Category Archives: Uncategorized

24-0915 KONGOLELI YA MOT’OYO AKANISAKA

Nsango: 65-0822E EKONGOLELI YA MOT’OYO AKANISAKA

BranhamTabernacle.org

Molingami Mama Yesu Klisto,

Molimo na Nzambe ya bomoi, pémá likoló na bisó. Tika ete tózua ekongoleli ya Yo mpe tóbika na nsé na Yango, Nkolo. Pémá mopepe malamu ya Molimo Mosanto kati na mapululu mpe bomoto ya biso mokolo na mokolo. Tokoki kobika bobele na nzela na Liloba ya Yo; Liloba nyoso likobimaka na monoko na Yo na eleko oyo tozali kobika kati na yango.

Tolétí biloko na Yo ya Lóla mpe Tozali na Liloba na Yo kati na mitéma na biso. Tomóní Liloba ya Yo limónisamí libosó na biso, mpe bomoto na biso mobimba bozíngámí kati na Yango. Mokili oyo, mpe makambo nyoso ya mokili makúfí epai na biso.

Tozali eútelo ya mombóto Liloba na Yo lizaláki kati na Yo útá ebandeli, kotelema awa, kobénda Bómoi mombóto na Yo. Mombóto mwa Yo mozali kati ya mitema na biso na nzela ya boyebi na Yo makambo libosó. Obongisaki biso libosó kobénda na nzela ya elóko mosúsu te, kasi Liloba na Yo, Mongóngó na Yo, likoló ya ba bande.

Eleko ya líso ekómí; ezali na eloko mosusu te etíkálí kasi Boyéi na Yo mpo ya Mwasi na Yo ya libala. Ekongoleli ya biso ezali Liloba ya Yo, Malaki 4, Yango Elobi Yawe.

Tika ete tókóna Liloba na Yo kati na mitema ya biso, mpe tókána ete tóbaluka na epai ya loboko ya mobali to na lobóko ya mwasi te, kasi kobika sembo na Yango mikolo nyoso na bomoi na biso. Tata, kitíselá biso Molimo Mosanto ya Bomoi, mpe yéísá Liloba na Yo na bomoi epai na biso, ete tókoka komónisa Yo.

Mpósa ya mitema ya biso ezali kozala bana na Yo mibali mpe basi ya solo. Tozali kofanda kati na bozali ya Mongóngó ya Yo, kotela, komíléngela mpo ya Elambo ya libala na biso ebelémi elongó na Yo.

Mabota mazali kobukana. Mokili mozali kopanzana. Koningana ya mabelé izali koningisa California lokola eyebisaki Yo biso ete ekozala. Toyebi ete noki mpenza eteni na yango na molaí ya kilométele nkóto mibalé nkámá minei na zómi na minei; monene ya kilométele nkámá minei na ntúku mwambe na misato to nkámá motóbá na ntúkú minei na minei, ekozinda, ntango mosusu kilométele ntukú motóbá na minei  na nsé kati ya mokaka wana monene kuna.

Mbóngé ikobéta kino na etúká ya Kentucky, mpe ntango ekosala bongo, ekoningisa mokili makasi mpenza na motindo ete biloko nyoso likoló na yango bikkwéa na nsé.

Ekebiseli na yo ya nsuka yango oyo ezali kobima. Mokili mozali kati na libébí mobimba, kasi ntango nyoso Mwasi na Yo ya libala azali kopéma kati na Yo mpe Liloba na Yo, kofanda elongo na bisiká ya likoló lokola Ozali kosolola na biso, mpe kobóndisa biso na nzela.

Boni tozali na matóndí, Tata, ete tokoki bobele “Kofina Play” mpe koyoka Mongóngó na Yo koloba na biso, koyíkisa biso mpiko mpe koyebisa biso:

Banga te Etonga moke. Nyoso ezali Ngai, bozali basangoli mpe lokola. Bokonzi nyoso ya Ngai ezali ya bino. Nguya nyoso ya Ngai ezali ya bino lokola etelémí Ngai na kati na bino. Nayéi te komema nsómo mpe kokwéa, kasi bolingo mpe mpíko mpe mabongi. Bokonzi nyoso bopesameli Ngai mpe ezali ya bino kosalela. Bóloba Liloba mpe Nakokokisa yango. Yango nde kondimana ya Ngai mpe ekoki kokwéa soki moké te.”

