Molingami Momboto na Molimo na Bokonzi na Abalayama,
Na lingomba nini nde okoki kokende mpe koyeba, na ntembe ata moke te, ete Liloba moko moko ozali koyoka ezali Oyo Elobi Nkolo? Esika moko te, bobele soko ozali koyoka Mongóngó na Nzambe kosolola na yo likolo na ba bande.
Tozali ba mpongo na Nzambe mpe tokokakola na Liloba moko te. Tolingi bobele Mana ma sika na losambo nyoso mpe ekómaka ya sika koleka te bobele na boyókáká Yango mbala moko útá na Nzambe Ye moko. Topumbwaka likolo koleka mpe likolo koleka lokola toyókaka Liteya moko na moko. Wana ematí biso likolo koleka, nde tokoki komona saa. Soko Mana mazali te na lingomba oyo, ba mpongo na Nzambe bamataka mwa likolo koleka kino bakozua Yango.
Boni mitema na biso mipumbwaka na esengo wana eyokaka biso Nzambe koloba na biso mpe koyebisa bisa ete tozali Lingomba na Ye mpenza, ya Nzambe, libotami mbala na mibale, oyo endimaka Liloba na Nzambe moko na moko liboso na eloko ata nini, etáli te soko nini, mpo ete tozali Mwasi Liloba na Ye moseka azangi kobebisama.
Yíkiyiki ezali mpenza kati na bato lelo. Lokola ezalaki na mikolo na Yesu, bandimi wana ya nkombo bazalaki kozua ndimbola ya oyo nganganzambe alobaki na ntina na Likomi. Bazalaki kondima ndimbola ya moto ya Liloba. Nde ntina bazangaki komona Solo na Nzambe, mpamba te ezalaki na ndimbola-ndimbola mingi mingi ya Liloba na Nzambe koúta na bato. Nzambe asengeli na moto te kolimbola Liloba na Ye. Azali Molimboli na Ye Moko.
Ondimi nde ete soko obíkáki na ntango na Yesu, olingaki kondima Liloba moko na moko lilobaki Ye, ezala nganganzambe na yo alobaki nini? Olingaki nde koloba na nganganzambe na yo ete boyóki Yesu ezali eloko ya motuya koleka okoki kosala? Olingaki koloba na ye ete maloba na Yesu mazali na bosenga ya ndimbola te? Soko bakokaki kozala na ba bande ya mateya na Yesu, olingaki nde koyebisa nganganzambe na yo ete olingaka ye áfina play mpo okoka koyoka mpeza oyo Yesu alobaki mpe boni alobaki Yango?
Malamu, oyo kuna ezalaki eleko na yo te; oyo nde eleko na yo, ntango na yo yango oyo. Biblia elobi, Azali lolenge moko lobi, lelo, mpe libela. Oyo ezali yo kosala mpe koloba sasaipi ezali mpenza oyo olingaki kosala na ntango yango.
Tondimaka M-w-a-n-a na Nzambe yango moko oyo ayaki na ebimelo na mói mpe amindimisaki Ye moko lokola Nzambe amonisamaki kati na mosuni, azali M-w-a-n-a na Nzambe yango moko na ngambo na elimwelo na mói oyo azali komitalisa Ye moko kati na biso. Tondimaka mokolo oyo Likomi liye likokisami liboso na biso.
Nandimaka mpeza solo ete oyo ezali mbula na kondimama, mbula na yubile. Soko osepeli kotikala moombo mpe ondimaka te ete Etinda oyo ezali Yango Elobi Nkolo; Soko Etinda oyo ezali Etemelo na yo te; soko ondimaka ete esengeli moto álimbola Etinda, soko ondimaka ete ezali libunga koyoka ba bande na lingomba na yo; Na bongo osengeli koyeisama mpe liusú litobolama na litói na yo na etobweli, na nsima okosengela kosalela kapita ya baombo wana mpo na mikolo na yo mitikali.
Kasi Lingomba Mwasi na libala ya solo mpenza azali kondima Liloba mobimba na Nzambe kati na litondi na yango mpe kati na makasi na Yango. Tozali Lingomba Liponómí oyo tobendámi libanda mpe totiami pembeni mosika na biloko wana, mpe bomónisami na Nzambe ebéndaki bokebi na biso. Tozali Momboto yango na Molimo na Bokonzi ya Abalayama.
Tozali na matondi mpo na yo kozala awa kosepela na bondeko oyo elongo na biso, oyo tozali na mitema lúkulúku ete Nzambe akopesa biso kati na losambo oyo.
Boye tobiangi yo komibakisa na biso mokolo mwa Lomingo na 12:00 nsima na nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka 65-0219 Lelo Oyo Likomi Oyo Ekokisami. Tozali na motema lúkulúku monene mpo na oyo Nzambe azali kosala na ntango ya mayangani maye. Pole na mpokwa ya Mwana eyéi.
Tozali awa. Tokómi. Ntango ebelemi. Ezipelo esili kokabwana na Mombóto. Toúmeli kati na Bozali ya Mwana, kokémba. Tokotikala kati na Bozali wana kino mwa libóké na biso ekokóma na bokémbi epai na Klisto, kino tokokóma lipa likolo na mesa na Ye. Matondi ezónga epai na Nzambe!
Etinda oyo endimisaki Malaki 4, endimisaki Luka 17:30, endimisaki Baebele 13:8, endimisaki Yoane 14: 12, endimisaki Emoniseli mokapo na 10, bofungolami ya Bilembo Nsambo, mabombami na Nzambe, momboto na nyoka, libala mpe koboma libala mpe mabombami mosusu oyo nyoso ebombamaki na nse na makonzí mpo na mbula nyoso oyo.
Tozali baseka epai na Liloba. Tokokoka te mpe tokosimba eloko mosusu te. Na Liteya moko na moko toyokaka, ezali mobesu mpe ya sika; Máná ma sika maúti kaka kokwea longwa na Lola.
Kasi Akebisaki biso ete na ntango na nsuka ekozala na milimo mibale mikozala pene mpenza, ekozimbisa ata baponami mpenza, soko ekokoka. Na bongo, tosengeli kozala na bokengi kotala molimo yango lokola ekomonana lokola ete ezali Mwasi na libala ye moko.
Botala, bomoni boni ezali penepene. Matai alobaki: Mosanto Matai 24: 24, elobi, ete: “Milimo mibale na mikolo na nsuka,” molimo na lingomba ya bato na lingomba mpe Molimo na Mawasi na libala ya bato na Mwasi na libala, “mikozala pene mpenza elongo kino ekokaki kozimbisa Baponami mpenza soko ékokoka.” Nde bongo ezali penepene.
