoki kozala na ba mosusu libanda kuna na bikólo, zingazinga na mokili, baoyo kútu bande oyo ekoki kokutana na bango kati na ba ndako na bango to na biyanganelo na bango. Tokokaki kobondela, Nkolo, ete na tango losambo lozali kokóba, na—na…to bande ezali koyokisama, to ezala na lolenge ata nini tokoki komizua kati na yango, to—to motindo, tika ete Nzambe monene na Lola akoka kopesa mbano na bosembo oyo ya mitema na biso na ntongo oyo, mpe abikisa baoyo na bosenga, kopesa bango oyo bazali na yango bosenga.
Soko Ozali koyoka ba bande mpe ondimaka ete Ezali Mongóngó na Nzambe mpo ya mokolo na biso, na bongo ezala ata nini okoki kozala na yango bosenga, Nzambe akozala kosolola kati na motindami na Ye mpe koloba: “Pesa bango eloko se eloko tozali na yango bosenga.”
Yango ekokoka kokóma bobele na nzela ya BO FINAKA PLAY moninga na ngai.
Soko okolinga koyoka Nzambe kosolola mpe kolimbola Liloba na Ye moko, komimonisa Ye moko kati na mosuni ya moto, mpe koyamba ezala ata nini ozali na yango bosenga, yaka komibakisa na biso na 12:00 nsima ya nzángá ntango ya Jeffersonville, wana ezali biso koyoka Nzambe kosolola na biso lokola tozali koyoka: Lipati Na Mindule 64-0719M
Nakoki kokomela bino boni lelo Nazanga kokundollela bino oyo mobateli na biso alobaki na ntina ya moko na moko na biso mokolo mwa Lomingo loleki?
Kasi koyeba ete esika se esika Nakoki kokende…Nazali te na –na ebólo moko likolo ya mabelé, oyo Nayebi, oyo bakangani na ngai lokola ébolo ya bato oyo. Tika—tika Nzambe asala ete tozanga kokabwana, ete, kati na Bokonzi bozali koya, tika ete tozala kuna; libondeli na ngai.
Ezali te na ebólo moko likolo na mabelé oyo bakangani na mosakoli ya Nzambe, mpe Etinda asololaki likolo ya ba bande, lokola biso. Mpe mpo ete tosalaka bongo, tokozanga kokabwana na Bokonzi wana ya sika elongo na ye mpe Nkolo na biso Yesu Klisto. Ekómaka na yango kaka malamu mingi te koleka yango!
Oyo ezali mikolo minene ya koleka na bomoi na biso. Tosepeli mpenza mobimba kozala ligbóma mpo ya Klisto mpe Etinda na Ye ya ntango ya nsuka. Kobiangama elémá mpo ete tondimaka liloba moko na moko likolo ya ba bande wana mpe tolobaka: FINA PLAY.
Tozali kati na Lingomba se Moko mpe bobele Moko. Tomibakisi na Yango te, tobotamaki nde kati na Yango. Mpóso nyoso toyaka elongo longwa na zingazinga ya mokili mobimba mpe tozali kosala bolingo na Klisto mpe koloba: “Oo, boni Nalingi Yo ‘Yesus!’”
Tokoki kozala elemá epai ya mokili, kasi Tata apesaki biso Emoniseli ya Ye moko na mokolo ya biso, Nzambe na loposo likolo na yango, mpe Ebendaki biso, Mwasi na Ye ya Libala, epai na Ye.
Tolingi na biso kaka boni Ezali petee, kasi bobele na ntango yango moko, bobele boni Ezali na bozindo. Kasi osengeli kozala na Emoniseli mpo ya komona Yango, mpe TOZALI NA YANGO.
Amibombaki Ye moko kati na ezipelo, kati na Lingomba na Ye, azali komimonisa Ye moko na nzela ya kondima na yo mpe kondima ya ngai, elongo, koya elongo, kosala bomoko ya Nzambe. Nakoki kosala eloko te soki na yo te; okoki kosala eloko te soki na ngai te; soki mpe te moko na biso akokoka kosala eloko te libanda na Nzambe. Boye, elongo ezali kosala lisanga, likangisi. Nzambe atindaki ngai na ntina; ndima yango; mpe kuna ekómaka. Ezali kaka yango, bomoni, andimisamaki mpenza mpenza.
Tozali lokola mibali na mobembo na nzela ya Emau na mokolo wana. Toyokaka Ye kosolola na biso makambo nyoso kati ya mokolo. Na mbisa tobiangi Ye na kati na ba ndako na biso mpo tokoka kokangama na kati elongo na Ye moko kaka. Na nsima Asalaka eloko moko oyo bobele Ye nde Akokoka kosala, kobuka Lipa ya Bomoi na Seko. Na mbala moko toyebaki Ye. Na nsima tolobi, mitema na biso mipelaki na móto te kati na biso wana ezalaki Ye kosolola na biso na molai na nzela.