Oo Tata, tozali na ELOKO TE ya kobanga. Opesi biso bolingo na Yo, mpiko mpe mabongi. Liloba ya Yo lizali kati na biso kosalela ntango tosengeli na Yango. Tolobi Yango, mpe Okosala Yango. Ezali Kondimana ya Yo, mpe Ekoki KOKWÉA SOKÍ MOKÉ TE.

Maloba ya mokúfi makoki te kolimbola lolenge tozali koyoka, Tata, kasi toyebi Ozali komóna kati na mitema mpe bomoto ya biso; zambi tozali eteni ya Yo.

Boni tozali na matóndí ete Opesaki nzela mpo ya mokili koyoka Mongóngó na Yo na ntango oyo ya nsuka. Póso na póso, Ozali kobianga mokili koya komibakisa na kati koyoka mwanje na Yo motindami lokola Ozali koléisa biso na Biléi ya ba Mpate oyo ibómbámákí koléisa biso kino bozóngi na Yo mpo na biso.

Tolingí Yo Tata.

Ndeko Joseph Branham

Liteya: 65-0822E Ekongoleli Ya Moto Oyo Akanisaka

Ntango: 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville

Makomí: Mitúya 19:9 / Baefese 5: 22-26

24-0908 KLISTO AMONISAMI KATI NA LILOBA YA YE MOKO

Nsango: 65-0822m KLISTO AMONISAMI KATI NA LILOBA YA YE MOKO

BranhamTabernacle.org

Balingami Eyanganelo Ya Branham,

Boni miso ma bisó mapambolami; mpo mazali komona. Boni matói ma bisó mapambolami; mpo mazali koyoka. Basakoli Mpe bayengebene basepelaki komona mpe koyoka makambo tomóní mpe toyókí, kasi basalaki yango te. TOMÓNÍ MPE TOYÓKÍ MONGÓNGÓ YA NZAMBE.

Nzambe Ye moko Aponaki kokoma Biblia na Ye na nzela ya basakoli na Ye. Nzambe Ye moko mpe Aponaki komónisa ba sekelé na Ye nyoso na ntango oyo ya nsuka epai ya Mwasi na Ye ya libala na nzela ya mosakoli na Ye. Ezali misala na Ye, Liloba na Ye libimisámí, kosála yango nyoso eténi na Ye.

Wana eleko ya biso ekómákí, Asálaki éte mosakoli na Ye ákóma na ntango yango moko. Apémelaki ye mpe Alobakí na nzela na ye. Ezalaki nzela na Ye ebongisamákí libosó mpe epesamáki ya kosala yango. Lokola Biblia, Ezali Liloba ya Nzambe, mpe liloba ya moto te.

Tosengeli tozala na Etémelo, mobóko; Liloba ya nsuka. Boko bato balobaka été Biblia Ezali Etémelo ya bango, ezali te oyo elobami likolo ya ba bande; lokola nde yango ezalaki koloba eloko ekeseni. Ezali likambo monene boni Nzambe abómbaki Emoniseli ya solo ya Liloba na Ye epai ya ebelé monene, kasi Amonisaki Yango mpe Akómisaki yango polele epai ya Mwasi na Ye ya libala. Basúsu bakoki na bango kaka komipekisa te, bazali na lolándá mpe bazali te na Emoniseli mobimba ya Liloba ya Nzambe limónisami.

Nzambe alobaki kati na Liloba na Ye (Biblia) na nzela ya basakoli na Ye mpe alobaki na biso: “Nzambe, oyo na ntango ya kalakala mpe na mitindo mingi alobaki na ba tata na nzela ya basakoli”. Na bongo, Basakoli ya Nzambe nde bakomáki Biblia. Ezalaki bango te, kasi Nzambe koloba kati na bango.

Alobaki kati na mikolo ya biso ete Akotinda Molimo na Ye ya solo epai ya biso kotambolisa biso kati ya solo nyoso. Akoloba mpo na ye moko te; kasi nyoso ekoyoka ye, yango nde akoloba: mpe akotalisa biso makambo makoya.

Etindá likoló ya ba bande ezali nde ba solo ya Nzambe imónisamí. Esengeli na ndimbola ata moko te. Ezali Nzambe kolimbola Liloba na Ye Ye moko lokola Azali koloba Yango likoló ya ba bande.

Ezali na bokóbi te kati na oyo bato basúsu balobí, bobele oyo Nzambe Alobí.

Oyo elobamí likoló ya ba bande nde Mongóngó bobele moko MOKOBONGWANA SOKI MOKÉ TE. Bato babóngwanaka, makanisi mabóngwanaka, ndimbola ibóngwanaka; Liloba ya Nzambe libóngwnaka soki moké te. Ezali Etémelo ya Mwasi ya libala.