Alobaki Molimo na bato ya lingomba mpe Molimo na bato ya Mwasi na libala bakozala mpenza pene mókó na mosusu. Yango elingaki koloba ete molimo na bato ya lingomba ekolinga koloba ete bandimaka Etinda ya ngonga kozala PENE-PENE BONGO.
Ekozala te ba Metodisiti, Batisiti, Presibiteria, to bato na Kitelá; bazali mosika mingi na Liloba mpe baboyaka ata Etinda. Moko te kati na bango azali na molimo pene mpenza na Mwasi na libala.
Satana amekaki, mpe alongaki mpenza, kozala na bozímbisi. Ata longwa na ebandeli, alobaki kaka: “Ya solo,” nde koyebisa Ewa ete ásalela mabanza na ye, mpe asengelaki koyoka ye mpe Liloba kaka te. Ezali na eloko bobele moko apesamaki motindo kosala: tikalá na Liloba.
Makambo:
Soko ozali na motuna, esengeli eyano ézala. Yango nde mosakoli ayebisaki biso. Eyano esengeli koúta na Liloba. Liloba eyaka se epai na mosakoli. Mosakoli nde kaka molimboli moko ya Liloba. Soko mobali moko to mwasi moko apesi yo eyano, ekosengela kozala oyo mosakoli asili alobáki. Esengeli te kozala ndimbola na ye, likanisi to lisosoli. Basengeli batelema na yango likolo ya moboko ya Liloba lilobami na mosakoli na Nzambe andimisami. Ezali liloba na mosakoli te bakísá, ezali kaka oyo mosakoli alobaki.
Ezali sasaipi na biteyelo mibale ya makanisi.
1: Okosengela kondima liloba moko na moko likolo na ba bande lokola ezali Mateya ya litomba koleka oyo osengeli koyoka.
2: Osengeli te kondima Liloba moko na moko likolo na ba bande mpe batei bazali sasaipi na mateya ya litomba monene osengeli koyoka.
Ezali na mbóngwana-mbongwana mingi, mingi na likanisi ya mibale: Molimo Mosanto akokamba ngai to mobateli na ngai koyebisa biso nini ezali to nini ezali te Liloba. Tozali na bosengá ya mingi koleka oyo Ndeko Branham alobaki likolo na bande. Esengeli ózala na batei kolimbola to komanyola Liloba. Soko na batei te okokoka kozala Mwasi na Libala te.
Ezali na kotemelana mosusu mingi, kasi ekokoka soki moké te kotanga yango nyoso. Kasi mbóngwáná-mbongwa moko ezali te soko kotemelana na oyo ya liboso. Ezali kaka, NDIMA LILOBA MOKO NA MOKO.
Lokola bandimi kati na Etinda oyo ya ntango na nsuka, esengeli ómituna mituna miye:
1: Ondimaka nde ete oyo mosakoli alobaki likolo na ba bande ezali Etemelo na yo, to ondimaka ete ezali Molimo Mosanto na nzela na yo to na mobateli na yo?
2: Ondimaka ete lotómo na misala mitano ezali na mateya ya litomba koleka esengeli Mwasi na libala áyoka, to ezali nde Etinda likolo na ba bande?
Soko mobateli na yo, motei, molakisi, mopalanganisi na Nsango malamu to mosakoli azali te koyebisa yo ete koyoka ba bande ezali MATEYA YA LITOMBA KOLEKA osengeli koyoka, azali YA LOKUTA, MPE MOLIMO MOSAKOLI AKEBISAKI BISO ETE EKOYA.
Soko alobaka ete EZALI Mateya ya litomba koleka okoki koyoka, kasi azali naino koboya koyokisa bato ba bande na lingomba na ye, EZALI NA ELOKO MOKO MABE. Soko solo mpenza andimaka ete koyoka ba bande ezali eloko ya litomba koleka okoki kosala, na bongo akoyokisa ba bande LIBOSO, na nsima akoki koteya soko ayoki akambami.
Ndakisa petee:
Soko Nayebisaki yo ete komela mai mpeto nde eloko bobele moko osengeli kosala mpo na bokolongónó na yo, mpe ezali na mai bobele MOKO mapesami ndingisa mpe makokisami lokola mai ma bomeli…kasi ntango oyei na ndako na ngai mpo na bilei ya mpokwa, Napesi yo mai mango te maye malingisami. Nayebisi yo: “okoki komela mai yango na ndako na yo kasi soko oyei na ndako na ngai, okosengela komela oyo Nakopesa yo.”
Soko mai mango nde ELOKO ELEKI MALAMU Nakoki kopesa yo mpo na bokolongónó na yo, oyo ekopesa yo bomoi, na bongo eloko ya liboso Nakopesa yo ntango okóti na ndako na ngai ezali mai yango mpeto ya bomeli.
Nazali nde na libunga na bolobaká ete: “KOYOKISA BATO BA BANDE NA MANGOMBA NA BINO, ezali eloko epusi malamu bokoki kosala mpo na bato na bino Ezali Yango Elobi Nkolo.”
To, bazali nde na libunga na bolobaká: “Ezali mabe koyokisa ba bande kati na losambo, Ndeko Branham alobá soki moke te koyokisa ba bande kati na lingomba. Toyebisaka bato bayoka ba bande na ba ndako na bango, na mituka na bango, ntango nyoso, KASI na losambo basengeli koyoka NGAI.”
Molimo nini nde ezali kokamba yo? Olobaka nde ete: “Oyo elobami likolo na ba bande ezali etemelo na ngai mpe eloko ya litomba eleki Nakoki koyoka”? To, olobaka nde ete: “Ba bande ekoki te. Ezali etemelo na ngai te mpe ezali te eloko ya litomba mingi koyoka, batei nde bazali yango”?
Sikawa nde ntango ya Momboto, to ntango ya Mwasi na libala. Bizipelo bisili kokufa. Bizipelo bikaóki. Ntango ya Liloba Moseka, asimbami te. Ezali moseka, bokanisa, ntango ya Liloba moseka.
Yaka koyoka Maná ma sika maúti kokwea longwa na Likoló mokolo mwa Lomingo loye na 12:00, nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka: 65-0218 MOMBOTO EZALI MOSANGOLI NA LIBULA ELONGO NA EZIPELO TE.
Boni mitema na biso ezali kokufa na mposa mpo na mokolo oyo mpóso na mpóso ntango tokoki kosangana elongó longwá na mokili mobimba koyoka Mongóngó na Nzambe koloba na biso Liloba na Bomoi na Seko. Ezali na eloko mosusu te ekosepelisa bomoto na biso mpe kosilisa mpósa na biso kasi Mongóngó na Nzambe.
Oyebisaki biso, Tata, ete elanga monene ya kobuka ezali mpembe, ekémbí, mpe mbuma ebelemi mpo na ntango monene ya kobetama. Mbuma ezali kolala sikawa kati na Bozali ya Mwana mpe kokemba mpo na Bokonzi ya Nzambe.