Mpóso moko na moko toyanganaka na kozila na etingia, wana tozali komituna: “Akoyebisa biso mpe Akomonisa biso nini na mpóso oyo”. Tokokabwelana biteni ya maloba ya mosakoli likolo na yango kati na mpóso mobimba. “Oyokaki Ye ntango alobaki”:
“Ezuaki ngai mbula nkoto minei kosala Mosala Mobongi ya ngai; kasi sasaipi Nazalaki pene na mbula nkoto mibale kosala Mosala Mobongi mosusu, Bino, Mwasi na Ngai ya Libala. Nasalaki yango na lolenge na Ye loyebi kobongwana te, nzela yango moko Nasalaki Mosala Mobongi ya liboso, Liloba na Ngai. Yango nde nzela Nasalaka Misala mia Ngai Mibongi, mpamba te okokoka bobele kozala Mosala Mobongi ntango ezali Liloba libongi be.
Ndeko na ngai mobali, bokanisa mabe ten a oyo, kasi bokanisa monuti moko. Soko Azuaki longwa na Ye, bozalisi ya ebandeli, kosalela Ye Mwasi ya Libala mpo na Ye. Asalaki bozalisi mosusu soki moke te. Azuaki eteni ya bozalisi ya ebandeli. Na nsima, soko Azalaki Liloba, Mwasi ya Libala asengeli kozala nini? Ekosengela kozala Liloba ya ebandeli, Nzambe ya Bomoi kati na Liloba.
Bobeta lisolo na ntina na Yubile ya bolei. Tozali eteni ya bozalisi ya ebandeli. Tozali eteni ya Liloba ya ebandeli. Nzambe azali kobika kati na biso. Tozali Mosala mwa Ye Mobongi. Tozali libóké ya bato oyo ekangani na mosakoli na Ye. Toyebi kokabwana te na mosakoli na Ye mpe na Nkolo Yesu Klisto. Tozali MOKO elongo na Ye.
Soko yo mpe okolinga ete motema na yo mozala kopela na móto na kati na yo lokola ezali kosala kati na biso, yaka komibakisa na biso Lomingo loye na 12:00 P.M., ntango ya Jeffersonville, lokola eteni ya Mwasi na Libala azali koya elongo mpe kobianga Ye kati na ba ndako na biso, mpe kati na mangomba na biso, wana ezali biso koyoka Nzambe kosolola mpe komonisa biso Maloba ya Bomoi ya Seko, lokola Azali komemela biso Liteya: Mosala Mobongi 64-0705
Boni mitema mpe bomoto na biso imatisamaki na bisika ya likolo ya sika wana toyanganaki elongo longwa na mokili mobimba, na boyokaka Mongongo ya Nzambe kosolola kati ya motindami na Ye mpe kondimisa biso mbala moko lisusu, tozali banani.
Amizipi Ye moko lelo, kati na Mbeki ya mabele, na Shekinah. Libanda ezali komonana lokola ebólo ya batuntuki, mposo ya kala ya banyama, kasi kati ebombi Nkembo ya Shekinah.
Nkembo na Nzambe! Kati na biso ebombi Nkembo ya Shekinah. Tokei nsima ya ezipelo mpe tokoki komona Klisto polele.
Lelo, Nzambe azali kosala kati ya moto te, Azali kosala na nzela ya moto. Azalaki kosala kati ya Moto moko ntango wana, Yesu. Sasaipi, Azali kosala na nzela ya moto oyo Aponaki mpo na ntina oyo. Nzambe, na lolenge ya moto; Amibongoli longwa na lolenge ya Nzambe, kino na lolenge ya moto.
Nzambe Ye moko amonanaki kati na lolenge ya ekelamu ya moto, epai ya momboto ya nzoto ya Abalayama, liboso ya libebi, mpe Yesu alobaki ekozala eloko yango moko epai ya Momboto oyo ya bokonzi liboso Mwana alakami azonga.
Nzambe amonanaki mbala moko lisusu kati na lolenge ya ekelamu ya moto, lokola Alakaki ete Akosala. Ezali Nzambe amibombi nsima ya ezipelo ya mosuni ebiangami William Marrion Branham. Bobele okende nsima ya ezipelo yango mpe omona Nzambe, mpe moto te, soko boye te ozangi manaka mobimba ya Nzambe.
Tokoki koloba polele ete: “Boye, yango ezali mpenza mosika mingi na Liloba ya Nzambe te boye te?” Tolingi kaka koyebisa bango ete toyebi ete tobungi te. Toyebi esika totelemi. Toyebi lolenge nini ya longo totii mpe lolenge nini ya mopepe ezali kopepa biso. Toyebi ndenge nini ya bibendé ya kokota na mosusu ya biso ezali, mpe motó ya biso ya koyamba ebendé yango ezali nini. Mpe toyebi lolenge nini tozali kotelema.