Mosakoli Apesi biso ndakisa ya mopaleli oyo azali etémelo na lisano lia motópe. Liloba na ye nde ya nsuka. Okoki kobete yango ntembe te. Oyo elobí ye, nde yango, mpútu. Sasaipi mopaleli azali na búku ya mibeko asengeli kolanda. Eyebisaka ye bisika nini mongété to esímbeli mabe ya motópe izali, ntango obongi na kosakana mpe ntango ozali libanda ya mibeko ya lisano; oyo mibeko mizali mpo ya lisano lia motópe.

Atangí mpe ayekoli búku yango na ntina ete ntango alobí, mpe asali boyángeli na ye, yango nde mobeko, yango nde Liloba ya nsúka.

Osengeli kotikala na oyo elobí ye, motuna te, koswana te, nyoso elobí ye, nde lolenge esengeli ézala mpe ekoki kobóngolama te. Nkembo.

Ndeko Branham alobaki te été ose gelaki koteya te, to kolakisa te, nzokande, alobaki koteya, mpe koyoka babateli na bino, kasi Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande mosengeli kozala Etémelo ya bino.

Esengeli likonzi ya kotingamela lízala, na maloba masúsu, mobóko. Moto nyoso asengeli kozala na mobóko mwangó. Ezali Liloba ya nsuka. Nzambe apesaki esiká sé moko kozua yango, Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande. Ezali ndimbola ya bonzambe ya Liloba ya Nzambe. Ezali LILOBA YA NSÚKA, AMEN, YANGO ELOBI NKOLO.

Yesu Ye moko alobaki tobiangaka bango “banzambe,” baoyo balobaki Liloba na Ye; mpe bazalaki banzambe. Alobaki ntango basakoli bapakolamáki na Molimo ya Nzambe, bamemaki mpenza Liloba ya Nzambe. Ezalaki Liloba ya Nzambe koloba na nzela na bango.

Nde ntina mosakoli na biso Azalaki mpenza na meko. Akambamaki na Molimo Mosanto koloba Liloba ya Nzambe Lizangí kokwéa. Nzambe Aponaki ye mpo ya eleko ya biso. Aponaki Etinda ekokaki na ye koloba, ata lolenge ya mosakoli ya biso mpe ekokaki kosalema kati na eleko ya biso.

Maloba malobaki ye, lolenge asalaki makambo, ebetaki basúsu na lolánda, kasi efungolaki miso ma biso. Alátisáki kútu ye na motindo ya mokóto molátákí ye. Lolenge na ye, mpósá ya ye, makambo manso bobele lolengé losengelaki ye kozala. Aponamáki na bobongi bé mpo ya biso, mwasi ya libala ya Nzambe.

Nde ntina, ntango TOYEI ELONGO, Ezali Mongóngó tolingaka kotia LIBOSÓ koyóka. Tondimi tozali koyoka Liloba Peto lilobámí longwa na motindami ya Nzambe aponámáki mpe azuámáki.

Toyebi basúsu bakoki komona to kosósola yango te, kasi alobaki azalaki kosolola na eyánganelo ya ye kaka. Azalaki te na mokumba ya oyo Nzambe Apesaki basúsu koléisa; azalaki na mokumba sé ya motindo ya Biléi azali koléisa biso.

Nde ntina tolobaka tozali Eyanganelo ya Branham, zambí alobaki Etindá ezalaki bobele mpo ya bato na ye kati na Eyánganelo, etonga moké oyo balingaki kozua mpe koyoka ba bande. Azalaki koloba na baoyo Nzambe apesaki na ye kokamba.

Alobaki: “Soko bato balingi kosangisa-sangisa biléi mpe makambo kuna libanda, bózua emoniseli útá na Nzambe mpe bósala oyo Nzambe ayebisi bino bósala. Nakosala eloko yango moko.

Kasi Mateya maye, likoló ya ba bande, mazali mpo ya lingombá oyo kaka.”

Boni na bosolo ayéisaki Yango petee mpo ya Mwasi na Ye ya libala komona mpe koyoka Mongóngó ya Nzambe mpe kolanda malako ma Ye.

Soko okosepela komibakisa na biso koyoka Mongóngó yango, tokozala koyoka biso nyoso na ntango moko Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, :65-0822M- “Klisto Amónisami Kati Na Liloba Ya Ye Moko”.

Soko okoki komíbakisa na biso te, Nayíkísí yo mpiko koyoka Litéya oyo ntango sé ntango okokí.