Totelemi, Tata, na kondimisama na biso na oyo toyebi ezali Solo; Mongóngó na Yo likolo na bande ezali Mongóngó SE MOKO oyo ekobongisa biso be, Mwasi na libala na Yo.
Ezali mpasi lokola tozali kososolama mabe na bandeko na biso mibali mpe basi. Tobondelaka mpe tosengaka bango bakima te longwá na Bozali na Ye, kasi bakima kati na Bozali na Ye.
Toyebi ezali na bato ebele bapakolámi Oponáki bango mpe Otiaki bango kotala bitongá na Yo, baoyo balingi Etinda oyo na mitema na bango nyoso, kasi Tata, bakweaka kozanga akotia Mongóngó na Yo endimisami likolo na bande liboso na bango. Bakweaka na kozanga koyebisa bango ete oyo ezali Etinda ya moto moko mpe ete Oponaki moto yango kokamba Mwasi na Yo ya libala. Bakweaka na kozanga koyebisa bango ete Mongóngó na Yo ezali Mongóngó SE MOKO ekosangisa mpe kobongisa be Mwasi na libala na Yo.
Nasengeli “kogánga kotemela yango.” Kogánga kotemela eloko nyoso, mpe moto nyoso, oyo atémeli koyokisa ba bande na Yo kati na mangomba na bango. Kogánga Kotemela mosala na bango, kogánga kotemela lingomba na bango, kogánga kotemela basakoli na bango, kogánga kotemela batei na bango, kogánga kotemela banganganzambe na bango. Nasengeli kogánga kotemela eloko mobimba!
“Nalobi, Nayei komibakisa na bino baninga. Boyebi, Nandimi Nakoyebisa bino eloko Nakosala. Nazali bobele na mwa eloko awa Nandimi ete Nakokoki kosala yango…koyeisa biso nyoso elongo, mpe kosala oyo, oyo kuna, to mosusu.”
Nasengeli kogánga kotemela yango, lokola kaka liloba na Yo, oyo elobamaki na mosakoli na Yo, ekoki koyeisa BISO ELONGO.
Bakokoka koteya boni? Bazangi bango nyoso kondimana te kati na bango mpe bazali komona makambo makeseni moko na mosusu, longola se eloko moko, bango nyoso bazali koyokana likolo na…KOZANGA KOYOKISA BATO BA BANDE NA MANGOMBA NA BANGO. Ekoki nde kozala boni, Tata?
Oyebisaki biso ete esengeli na biso kozala na ETEMELO MOKO, yango nde Liloba na Yo. Olobaki na biso Liloba na Yo eyaka, BOBELE epai na mosakoli na Yo. Oyebisaki biso ete BOBELE ye nde akoki kolimbola Liloba na Yo. Oyebisaki biso ete motei nyoso, moilingomba nyoso, moto nyoso akokoka BOBELE KOLOBA OYO ALOBAKI. Mongongó na ye nde MONGONGO BOBELE moko endimisamaki na nzela na Likonzi ya Moto na Yo lokola Yango Elobi Nkolo.
Nazali koloba te ete bazali lokuta to basengelaki koteya te. To Nazali koloba te ete Nkolo azali elongo na bango te, to bapakolami te soko babiangami te koteya, kasi Nasengeli Nágánga kotemela bango ntango bakoyebisa bato na bango te ete koyoka ba bande ezali eloko moko ya litomba koleka bakoki kosala.
Kobongola litónó to ebiangeli moko ezali kufa. Opesaki nzela mpo na Mwasi na libala na Yo ayoka Yango Elobi Nkolo na matói na bango moko. Bakokoka nde te koteya bato na bango boni ete ezali Etinda ya litomba koleka esengeli na bango koyoka? Ezali Etinda bobele moko oyo Nakoki koloba AMEN na Liloba moko na moko, lokola ezali Liloba ya moto te, to ndimbola ya moto ya Liloba na Yo, ezali Liloba Peto na Yo.
Olobaki ete Etinda na motindami bazali eloko moko. Mosakoli na Yo alobaki Yango mpe Olingaki kokokisa Yango. Liloba na Yo lilobami na mosakoli na Yo ezali na bosenga na ndimbola TE lokola ezali Mwana na Moto koloba mbala moko na Mwasi na Ye ya libala.
Nasengeli kobondela bato, bozonga na bolingo na bino ya liboso. Bozonga na oyo boyebi ezali YANGO ELOBI NKOLO. Soko bozalaki kotatabana kozanga koyeba bókende nzela nini to bósala nini, boya, bomata na masuwa elongo na biso na mpokwa oyo. Tozali kokita na Niniwe, kogánga. Tozali na lotómo liboso na Nzambe, ezali Etinda oyo likolo na bande.
Tondimi ete koya na Nkolo ebelemi, mpe Akozala na Mwasi na libala, mpe tozali komilengele. Tolingi eloko moko te kasi Liloba Peto ya Nzambe lilobami na mosakoli na Ye. Tozali kokende na Nkembo, yaka kokota na masuwa na biso.
Soko ondimaka ete Etinda oyo ezali Solo, mpe ebongi kobika mpo na yango, ebongi kokufa mpo na yango, yaka komibakisa na biso mokolo ya Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka Liteya oyo tondimi ezali na litómbá monene mpe ezali ya noki-noki mpo na biso koyóka: Moto Oyo Azali Kokima Longwa Na Bozali Na Nkolo 65-0217
Bozali ba mpate na ngai. Ezali boni? Bozali ba mpate na Nkolo oyo apesi ngai Naleisa.
1.Nayokaki yo koloba ete ondimaka LILOBA MOKO NA MOKO ya Etinda oyo ezali YANGO ELOBI NKOLO.
Longwa na bozindo na motema na ngai mpe na mosisa moko na moko ya bomoto na ngai NANDIMAKA YANGO. Ezali Mongongó mpenza na Nzambe kosolola mbebu na litói na Mwasi na Ye ya libala.
Nzambe Alobaki na nzela na mosakoli na Ye mpe alobaki:
Boye mpe elobi Ngai, na Nkombo na Yesu Klisto! Bakisa eloko moko te. Longola te, tia makanisi na yo moko na Yango te. Lobá bobele oyo elobami likolo na ba bande wana. Sala bobele oyo Nkolo Nzambe apesaki motindo kosala. Bakisa na Yango te.