Ntango Nzambe amiminisaki kati na mokili, Azalaki komibomba nsima ya ezipelo, nsima ya loposo ya Moto moko abiangamaki Yesu. Azipamaki mpe azalaki komibomba nsima ya loposo ya moto moko abiangamaki Mose, mpe bazalaki banzambe, Ba Nzambe te; kasi bazalaki Nzambe, Nzambe moko kaka kobongola ezipelo, kosala eloko yango moko ntango nyoso, komema Liloba oyo.
Tokotisami kati na Liloba, Etinda mpe mosakoli ya ngonga oyo, mpe ezali kobenda biso na kati mpe komema biso na Ndako na biso ya Lola. Tozali bato ndenge epai na mokili, kasi Nzambe atindelaki biso Motó ya koyamba ebendé oyo azali kobenda Mwasi na Ye ya Libala kobima kati na mobulungano oyo, kati na Bozali ya Nzambe. Tozali ebendé ekotisami na motó na yango Liloba.
Nzambe, na loposo likolo na Yango! Ekoki koyokana lokola bolemá, epai na mokili, kasi ezali kobenda bato nyoso epai na Ye.
Etinda oyo ezali Mana mauti na Lola, Bilei ya bandimi oyo ezali bobele mpo na biso, mpe Ezali kobenda Mwasi na Ye ya Libala epai na Ye. Nkembo ya Shekinah, likolo na Lipa ya banganganzambe, ebateli Yango na kozanga kobeba.
Nzambe apesi nzela mpo na lelo, Etinda oyo mpe motindami na Ye; Nzambe azipami na loposo likolo na yango. Sasaipi ezali Nzambe komibomba kati na biso, Mwasi na Ye ya Libala, oyo akoki kolia bobele Mongongo mpeto ya Nzambe oyo endimisamaki na nzela ya Likonzi ya Móto.
Na bongo, sasaipi boyoka Liloba moko na moko. Bosimba Yango. Mpe—mpe soko bozali kozwa yango likolo ya ba bande, to eloko nini, na bongo botikala bobele na malakisi wana ya bande. Boloba eloko mosusu te soki kaka te oyo bande wana elobi. Boloba kaka mpenza mpenza oyo bande elobi.
Mpo na biso, NZELA BOBELE MOKO YA KOYOKA: “LILOBA MOKO NA MOKO,” “MOSUSU TE KASI OYO BA BANDE ELOBAKA,” “MPENZA MPENZA OYO BA BANDE ELOBAKA,” EZALI KOFINA PLAY MPE KOYOKA BA BANDE.
Na bongo tozali kobianga yo koya koyoka kaka oyo ba bande elobaka mokolo mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, mpe okóma Moto Ndenge elongo na biso wana tozali koyoka Liteya: Moto Ndenge 64-0614E
Mposo moko na moko ezali koya monene na koleka mpe monene na koleka. Mokolo mwa Lomingo, tozalaki na libaku malamu ya kotala, mpe kokana, TOMONAKI NINI? Tomonaki nde motei moko, TE! Tomonaki nde mobateli na biso, TE! Ntango totalaki koleka ezipelo ya mosuni ya moto tomonaki Yesu Klisto komimonisa mpe komitalisa Ye mpenza.
Wana ezalaki biso koyoka ba bande lokola ezalaki kokita, Ekómaki polele mpe polele, soko ozali na matoi ma koyoka mpe miso ma komona. Tomoni sasaipi Nzambe polele. Ezipelo epasuki, mpe tomoni Nzambe kotelema polele liboso na biso, Likonzi ya Móto komimonisa Ye moko polele na miso.
Ebeti boko na kufa miso, kasi epai na biso, Emonisi Solo. Nzambe akómisi mosakoli na Ye na nkembo liboso na biso, kaka lolenge Asalaki na Mose.
Bozali lisusu nsima ya ezipelo wana te, bana mike, Nzambe ayei polele-polele na miso na bino.
Ezali nini? Bonzambe ezipami kati na mosuni ya moto. Nzambe, kati na Lolenge ya moto, komibomba longwa na miso na bango. Bakokoka bobele komona moto mpe koloba mosakoli ya Nzambe asalaka mabunga, ye moko kútu alobaki bongo, komeka kolakisa bato ete mabunga mazali likolo na ba bande. Kasi epai na biso, Mwasi na Libala na Ye oyo abongisamaki liboso, tozali komona mpe koyoka Nzambe kasi mabunga te.
Moko amonaki moto, mosusu amonaki Nzambe. Bomoni? Mpe ezalaki Nzambe oyo azipamaki kati na moto, kosala bango nyoso mibale solo, kasi kondima na yo kati na oyo ozali komona te.
Mpo na biso, tokondima mpe kolanda mabunga ya mosakoli ya Nzambe oyo andimisami, soko nde libunga lioko lizalaki, liboso na biso kozua mpe kondima Oyo Elobi Nkolo ya bango.
Mose asengelaki te kobeta Libanga mbala ya mibale. Molimo yango moko ekokaki koloba na mokolo wana: “Bomoni, Mose asalaka mabunga.” Kasi ata ko bongo mai mabimaki, mpe soko omelaki te longwa na oyo babiangaki mabunga ya Mose, mbele okufaki. Ezali mpe bongo lelo. Mingi koleka oyo etali bifundeli.
Mose azalaki na Liloba. Sasaipi bokanisa, nsima ya Liloba komonisama, Mose azalaki Mose lisusu. Bomoni? Kasi ntango Liloba wana ezalaki kati na ye mpo ya kopesama, azalaki Nzambe; malamu, azalaki lisusu Mose te.
Ndeko Branham azalaki na Liloba. Nsima ya Liloba komonisama, Ndeko Branham azalaki Ndeko Branham lisusu, Kasi na ntango Liloba yango ezalaki kati na ye mpo ya kopesamela bato likolo na bande, azalaki Nzambe; azalaki Ndeko Branham te. Oyo eyekoli biso, oyo ezali likolo ya ba bande ezali Maloba ya Nzambe, mpe miko mabunga te kati ya Maloba ma Nzambe.
Tondimaka Yango kaka te, kasi tobikaka Yango. Ntango bamosusu nyoso na bango bazali kotangwa na Yango, tozali koumela na Yango! Tondimaka Yango! EZALA ata nani asala to aloba nini, tondimaka Yango mpe tozali kobika kokokana na Yango. Soko osalaka yango te, na bongo ondimaka Yango te.
Na bongo Nalobi boye, kati na Nkombo na Yesu Klisto: Bakisa eloko moko te, longola te, tia makanisi na yo moko kati na Yango te, loba bobele oyo elobami likolo na ba bande wana, sala mpenza kaka oyo Nkolo Nzambe apesaki motindo kosala; bakisa na Yango te!
Fina Play mpe ndima LILOBA MOKO NA MOKO lokola Nzambe apesaki biso motindo ete tosala. Ezali Nzambe kosolola mbebu na litoi na Mwasi na Ye ya Libala.
Nzambe azipami lisusu mpe andimisaki Mose, na nzela ya ezipelo, na bomizipaka na Móto yango moko, Likonzi ya Móto yango moko ekitaki. Longwa—longwa nde…Longwa na bango, ete bakokaki bobele koyoka Liloba ya Nzambe. Bozui yango? Kaka Liloba, bayokaki Mongóngó na Ye. Mpamba te, Mose azalaki, epai na bango, Liloba ya bomoi.
Nzambe abongolaka te, mpe akokoka te kobongola, manáka ma Ye. Azali Yesu Klisto lolenge moko lobi, lelo mpe libela. Na bongo mpo na biso, mosakoli na Ye andimisami, William Marrion Branham azali Mongongo ya Nzambe epai na biso, mpe Liloba ya Bomoi mpo ya mokolo na biso.
Sasaipi ezali bobele Liloba likomami te mpo na biso, ezali bosolo. Tozali kati na Ye. Sasaipi tozali kosepela. Sasaipi tozali kolembetela Ye. Sasaipi tozali komona Ye, Liloba, komimonisa Ye moko. Ebombami, libanda kuna, mpo ete (mpo na nini?) Ebombami kati na mosuni ya moto. Bomoni?
Ata ezala nini, bamonaka Yango te. Mpo ya nini? Etindamelaki bango te.
Zambi ozali komona Yango, omilengeli nde koyoka Ye koyebisa yo mbala moko lisusu OZALI NANAI? Ntango Atalaka na nse longwa na bitando ya Nkembo mpe amonaka yo, Amonaki nani?
· Nazali komona Liloba limonisami. Oyo Alobaki ete Akosala na mikolo oyo ya nsuka, Nazali komona yango kokola. Namoni bana kolia Lipa wana ya Shekinah koya longwa na bokembisami ya Liloba wana, oyo bandimi Yango. Amen!
· Na bongo tokomi eteni na Ye, lokola ozali ezipelo oyo ezali kozipa Ye. Ozali eteni na YE, ntango nyoso Klisto Azali na kati na yo, lokola Klisto Azalaki eteni ya Nzambe. Mpo ete Nzambe Azalaki kati na Ye, Asalaki Ye Nzambe. Mpe lokola Klisto Azali kati na yo, elikia ya Nkembo, okomi eteni ya Klisto.
· “Bino,” Elobami: “bozali mikanda mikomami,” to, “bozali Liloba, oyo ekomamaki, emonisami,” Eloko moko ekoki kobakisama na Yango te. Okoki koloba te ete: “Nazali mokanda mokomami,” mpe kobika ndenge mosusu ya eloko moko boye kasi bobele yango esilaki oyo kokoma, mpamba te eloko moko ekoki kobakisama te to kolongolama.