Soko obetaka tólo ete ondimaka Etinda oyo ya ntango na nsuka, osengeli mpe kondima LILOBA MOKO NA MOKO mpo na kozala Mwasi na Ye ya libala. Satana amekaka kopekisa Yango na nzela na batei mpe alobaka: “Ntango Ndeko Branham azalaki kobeta masoló ya bokila to bolobaká ete ‘bozali na molámbi malamu koleka kati na mboka’, to ‘Nazali na Likomi te mpo na yango, kasi Nakoyebisa bino oyo Nakanisi;’ Bopusami te kondima eteni wana. Molimo Mosanto azali awa kokamba biso kososola nini ezali mpe nini ezali Liloba te.” EZALI ZABOLO YANGO MOKO OYO ASOLOLAKI NA EWA MPE ALOBAKI, SOLO MPENZA…ALINGAKI KOLOBA TE ETE LILOBA MOKO NA MOKO. Eyokani lokola eyebani?
Bazali kosala mpenza oyo APESAKI MOTINDO na bango ete basala te. Alobaki LOBA OYO ELOBAMI likolo na ba bande, tía makanisi na yo to lisosoli na Yango te. Alobaki te: “nyoso LONGOLA SE eteni oyo mpe eteni oyo wana, mpe mobateli na yo akoyebisa yo ntango ezalaki Molimo Mosanto kosolola mpe ntango ezalaki kaka ngai.” Nazali bobele mwa libanga moke na libongo kati na mabanga manene.
2.Okanisaka ete Ndeko Branham mpe/ to ba bande na ye bazali etemelo?
Ndeko Branham azali Etemelo na ngai te kasi Etinda alobaki likolo na bande ezali solo mpenza Etemelo na ngai.
Bato mingi bakoloba ete ezali solo te, Biblia ezali Etemelo. Moninga na ngai, Biblia mpe Etinda likolo na bande bazali se eloko moko. Ezali motema mpenza ya Etinda. Etinda likolo na ba bande ezali ndimbolá ya Biblia. Bazali moko mpe eloko moko.
Likambo petee ezali: 1. Biblia ezali Liloba. 2. Liloba liyaka epai na mosakoli. 3. Mosakoli azali bobele ye moko nde molimboli ya Liloba na bonzambe. 4. Mosakoli na biso, William Marrion Branham, azali Liloba na Nzambe limonisami mpo na mokolo na biso mpe atindamaki kolimbola Liloba. 5. Liloba na Nzambe ezali na bosenga na ndimbola te.
Oyo Asololaka na nzela na mosakoli na Ye likolo na bande EZALI NDIMBOLA NA LILOBA NA YE.
Biblia eyebisi biso ete Azalaki koya lisusu mpe kobika kati na mosuni kaka lokola asalaki elongo na Abalayama mpe Yesu Klisto. Alobaki ete azalaki naino na makambo mingi ya koyebisa biso. Alobaki ete Akolinga komonisa mabombami manso manene maye mabombami kati na Liloba. Alobaki ete ezalaki na bosenga na ndimbola te. Alobaki soko moke te ete akokaki kotinda ebólo moko kokamba to kosangisa bato na Ye, YE YEMOKO ALINGAKI KOKAMBA BATO NA NZELA NA MOSAKOLI NA YE LOKOLA ASALAKI YANGO NTANGO NYOSO. LILOBA NA YE LIKOKI KOBONGWANA TE.
3.Ondimaka ete babateli basengeleki koyokisa bato ba bande na mangomba na bango?
Mobateli moko na moko asengeli kosala lolenge akambami na Nkolo kosala, lokola lingomba moko na moko ezali nsómi. Nandimaka mpe Nalobaki yango mbala mingi likolo na eteyelo, ete babateli basengelaki bazongisa Ndeko Branham na biteyelo na boyókisaká bato ba bande. Nalobá soki moke te ete basengeli kotika koteya, kaka koyokisa bato ba bande. Kasi bazali kosalela ekimelo ya lolenge nyoso eyebi kobanzama te koboya koyokisa bato Mongóngó na Nzambe na mangomba na bango.
Nakotika mosakoli áloba lolenge Nayokaka na ntina na babateli baoyo bakolinga te koyokisa bato Mongóngó wana kati na mangomba na bango.
Sasaipi, Ndeko Junior Jackson azali na makoki ya kozanga koyokana na yango. Alingaka lingomba na ye…Bato nyoso balingaka kosolola minoko na sika mpe makambo kati na eyanganelo. Oyo wana ezali kpókósó ya Ndeko Junior; etali—etali ye. Kasi Junior Jackson andimaka Etinda oyo lolenge moko ba…moto ata nani kati na biso andimaka. Azali moko na biso.
4.Ondimaka ete batei basengelaki kotika koteya?
Te, Nalobá yango soki moke te soko ete Nadimaka yango te. Liloba eyebisi biso mpe Ndeko Branham azalaki mpenza polele likolo na Mateya oyo ya mituna mpe biyano mpo na batei kokóba liboso.
Namiyokaka kaka Nakambami, mpo na lingomba na ngai, koloba na lombangu liboso; to na nzela na mokanda mpo na sikawa, na nsima kofina play mpe koyoka Mongóngó bobele MOKO na Nzambe mondimisami mpo na lelo.
Nalobaki mbala mingi ete Nazali na lotómo monene koleka kati na mokili, Nasengeli koyeisela lingomba na ngai Mongóngó na Nzambe mokolo na Lomingo nyoso.
5. Bato bazali koloba ete soko olandi manáka ya boyoki ya Eyanganelo ya Branham te ozali Mwasi na libala te?
Nalobá yango SOKI MOKE TE to kútu Nakanisá yango te, bandeko na ngai mibali mpe basi. Ye oyo akoloba likambo lokola oyo azali na libunga. Lokola mobateli na Eyanganelo ya Branham, Namiyoki kokambama koyokisa bato ba bande ya Ndeko Branham. Nandimaka ete Yango nde Mongóngó bobele moko ekosangisa Mwasi na libala.
Lokola Nalobaki liboso, Nandimaka nyoso likolo na ba bande ezali Oyo Elobi Nkolo mpe ezali na bosenga na ndimbola te. Nakoki koloba amen na Liloba moko na moko Nayokaka. Nandimaka ete William Marrion Branham atindamaki kobianga Mwasi na libala kobima. Esika na ngai kati na lotómo na misala mitano ezali kotalisa bato epai na motindami yango na nsima kofina play. Eloko monene ezali te oyo eleki koyoka Mongóngó yango. Epakweli eleki monene ezali likolo na ba bande, boye mpo na nini Nakosepela kopesa lingomba na ngai eloko mosusu?
Mokolo na Lomingo nyoso Napesaka mbela na mokili mobimba koyoka Liteya Nkolo Atiaki na motema na ngai koyokisa bato kati na losambo. Moto nyoso atombelami boyei bolamu koyoka na ntango moko.
Nazali kosalela lokola mokambi na ngai oyo Ndeko Branham alobaki likolo na ba bande.