Lokumu na Nkombo na Nkolo Yesu Klisto. AZALI KOMONA BISO. TOZALI KOMONA YE. Tozali Liloba na Ye limonisami lelo.
Yaka komibakisa na biso mokolo mwa Lomingo na 12:00 nsima na nzanga, ntango ya Jeffersonville, lokola Nzambe azali kotelema liboso na biso; Likonzi ya Móto lizipami kati na mosuni ya moto, mpe kosolola na biso Liloba oyo esengeli na biso kobika na yango kati mokolo oyo. Ezali Nkembo ya Shekinah kokembisa biso. Lipa ya banganganzambe mpo ya mondimi.
Tika ete biso nyoso toyangana elongo mpe toyoka Liteya 63-1229E Bobongola Miso Epai Na Yesu mokolo mwa Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville.
Ndeko Joseph Branham
Makomi ya kotanga kati ya bomilengeli mpo na boyoki liteya:
Lokola mwana mobali ya moke oyo atalaki na talatala mpe ayebaki te ete azalaki komitala, tozali sasaipi kotala kati na Talatala ya Nzambe, Liloba na Ye, mpe tozali koyeba, TATA, EZALI NGAI, Nazali etaliseli ya Liloba na Yo. Nazali Liloba na Yo limonisami. Nazali Mondimi, Nazali Mwasi na Yo ya Libala!
Liteya moko na moko tozali koyoka ezali komatisa Kondima na biso na bisika ya likolo. Ayebisaki biso tosengeli tokoka kati ya moko na bibolo yango misato: Bandimi, bandimi ya lokuta to bazangi kondima. Wana etalaki biso kati na talatala na Ye togangaki: “Namoni, na elilingi ya ntembe ata moke te, tozali Bandimi. Mpamba te bobele Mondimi nde akondima litono moko na moko mpe ebiangeli moko na moko; TATA, EZALI NGAI.”
Ezali na eloko moko te oyo ekosepelisa biso mpe kopesa biso Bomoi kasi Liloba lilobami ya Nzambe likolo na bande. Ezali bobele nzela moko oyo Bomoi ekoki koya, kati na Liloba na Ye lilobami, Mongongo na Nzambe mpo na mokolo ya biso.
Bomilengele, mingi ezali koya mokolo mwa Lomingo loye, 17, Sanza ya Nsambo, 2022. Ezali na moto moko awa oyo akopelisa Pole, mpe ntango Akosala yango, biso nyoso tokozala na mpota na mingóngó kouta na koganga mpe koloba makasi Amen, Aleluya, Lokumu na Nkombo na Nkolo, Nkembo na Nzambe, mpo ete Nzambe Ye moko Akozala kosolola na biso mbala moko mpe komonisa Liloba na Ye na koleka.
Elanga eteli! Topusani liboso mingi mpe tobelemi kozua Yango. Yesu azali na mesa etandami, epai wapi babulami ya Nzambe bazali koleisama na Bilei bikembi ya mokolo. Pole ya Nsango Malamu kondimisa mpe kokokisa ete Azali awa lelo elongo na biso. Babulami bazali kolia Bilei ya Molimo oyo ebombamaki, kobelema mpo ya Konetolama.
Ntango mobateli na biso, Molimo Mosanto kosolola na nzela ya mosakoli na Ye andimisami, akofina butó wana mpe akopelisa pole ya Emoniseli, Akoyebisa biso kaka oyo ye azali na mokolo na biso. Akoganga mpe akokebisa biso: Nalikii ete bozali kati na mpongi te.
Noa azalaki Pole na mokolo na ye. Mose azalaki Pole na ngonga na ye, sasaipi Natindelaki bino mosakoli moko ya nguya na mokolo na bino mpe Nazali komonisa Liloba na Ngai ya elaka na nzela na ye. Azali Liloba ya Nzambe limonisami na mokolo na bino. Azali Pole ya lelo.
Ntango Nazalaki awa likolo na mabelé kati na mosuni mbala ya nsuka, Nazuaki mapa Matano ya ebandeli mpe Nabandaki kobuka yango. Longwa na oyo ezalaki, Nasalaki mapa mpe eleisaki bato nkoto mitano.
Kasi na mokolo na bino, Nazalaki na eloko te. Nasololaki kaka mpe Nalobaki: “toloba ekozala kuna,” mpe ezalaki kuna, na eloko moko te. Nazalaki na esende ata moko te; ezalaki ata na moko kuna te. Nalobaki kaka: “Tika ete ezala,” mpe ezalaki. Liloba na ngai ekweaka te, mpe Esengeli ekokisami.
Lokola bana ya Yisalaele, ntango bazalaki na mobembo na bango, bazalaki kolia mana ya sika mokolo na mokolo. Bazalaki kotambola na kati na Pole ya Likonzi ya Móto. Likonzi na Móto yango ezalaki Yesu Klisto.
Lelo Azali na biso elongo mbala moko lisusu, Likonzi ya Móto yango moko, ezali kosala makambo yango moko Asalaki ntango Azalaki awa na mabelé kokokisa Liloba na Ye.
Tozali kobianga yo ete oya komibakisa na biso mokolo mwa Lomingo na 12:00 P.M., ntango ya Jeffersonville, lokola mobateli na biso, Molimo Mosanto, Likonzi ya Móto, akopelisa Pole na Ye ya Emoniseli, lokola tokoyoka: 63-1229M “Ezali Na Moto Moko Awa Oyo Akoki Kopelisa Pole.”
Ndeko Joseph Branham Genese 1:3, Mokapo ya 2 Nzembo 22
Yoele 2:28
Yisaya 7: 14, 9: 6, 28: 10, 42: 1-7
St. Matai 4: 12-17, Mikapo 24 mpe 28 St. Malako Mokapo ya 16
Kanisa kaka yango, Nzambe oyo asalaki biloko nyoso mpe atiaki yango na molongo, akitaki mpe amisalaki mosuni kati na biso, kosikola biso. Mpe na nsima Akokaki kopesa biso mpenza lokumu na bozali na Ye bonene, ete Akokaki kotelema aw ana mabelé oyo ya masumu na mikolo ya nsuka, mpe kokokisa Liloba na Ye ete ezali bongo, mpo ete Azali na mokumba na Liloba yango.
Molimo Mosanto ayeisaki Liloba yango na bomoi epai na biso. Ekomaki na bomoi. Na kondima tomoni yango. Toyebi ete ezali bongo, mpo ete Liloba elobi yango, mpe Molimo azali koyeisa Liloba yango na bomoi epai na biso. Sasaipi tozali kosanganisama na Liloba ya Nzambe limonisami kati na mosuni, kaka lokola mosakoli alobaki ete ekozala.
Mondimi andimaka Yango, andimaka (nini?) Liloba. Lilako te; Liloba! Ebongiseli te; Liloba! Ezali te oyo moto mosusu alobaka; oyo Liloba elobaka! Sasaipi bokanisa, oyo wana ezali mondimi. Mondimi akobeteke ntembe te. Mondimi akolobaka te ete: “Yango ekokoka kozala boni? Soko Nakoki kosala ete Yango elimbolama!” Yangon de mozangi kondima. Uh-huh. Ezali mondimi, nde, ata Yango Ezala motindo nini, “Soko Ezali Liloba, Ezali Liloba! Ezali solo.” Oyo wana nde mondimi.
Osengeli kondima ebiangeli nyoso mpe litóno nyoso, mpe eloko nyoso oyo elobami na kati Kuna. Esengeli ezala solo. Soko olobi: “Nandimaka yango te. Mosusu ezali Nzambe, mosusu ezali moto, mosusu na yango ezali bobele masolo ya bokila.” Malamu, na bongo ozali mozangi kondima. Mondimi akobeteke ntembe te. Mondimi akondimaka Yango, ata eyokana lolenge nini to oyo moto ata nani akolinga koloba likolo na Yango, ata emonana tete lokola ekokoka soki moke te, TONDIMI YANGO!
Moto nyoso oyo azali awa, sasaipi, moto nyoso oyo azali koyoka bande oyo; mpe ata ko mokolo moko Nakosengela kolongwa na mokili oyo, ba bande oyo ekobika na yango kaka naino. Bomoni? Mpe ozali kati ya moko na bibolo oyo. Osengeli kozala kati na moko na yango.
Tozali kobika na mikolo ya nsuka mpe osengeli kotala na bomoi na yo mpe oyeba soko ozali na lisanga nini ya bato kati na yango. Olobaka nde: “Nandimaka ete Nzambe atindaki mosakoli oyo andimisamaki na Likonzi ya Móto?” Ayebisaki biso tondima Liloba moko na moko. Koloba KAKA MPENZA oyo ezali likolo na ba bande mpe kobongola Liloba moko te. Tokosambisama na oyo ALOBAKI, ezali ten a nzela na oyo moto songolo alobi ete alobaki, to oyo moto moko alobi ete alingaki koloba, kasi na nzela ya oyo ba bande elobi.
To, okokende nde elongo na Kola mpe Datana, mpe baoyo balobaka: “Azali bobele ye moko moto mosanto te. Bato mosusu mpe babiangamaki kosala makambo yango moko ye asalaki. Bozali kotia motuya mingi likolo na mosakoli na Nzambe. Molimo Mosanto azali kokamba biso sasaipi. Oyo ezali eleko ekeseni”.
Ozali kati na moko na maboké masato maye. Kati na lolenge na yo ne eleko bebe sasaipi mpenza, na motindo na yo ya makanisi, ete, bino aw ana eyanganelo oyo ezali komonana, mpe bino baoyo bokozala na eyanganelo oyo ezali komonana te epai wapi ya bande oyo, lolenge na yo ya makanisi nsima ya koyoka bande oyo, ekoyebisa yo ozali kati na eteni nini. Ezali koyebisa yo polele polele epai ezali yo, to ozali mondimi kati na Liloba mpe okotikala na Yango to okokaki kobima, to kokanga bande yango.