Mpe tozali na nzela oyo ya telephone sasaipi, oyo ezali malamu mingi, mingi. Bato bakoki kofanda bobele na ba ndako na bango to na bango…bayangani na bisika na bango, mangomba na bango, mpe bongo na bongo, mpe koyoka losambo. Nalingaka yango.
Sasaipi, mobateli, Nalingi ete oyeba ete, ete, oyo ezali kaka mpo na eyanganelo na ngai nde Nazali koloba makambo oyo. Mpe Nazali na makoki ya kosala yango, zambi Natiamaki na Molimo Mosanto kokengela ba mpate oyo.
Liteya oyo, mpe Mateya mosusu nyoso Nasololaka likolo na yango, matindameli eyanganelo na ngai. Ezali te mpo na eyanganelo na yo kaka soko balingi kozua Yango. Kasi Etindameli bato oyo awa.
Mpe yango ezali mokili mobimba. Mpe bato bakolamuka na midi ya butu kati na butu, kati na bikólo ya kala, bazali kobatela monyolólo na libondeli wana na ntango moko. Na maloba polele nkóto zomi kati na ba nkóto na nkóto na ba nkóto bazali kobondela na ntango moko. Nzambe akangami koyoka; bozali bobele—bozali bobele kozingela Lola na ekumbaki ya libondeli, bomoni, Akosengela koyoka.
6. Ezali nde mabe kokende na losambo?
Nalobá yango soki moke te to Nandimá yango te. Soko Nándimaka yango mpo na nini Nakokaki kozala na losambo? Na Eyanganelo ya Branham tozalaka na losambo mbala 3 na mpóso moko kino ekómaki mpenza mpasi mpo na ngai kozala na koyangana mingi bongo mpóso na mpóso mpe kosala mosala na VGR. Nsima tozalaki na koyangana 2 na mpóso moko kati na Eyanganelo kino makoki ya kobatela bato ezalaki lisusu te. Bongo tokendeki na litongi na biso tosalelaki mpo na bilengé, oyo ezalaki esika ya masano.
Nkolo atiaki na motema na ngai kopesa liyebisi mokolo na Lomingo moko na ntóngo. Nalobaki ata soko bakangi bikuke ya losambo oyo mokolo moko, tokozanga eloko moko te lokola mobateli na biso akokaki koloba na biso esika se esika tozalaki. Sanza moko nsima, tozalaki na COVID oyo ekangaki mangomba na mokili mobimba.
Nayokaki kokambama na ntango yango ete ezalaki libaku malamu kobongisa esika ya masano, lokola tozalaki na bosenga na esika ya losambo. Na bongo, tozalaki na kosepela na ba ndako na biso, tosanganaki mpe koyoka mosakoli na Nzambe likolo na bande elongo na eteni ya Mwasi na libala na mokili mobimba, wana losambo lozali kobongisama.
Nayebi ete ezali na mituna mosusu mingi, mingi na mitema na bato. Ezali na makambo ebelé Nalobaki masosolamaki mabe. Soko Ndeko Branham asosolamaki mabe, koleka mingi boni Nakososolama mpe mabe?
Nakokaki kozala na libunga na oyo Nalobaki. Nakokaki koloba yango malamu koleka to Nazalaki polele mingi na lolenge Namemáki yango. Kasi ezali na eloko moko NAYEBI ezali solo, ETINDA OYO EBONGI BE. Osengeli te koyoka ngai to lolenge Nalobaka, kasi oSENGELI KOFINA PLAY MPE KONDIMA LILOBA MOKO NA MOKO.
Mbala moko lisusu, Nabiangi yo komibakisa na Eyanganelo ya Branham mokolo mwa Lomingo oyo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka: Mitúna Mpe Biyano # 4 64-0830E.
Nzambe alingi biso mingi mpenza na ndenge ete Asalaki ete mosakoli na Ye áyanola mituna na biso NYOSO, mpe atiaki biyano likolo na bande. Ntango tozali na bosenga na yango, nyoso tosengeli na yango kosala ezali KONDIMA MPE KOFINA PLAY.
Nazali nde na Molimo Mosanto?
Elembeteli ya Molimo Mosanto, ntango Nzambe amonisi yo mpe omóni yango, YANGO ELOBI NKOLO mpe oyambi yango.
Na bongo Nazali na Yango Nkolo, lokola Omonisi ngai Etinda oyo mpe Nayambaki yango lokola Yango Elobi Nkolo!
Kasi, ezali komonana lokola ete Nakweaka mingi mpenza…mpe bomoi na ngai ya kala boni?
Ezali te oyo ozali, oyo ozalaki, to eloko moko te na ntina na yango, ezali oyo Nzambe asali mpo na yo sikawa. Yango nde elembeteli.
Nkolo, Ozali komona bomoi na ngai eleki te mpe Ozali kutu te komona ebele na ebele ya mabunga na ngai, Ozali bobele koyoka mongongo na ngai; Nkembo Nkolo, NAZALI NA MOLIMO MOSANTO.
Ndeko Branham, Nayebi olobaki ete ozali bobele yo moko libanga likolo na libongo te, kasi nani nde akozala kokamba Mwasi na Libala na Klisto na ntango na nsuka?
Na lisungi na Nzambe, Nandimi ete Nazali kokamba Mwasi na libala na Yesu Klisto.
Nazali na makambo mingi na motema na ngai, esengelaki Nasala nini?
Eloko mosusu ezali na likambo sasaipi te kasi kozua bana nyoso na Nzambe elongo mpe koloba: “Tokende.”
Matondi Nkolo, tozali kosala bobele yango. Eloko mosusu etali biso te kasi Liloba na Yo. Molimo Mosanto na Yo azali kotambolisa biso na nzela na mosakoli na Yo mpe tozali koyangana zinganzinga na Liloba na Yo longwa na mokili mobimba, mpe tobelemi kokende.
Nazali na mituna mingi, Nazali na bosenga ya bokambami, lisungi, mpe biyano. Nakozua yango wapi?
Nazali awa komeka kosunga bino, zambi Nalingi bino. Bozali bana na ngai oyo Naboti epai na Klisto. Nasengi moko na moko na bino. Nasengi bino na mpokwa oyo; Nasengaka bino ntango nyoso; Nasengaka bino mokolo nyoso, mpe yango lokola ndeko na ngai mobali mpe mwasi.
Tolingi yo mpe lokola Ndeko Branham. Toyebi ete Nzambe atindaki yo kokamba biso mpe kotambolisa biso. Totalaki Yango na Liloba mpe Etandanaka alimá be.
Nani nde azali tata na ngai kati na Nsango malamu?
Bozali bana na ngai; Na—Nazali tata na bino kati na Nsango malamu, tata te lokola ekokaki kozala sángó moko, Na—Nazali tata na bino kati na Nsango malamu lokola Paulo alobaki kuna.
Toyebi Ezali Molimo Mosanto kokambaká yo kokamba biso, Ndeko Branham. Ozali koloba kaka lokola Paulo alobaki kati na Biblia, kolanda kaka oyo olobaki, lokola Ezali solo, mpe tosengeli te kobongola litóno moko to ebiangeli moko.
Mosala na yo nini Ndeko Branham?
Naboti bino epai na Klisto, mpe sasaipi, Na—Nabalisi bino na Klisto; ezali kobandisa bino na Klisto lokola moseka mpeto. Bolembisa ngai motema te! Bolembisa ngai motema te! Botikala moseka mpeto.
Obalisi biso na Klisto lokola baseka na Liloba na Ye. Tokokoka te, mpe tokofina kútu líso te na mosusu. Totalaka nyoso toyokaka mpe tosalaka yango na nzela ya
Liloba na Yo libombamaki.
Eloko nini nde eleki na litomba Nakokoka kosala kozala Mwasi na Ye ya libala, Ndeko Branham?
Botikala bobele na Liloba.
Biyano nyoso na mituna na biso ikoki kolobama na bokuse na maloba oyo:
BOTIKALA BOBELE NA LILOBA.
Etinda oyo EZALI Liloba mpo mokolo na biso. Ndeko Branham azali Mongóngó na Nzambe mpo na mokolo na biso. Eloko nyoso esengeli kotandama alimá na Liloba. Liloba ezali na bosenga ya ndimbola te. Soko to FINI PLAY, NYOSO TOZALI NA YANGO BOSENGA EPESAMI KUNA, LIKOLO NA BA BANDE.
Ozali nde na eloko moko na motema na yo oyo ozali na bosenga na eyano mpo na yango? Yaka komibakisa na biso mokolo mwa Lomingo na 12:00 nsima na nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali kozua biyano na biso nyoso wana tozali koyoka:
Soko okoki koya awa na eyanganelo te, zua losambo moko esika moko boye; kende kuna. Soko okoki koyoka ba bande elongo na biso te, yóka ba bande esika moko boye. Boyokisi mpe boyoki ba bande ezali eloko ya litomba monene oyo motei, molakisi, ntómá, mosakoli, mopalanganisi ya Nsango malamu to yo, bokoki kosala.
Awa nde epai na ngai; oyo ezali bisika na ngai ya mosala; awa nde epai wapi totiami. Sasaipi, bobatela yango na makanisi ata nini ékóma. Sasaipi, soko bozali na bwanya, bokosimba eloko moko. Ata nini ékóma, oyo nde bisika na biso ya mosala, awa mpenza! Mpe bobatela yango kati na makanisi mpe bozóngaka na bande oyo mokolo moko, ete boyokaki ngai kosakola. Malamu mingi, bokanisa yango!
Mosakoli azalaki kosala nini? Kobomba Bilei. Kobomba Bilei ete tokoka kozala na eloko ya kolia, ete tokoka kozala na eloko moko oyo tokosala lipati likolo na yango. Tozali na Yango likolo na ba bande na bofandaka na mpío ya eteni na biso ya ndako.
Alobaki ete ezalaki bobele na mwa ndako moke ya ebómbelo kati na mboka mobimba, mwa ndako moke ya ebómbelo. Atiaki na kati bobele ebelé na ebelé ya biloko: Elembo, Etemelo, Bilembo, Bileko Nsambo na Lingomba, Ezalelo Ekoya, Kokokisa Liloba na Ye, nyoso mpo na biso, ete tokoka bobele kotikala awa mpe koyoka ntango esili ye kokende.
Emonani lokola ete azali na mobembo mosika, kasi tozali naino kokundola, makambo oyo mazali solo. Oyo ezali bomoi oyo esengeli na biso kotambola moto ye moko.
Bibómbelo BITONDI. Ezali na Bilei mosusu te endimami na Nzambe Ye moko ete ezali LILOBA PETO lizangi makono makoyambanela.
Soko okosepela kozala na lipati elongo na biso, totómbeli yo boyei bolamu komibakisa na biso, mokolo mwa Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá ntango ya Jeffersonville lokola tozali koya Na Mesa mpe kolia lokola mopaya na Ye.
Bobele na ntango emonani lokola ete Ekokaki kokóma malamu koleka te, Apesi biso bande mosusu etóndi na Bimoniseli. Tozali na bilembeteli longwa na boyebami liboso. Ntina wana tozali koya longwa na monyele mpe eloli, likolo mpe ngelé, koyoka Liloba na bomoi limonisami.
Ntango Nzambe akelaki mokili, tozalaki na makanisi na Ye. Ntango mofundi na biso akóbaka kotalisa biso mosapi mpe koyebisa Tata: “basalaki boye, basalaki boye, basalaki boye,” Makila na Nkolo na biso mazipaka biso. Ntango tozali kobondela, Nzambe amónaka biso te, Ayokaka bobele mongóngó na biso na nzela na Makila na Yesu.
Satana akokoka te kotungisa; to, akokoka komeka, kasi akokoka te kozua Moklisto oyo abotami mbala ya mibale. Zambi, Nzambe, longwa na bozalisi na mokili, amonaki ye, mpe atindaki Yesu kosikola ye, mpe Makila malobaka mpo na ye. Akosumuka ndenge nini wana ekoki na yango komónana, kútu na Nzambe te? Akosala kutu te…Eloko bobele moko ayokaka ezali mongongo na yo. Amonaka elembeteli na yo. Amen! Ezali solo. Bomoni?
Mosakoli na Nzambe ayebisaki biso biloko oyo. Ezalaki ye te kosolola; azali bobele kobimisa makanisi na Nzambe, mabongi na Ye ya biloko bisengeli koya. Azali kosalela monoko na ye kosangela yango na nzela wana. Mpe esilaki ye koloba yango, esengeli makokisama. “Lola mpe mabelé ikoleka, kasi Liloba na Ngai likokwea soki moke te.”
Akokisaki Liloba na Ye epai na biso lisusu mpe lisusu na lisusu. Akokisaki nde epai na biso te ete Azali: Mwana na Moto akomaki mosuni kati na biso? Akokisaki nde epai na biso te ete: Mosakoli na biso akokisi Likomi moko na moko elobamaki na ntina naye? Akokisaki nde epai na biso te ete: Tozali Mwasi na Ye ya libala? Akokisaki nde epai na biso te ete: Tozali na ndanga ya solo ya Molimo Mosanto?
Tozali kotungisama ko mpo na nini? Akokisi epai na biso, soko totelemi elongo na Ye, Akotelema elongo na biso. Liloba na Ye likoki kokwea te.