Lokumu na Nkombo na Nkolo, tozali na biso BANDIMI ya solo solo, ezali te moto oyo andimisami na moto mosusu; na eloko mosusu boye te, kasi Molimo Mosanto na Ye amonisi biso Liloba Yango moko. Tomoni Liloba kokóma saa, lindimisami mpe limonisami.
Tozali kopimama na bimekeli, na nzela ya putulú, na molungé yam oi ya minyoko, kasi bosembo ya mitema na biso ezali kobeta na esaleli wana ya Liloba. Tobelemi sasaipi kokende na ndako ya bobongisami. Tozali bana ya Nzambe, tosalemi alimá likolo na Liloba na Ye. Tozali ndakisa ya bomoi, mpe Liloba na Nzambe ezali kobika kati na biso. Mimekano izali koya koningisa biso, kotia biso na nse mpenza, komona wapi tokotelema. Kasi tokoki koninganisama te, totelemaka likolo na Liloba moko na moko.
Yoka lokola azali koyebisa yo ozali nani.
Kanisa bobele ete eteni moko na moko ya yo ezalaki awa, wana elobaki Nzambe ete mokili mozalisama. Atiaki nzoto na yo awa longwa nan tango yango. Mpe ezali na eloko moko te oyo ekolongola yango awa soki ezali Nzambe te.
Eloko moko te ekokoka kolongola Yango longwa na yo. Moto moko te akokoka kozua esika na yo ata ozali moke boni. Okoloba: “Nazali na ngai kaka mama ya ndako.” Moto te akokoka kozua esika na yo! Nzambe kati na bozui na Ye monene, atiaki mpenza nzoto ya Klisto na molongo, na ndenge ete ezali na moto moko te akokoka kozua esika na yo.
Nkembo…Aleluya…Koyoka Bilei bia Nzambe bibombamaki ezali bobele koya monene mpe MONENE. Na koleka ezali biso koyoka Nzambe kosolola na biso na nzela ya motindami na ye moponami koyebisa biso oyo tozali, Kondima na biso ezali kokóma monene koleka. Esengo monene ya koyeba:
· Tozali “BANDIMI YA SOLO SOLO”
· Tozali “MOKO NA BANGO”
· Tozali “MWASI NA LIBALA”
Nakolinga kopesa ya MBELA ko FINA PLAY elongo na ngai, Eyanganelo ya Branham, mpe eteni ya Mwasi ya Libala longwa na zingazinga na mokili na ngonga ya 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, lokola tokozala koyangana longwa na Ebimelo ya ntango, na Elimwelo ya ntango, na Likolo mpe na Ngele koyoka: Ndenge Misato Ya Bandimi 63-1124E. Oyo nde Molimo Mosanto azali kokamba biso kosala. Mpo na biso, oyo ezali manaka ya Nzambe.
· Fina Play: Bande nse bande Nzambe akotia likolo na motema na yo.
Tika ete biso nyoso toyangana elongo mpe toyoka Liteya 63-1124M-Nakosala Nini Na Yesu Oyo Abiangami Klisto? mokolo mwa Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville.
Balingami Mwasi na Libala Kondima Monene ya koleka,
Nayebi ete oyo ezali kaka mokanda moko ya petee na bokomi bolongobani te, kasi Nalingi mokili moyeba ete tondimi liloba moko na moko mosakoli na biso alobaki mpe toyambi Yango ete ezali Oyo Elobi Nkolo. Ntango toyokaka ye koloba eloko moko likolo na bande, tondimaka Yango, toyambaka Yango, lokola Nzambe Ye moko azali kosolola na biso mbala moko.
Eteyamaki, mpe endimisamaki polele-polele na nzela na Liloba na Nzambe, ete ekokaki kozala moto te, esengelaki kozala Nzambe.
Tondimaka ete bilembo yango moko ya komonana saa bimonani likolo na mabelé lelo oyo bimononoki ntango Yesu azalaki awa. Likonzi ya Móto yango moko oyo Mosanto Paulo amonaki na lolenge yango moko, kosala eloko yango moko, eyaki na mokolo na biso. Ezali Nzambe kosolola na biso mbala moko:
Elembo yango moko ya molimo oyo ekokisaki Ye kozala Masiya, ekokisi Ye lelo. Azali naino kakaMasiya!
Okokoka koyamba mapamboli manene maye kaka SOKO ondimi ete Liloba moko na moko ezali Oyo Elobi Nkolo, na bofinaká play. Soko ozali moto moko oyo andimaka yango te, mpe esengeli ókána na boyekoli na yo to na nzela ya moto moko koyebisa yo: Oyo ezali Liloba ya Nkolo, mpe oyo ezali kaka Ndeko Branham nde azali kosolola,” na bongo oyo ezali mpo na yo te.