Yoka na bokebi lingomba. Ebele monene basosoli mabe, to bazali te na Emoniseli ya Liloba. Bazali koyoka ete totiaka motema mingi likolo na moto. Soko ya solo mpenza ondimaka ete Ndeko Branham azali mosakoli na Nzambe, na bongo fungola motema mpe bomoto na yo mpe yoká oyo Yango Elobi Nkolo elobaka.
Nini nde ekoyeisa Mwasi na libala elongo? Nini nde ekosangisa Mwasi na libala kozala Moko elongo na Nzambe?
“Na mokolo wana Mwana na moto akomimonisa.” Nini? Kokanganisa Lingomba na Motó, kosangisa, libala ya Mwasi na libala. Ebiangeli ya Mobali na libala ekoya alimá kati na oyo, ntango Mwana na moto akokita mpe koya kati na mosuni na moto kosangisa bango mibale elongo. Lingomba lisengeli kozala Liloba, Azali Liloba, mpe bango mibale basangani elongo, mpe, kosala yango, ekosengela na komonisama ya emoniseli ya Mwana na moto.
Ekosengela na komonisama ya emoniseli ya Mwana na moto. Likanisi na yo te, lisosoli na yo te, makanisi na yo te soki kotea na yo te. Mwana na moto akosangisa Mwasi na libala na Mobali na libala, mpe Ezali kosalema SASAIPI MPENZA.
Tozali sasaipi na Molúlú elongo na Mobali na libala mpe ekoumela te tokolongwa mpo na Lipati na libala mpe bokundoli ya Lipati ya libala na biso.
Tokokoka bobele kobika na Liloba nyoso likobimaka na Monoko na Nzambe! Nzambe akokisaki ete mosakoli na biso azali Monoko na Nzambe mpo na lelo. Toyebi boni ete ezali Liloba na Nzambe? Alobaka bongo, na nsima Akokisaki Yango na nzela na Liloba na Ye.
Tozali Lingomba-Mwasi na libala abelemisami kati na mikolo ya nsuka. Abiangami kobima longwa na bamosusu nyoso; ndeke ya matónó-matónó oyo ezwi matónó na nzela ya Makila na Ye.
Tata, mitema na biso ezali kopumbwa, mpe motema na ngai ezali kotuta, ntango nakanisaka yango mpe koyeba ete Maloba na Yo mazali solo, moko na Yango te ekokwea.
Oyo ezali nzela moko kaka ya Nzambe epesami lelo. Ezali nzela bobele moko ya kozanga kobongola Liloba moko. Bokanisa, Molimo Mosanto akoki koya mpe kopakola moto moko, mpe ata ko bongo ezali libanda na Mokano na Nzambe. TOSENGELI TOTIKALA NA LILOBA LINDIMISAMI NA EBANDELI.
Soko okolinga kotikala na Liloba yango mpe koyoka Mongóngó na Nzambe elongo na biso, Nabiangi yo ete oya komibakisa na biso mokolo mwa Lomingo na 12:00 nsima na nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka: Kokokisa Liloba Na Ye 64-0816.
Opusami te komibakisa na biso to kútu koyoka bande yango moko na ntango moko elongo na biso, kasi Nabondeli yo, yoka mosakoli na Nzambe.
Motema na ngai ezali kopunjwapunjwa, na kosepela ntango Nazali kokanisa na ntina na biso koyangana elongo mokolo mwa Lomingo loye koyoka Mongóngó na Nzambe kosolola na biso. Ezali na esengo monene mingi te na bomoi na ngai koleka kozala na bozali ya Molimo Mosanto mpe koyoka Ye kosolola na Mwasi na Ye ya libala, mbebu na litói.
Ezali na eloko mosusu te kati na mokili oyo ememelaka ngai nsai mpe kimia, bobele Liloba na Ye. Ntango Nayoki kaka: “Mbote baninga,” Napusani bobele na nsima, Namisemboli mpe Nameli longwa na Etóko wana lokola ezali kosolola na ngai Maloba ya Bomoi na Seko. Kokanisa, Nzambe atindaki ye epai na NGAI MPE BINO, mpe tozali BANINGA na mosakoli mpe motindami Nzambe.
Alingi biso mingi mpenza na motindo ete Atindaki mosakoli na Ye koyebisa biso nyoso na ntina na Ezalelo na biso ekoya. Asepelaki mpenza koyebisa biso mpo na Yango, kino na bonene ya bozindó koleka ndenge eyebisamaki na Yoane. Amonisaki na biso, Ezali mboka na lolenge ya matúmu manei te, kasi mboka na lolenge piramídi, epai wapi Mwana mpate akozala na sóngé mpe Pole na mokili.
Atikaki biso koyeba balabala ikosalama na wolo mpe ndako tokobika na kati ikozala wolo engengisami. Azali kotia mwa eloko moko na moko kaka kokokana na motema na biso, bobele oyo tokokaki kosepela na yango. Atikaki eloko moko te ezangi kosalema. Motongi ya Bonzambe ayemaki Yango bobele mpo na biso, Balingami na Ye.
Banzete na Bomoi ikozala kuna, mpe ikobota mitindo zomi na mibale ya mbuma. Bikuke na mboka ikokangama na butu te, mpamba te butu ezali kuna te, Akozala Pole na biso.
Nani akozala kuna?
Banani nde babimaki likolo na mabelé na sika elongo na Noa mosakoli? Baoyo bakotaki elongo na ye kati na bwato. Ezali solo? Baoyo wana nde babimaki likolo na yango. Bomoni? Baoyo bakotaki elongo na Noa, na nzela na etinda na ye, bazalaki baoyo babimaki likolo na mabelé na sika nsima na libatisa na yango na mai.
Azali koloba na ntina na BISO baninga na ngai! Tozali kati na Bwato na biso mpo na lelo; Liloba na Ye, Etinda oyo, elongo na Noa na biso mosakoli. Mpe kuna na ngambo na Mokili wana, Mboka yango epai wapi Mwana mpate azali Pole, akoyeba BISO. Tozali bato na ye, mayaka na ye likolo na motole. Toyei longwa na Monyele mpe Eloli, na Mboka oyo etongami na matúmu manei. Mboka yango Abalayama azalaki koluka.
Lokola Nazali komona Liloba komindimisa, Nayebi, na elilingi ya ntembe ata ndambo te, mayaka ya motole na ngai bakongengisa nyoso kati na mokili, na mokolo yango.
Tokokoka nde kútu kobanda kobanza…Mosakoli na Nzambe alobaki, AYEBAKI, mosika na elilingi nyoso ya ntembe, ete TOzali mayaka ya motole na ye, mpe tokongengisa nyoso kati na mokili na mokolo wana. Aleluya…Nkembo…Nkombo na Nkolo esanzolama.
Baninga, soko tokanisi ete ezali bikamwa sasaipi, kofanda elongo longwa na nzonganzonga na mokili, koyoka mpe koleisama likolo na Liloba na Ye kati na ba bande oyo, ekozala ndenge nini ntango tobiki kati na Mboka elongo na Ye!