Na ntango Mose akambaki ban ana Yisalaele, ezalaki na moko, ezalaki Mose, bamosusu nyoso bazalaki kaka kolanda Etinda. Bomoni?
Kasi lelo, mpo na biso OYO TONDIMAKA YANGO LOLENGE WANA, mitema mia biso mitondi mpenza na esengo, mpe mizali kopunjwapunjwa, ezali mpasi mpo tokoka komipekisa.
Nazali koyoka ete Asikoli biso. Nazali koyoka ete nkombo na biso izali kati na Buku na Ye. Nandimaka ete tosikolami na Makila ya Mwana Mpate.
Mpo ete tondimi Etinda oyo ezali Mongóngó ya Nzambe kosolola na biso mbala moko, tondimaka ete ezali Nzambe Ye moko kosolola na biso mbebu na litoi. Ezali na NTEMBE TE nkombo na biso izali likolo na Buku na Ye.
Tika ete Natia yango motindo oyo, lotómo na Yesu Klisto lokómi mosuni kati na Lingomba na Ye na mokolo oyo ya nsuka. Yangon de mingi kati na biso bandimaka. Nandimaka yango elongo na bino.
Lolenge wana nde mpenza tondimaka yango, Yesu Klisto akomi mosuni lisusu, azali kosolola na Mwasi na Ye ya Libala likolo ya Bande.
Ntango nyoso tozali kofina play kondima na biso ezali komata na bisika ya likolo ya sika. Oyo ezali te kaka motei mosusu koteya, oyo ezali Nzambe Ye moko kosolola na biso. Tolingi na biso kaka 100% Liloba peto.
Natuna naino bino eloko moko. William Marrion Branham azali nde mobateli na bino? Azali nde mwanje nan sambo motindami ya Nzambe oyo andimisami? Bondimi ete oyo asengaki Nzambe asala, Nzambe asalaki? Bondimi ete azalaki Mongongo ya Nzambe mpo na mokolo oyo? Bondimaka liloba moko na moko lilobaki ye? Na bongo bokopambolama mbala moko lisusu na motindo moleki maloba mokolo mwa Lomingo.
Ezali na nzela mosusu te oyo okokoka koyamba lipamboli oyo kaka ozala koyoka ba bande mpe ondima ete oyo ozali koyoka ezali Oyo Elobi Nkolo. Esengeli ondima ete oyo ezali ye koloba ezali Nzambe kosolola na yo mbala moko.
Ngai, lokola mobateli na bino, ndeko na bino, na kondima oyo Nazali na yango, Nasengi Nzambe ete atia yango liko na bino. Nandimi ete Nazui oyo Nasengi. Sasaipi soko bokondima yango elongo na ngai; na kondima oyo Nazali na yango, Napesi na bino mpo na ngonga oyo.
Epai na biso, azali mobateli na biso. Ezali na moko te kati na mokili azali na kondima mingi, to monene na koleka, likolo ya MOBATELI NA BISO, mosakoli ya Nzambe. Sasaipi mosakoli ya Nzambe asengaki Nzambe ete Apesa biso KONDIMA NA YE MONENE. SOKO bondimi Yango na motema na bino mobimba, Ezali sasaipi KONDIMA YA BINO…NKEMBO, TONDIMI YANGO!!! Kondima na biso ekokaki kozala ya bolembu, kasi ezali lisusu bongo te, mpo ete sasaipi tozali na KONDIMA na ye.
Mpe sasaipi, kati na Nkombo na Yesu Klisto, Mwana na Nzambe, boangana mpasi na bino, bokono na bino, mpe boloba na yango: “Osengeli kokende,” ‘mpo ete bozali na kondima na bino, kobakisa na kondima na ngai, elongo na nguya ya Yesu Klisto, oyo bozali na Ye beebe bozali awa kondimisa yango mpe kokokisa ete Azali awa, akobikisa bino nan tango oyo.
Nakoki nde koloba nini oyo ekosala ete oya komibakisa na biso mpe koyamba lipamboli monene oyo? Kanisa yango, eloko nse eloko ozali na yango bosenga, okoki kozua yango soko okoya koyoka mpe kondima Yango kaka.
Yaka koyoka mokolo mwa Lomingo na 12:00 Nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, elongo na Mwasi na Libala. Tokozala koyangana mpe koyoka longwa na Ebimelo ya ntango, na Elimwelo ya ntango, na Likolo mpe na Ngele, nyoso na ntango moko, wana Oyo Elobi Nkolo ezali kosolola na biso mpe koyebisa biso nyoso na ntina na: YE OYO AZALI KATI NA BINO 63-1110E.
Soko okokoka koyoka elongo na biso na ntango moko mokolo mwa Lomingo te, likambo te, fina play ntango nse ntango mpe yoka mpe ndima ete oyo ozali koyoka ezali Mongongo na Nzambe kosolola na yo.