Mosakoli na Nzambe akozala mozalani na biso na ekuke ekolanda. Tokolia longwa na banzete wana elongo na ye, mpe tokotambola na balabala wana elongo. Tokomata na ba balabala wana ya wolo na etóko, komela longwa na etóko, kotambola kati na ba paladiso na Nzambe, elongo na Banje kozipa mabelé, koyemba ba nzembo.
Oo, mokolo nini oyo ekozala! Ebongi na nyoso. Nzela ezali komonana mabaku-mabaku, ntango mosusu ezali kokóma mpasi, kasi, oo, ekozala moke mingi ntango Nakomona Ye, moké mingi. Ekozala nini ba nkombo mabe mpe makambo balobaki, ekozala nini ntango Nakomona Ye kati na Mboka kitoko yango, Mboka kitoko yango na Nzambe?
Baninga, Nakoki kozila te komona, mpe kozala kati na Mboka wana. Nazali kotalela na motema molai kozala kuna elongo na Nkolo mpe Mobikisi na biso, mosakoli na Ye, mpe elongo na moko na moko na bino.
Nakangami na Mboka kitoko wana
Nkolo na ngai abongisaki mpo na Baoyo na Ye;
Epai wapi Basikolami na bikeke nyoso
Koyemba “Nkembo!” zingazinga na Kiti ya Bokonzi Mpembe. Ntango mosusu Nazalaka lokola na malali mpo na mposa ya Lola,
Mpe nkembo na yango Nakolembetela kuna;
Esengo nini yango ekozala ntango ekomona ngai Mobikisi na ngai,
Na kati na mboka yango kitoko ya wolo!
Nazali kobianga mokili koya komibakisa na biso, baninga na mosakoli, lokola tozali koyangana zingazinga na Kiti na Ye ya Bokonzi koyoka Mongóngó na Nzambe kosolola na biso na 12:00 nsima na nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka Ye kosolola na biso nyoso na ntina na: Ezalelo Ekoya ya Mobali na Libala na Likolo mpe Mwasi na libala ya Mabelé 64-0802. Nakoki kopesa bino elaka, ekozala Mokolo monene mingi na bomoi na bino.
Tobakámi te, tozali eteni ya mbuma ya ebandeli ya Liloba. Molimo Mosanto Ye moko, akembisaki, andimisaki, amimonisaki Ye mpenza epai na biso. Toyambi Yango na mobimba na Yango, kati na nguya na bondimisami na yango mpe Emoniseli na oyo ezali Yango, mpe tokómaki eteni na Yango. Ezali koleka bomoi mpo na biso.
Molimo Mosanto Ye moko asololaki na kati na esalelo ya komikitisa ebongi te mpe alobaki: “Tala lingenda na Ngai, Liloba na Ngai, zua Yango mpe kende mpe mema Etinda.” Azuaki Liloba na ye mpe apapaki biso, kosala biso Mwasi na Ye na Libala.
Etungisaki ba nganganzambe komona bato kolongwa na mangomba na bango mpe kokende koyoka ba bande. Balobaki: “Soko moko na bino akei na masangá yango, okotiama libanda, tokotia yo libanda na ebongiseli na biso”.
Eyano na bango: Bokoki na bino kobengana biso, tokokende ata bongo! Tozali na mobembo elongo na Nkolo Yesu, Libanga na biso litutamaki, tozali kolia Bilei ya banje, Mana mabombamaki longwa na likolo, mpe komela longwa na Libanga. Totungisamá soki moke te soko tozali komela nini, ezali eloko mosusu te kasi LILOBA MPETO.
Tozalaka ntango nyoso na kolamukisa oyo ezali kokóbá. Etóko na biso ezali kopunjwapunjwa, mpe lisusu na lisusu, mpe lisusu na lisusu. Ezali na nsuka te na Yango. Tozuaka mai malamu, ya mpio ntango nyoso tofinaka Play. Totalelaka Yango mpe tozali kobika likolo na Yango. Eloko bobele moko osengeli kosala ezali kende kuna mpe mela.
Tobikaka na Liziba yango ya kopunjuapunjua mokolo na mokolo! Tozali na lotómo te ya kobenda, kotimola, kobenda na ebendeli ya masini, to soko eloko nini; bobele kosangana na nzela na Ye epesami, mpamba. Bokoki kozua bibongiseli na bino esalemi na bato lokola bolingi, mabulu na bino ya mai ma kala mazangi kotiola; mpo na biso, toyaka na Etóko na Ye ya mpeto. Ezali esengo na biso. Ezali Pole na biso mpe makasi na biso.
Azali mai na ngai. Azali bomoi na ngai. Azali Mobikisi na nzoto na ngai. Azali Mobikisi na molimo na ngai. Azali Mokonzi na ngai. Nyoso Nazali na yango bosenga ezuami kati na Ye. Mpo na nini Nakosepela Nakende na eloko mosusu?
Mpo na biso ezali na esika mosusu ya kokende te kasi mbala moko kokende na Etóko epesami na Nzambe. Kotungisama soki moke te soko tokomela nini. Tokotia soki moke te ekongoleli ya kala ya kotoboka oyo ekoki kobimisa bosoto ya monene, kasi mai ya bosoto ezali kotikala. TOZUAKA NA BISO KAKA MAI MPETO YA ETÓKO EZALI NA MINGWA MPE BILOKO NYOSO TOZALI NA YANGO BOSENGA.
Alendisaki biso: Bana mike na ngai, botungisama lisusu te, bozali na ndanga mpenza ya Molimo Mosanto. Botalisi Ngai ete bondimaka Liloba moko na moko. Boyambaki Yango. BOZALI YA NGAI. TOZALI MOKO. MOBALI MPE MWASI.
Nazali koya mpo na bino nsima ya mwa ntango, na kobweta liso. Nazali kobongisela bino ezalelo ya sika. Bokolinga esimbeli na Ngai ya bosukisi. Nayebi ezali mpasi likolo na bino sasaipi, mpe bozali na mimekano mpe bitumba mingi mpe mikumba na bino izali na bozitó. Kasi bobosana te, bozali na eloko ya kotungisama na yango te, Napesaki bino Liloba na Ngai. Bozali Liloba na Ngai. Nasilaki kosala nyoso mpo na bino. Boloba Liloba mpe bobete ntembe te. Bozali na Kondima na bino, kobakisa mosakoli na Ngai apesaki bino Kondima na ye.
Nakolinga ete omibakisa na biso mokolo mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, koyoka 64-0726E MABULU MATOBWANI, mpe komela longwa na Etóko lokola ezali kopunjwisa Liloba Mpeto lizali na bosenga ya bikongoleli te.