Ndeko Joseph Branham

Makomí ma kotánga libosó ya boyóki Litéya:

Esóde 4:10-12

Yisaya 53:1-5

Yilimia1:4-9

Malaki 4:5

St. Luka 17:30

St. Yoane 1:1 /1:14 / 7:1-3 /14:12 /15:24 /16:13

Bagalatia 1:8

2 Timote 3:16-17

Baebele 1:1-3 /4:12 / 13:8

2 Petelo 1:20-21

Emoniseli 1:1-3/ 10: 1-7 / 22:18-19

24-0901 MPE OYEBI YANGO TE

Nsango: 65-0815 MPE OYEBI YANGO TE

BranhamTabernacle.org

Balingami Bandeko Mibali mpe Basi,

Botikala pene na Klisto. Botika nakebisa bino sikawa, lokola mosali ya Nsango Malamu, na oyo. Bózua bolémá ata nini te. Bóbanzabanza eloko moko te. Bótikala bobele wana kino oyo kati ya kati ézua lóngo na Liloba, ete bozali mpenza kati na Klisto, zambi yango nde eloko bobele moko eko…Zambi, tozali kati na eleko moko ya kozimbisa koleka tobíká ndèle kati na yango. “Ekozimbisa ata Baponami mpenza soko nde ekokaki,” mpo ete bazali na kopakolama, bakoki kosala eloko ata nini pelamoko basúsu na bango.

Tata, Okebisaki biso ete tozali kobika na eleko ya kozímbisa ya koleka ya ntango nyoso. Milimo yango mibale kati na mokili mikozala pene mpenza, ekokaki kozimbisa ata baponami mpenza, soko nde ekokákí. Kasi masanzoli epai na Nkolo, ekoki te kozimbisa biso, Mwasi na Yo ya libala; tokotikala na Liloba na Yo.

Tozali bozalisi na Yo ya sika, mpe tokoki kozimbisama te. Tokotikala na Mongóngó na Yo. Tokobete nsété mpe tokotingama likoló ya Liloba moko na moko, ézala ata nini moto soko nani alobí. Ezali na nzela mosusu te longólá sé nzela na Yo epesami; Yango Elobi Nkolo likoló ya ba bande.

Ntango mosakoli na Yo azalaki awa na mabelé, ayebaki boni ezalaki na litomba mpo ya Mwasi ya libala koyoka Liloba nyoso lilobamáki, na bongo asangisaki Mwasi ya libala na nzela ya ekanganeli ya telefóne. Ayéisaki biso elongó zingázingá ya Liloba Lilobamí Mongóngó mwa Yo mondimisámí.

Ayebaki ete ezalaki na epakweli monene te koleka Mongóngó na Yo.

Libándá kuna na mbóngé ya telefóne oyo, tika ete Molimo Mosanto monene ákende na eyanganelo moko na moko. Tika ete Pole Mosanto yango moko oyo tozali kotála awa mpenza kati na losámbo, tika ete Ékwéa likoló na moto moko na moko,

Nyoso Mwasi na Yo ya libala asengeli na yango mpo ya Boyéi na Yo elobámáki, ebómbámákí mpe emónisamélákí Mwasi na Yo ya libala na nzela ya mwanje na Yo; yango nde Liloba na Yo. Oyebisaki biso soko tozali na mitúná ata nini, tókende na ba bande. Oyebisaki biso William Marrion Branham azalaki Mongóngó na Yo epai na biso. Motuna mokokaki nde kozala kati na likanisi ya Mwasi na Yo ya libala boni na boyébaká boni ezali na litomba kotia Mongóngó na Yo lokola Mongóngó moleki litomba akoki koyoka? Ezali te, Nkolo, epai ya Mwasi na Yo ya libala.

Mosakoli na Yo ayebisaki biso na ntina ya lilótó moko epai wapi alobaki: “Nakotambola na nzela moke oyo mbala moko lisusu.” Toyebi te elingi koloba nini, kasi ya solo Nkolo, Mongóngó mwa Yo mozali kotambola na nzela moke ya mbóngé ya mipepe mbala moko lisusu lelo, koloba, mpe kobianga Mwasi na Yo ya libala kobima longwá na mokili mobimba.

Bobiangámí koya komibakisa na biso, Eyanganelo ya Branham, mokolo mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka longwa na mbóngé ya mipepe Mongóngó ya Nzambe komemela biso Liteya: 65-0815 Mpe Oyebi Yango Te.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga:

Emoniseli 3: 14-19

Bakolose 1: 9-20

24-0825 MAKAMBO MAMONISAMI POLELE NA NZELA YA LISAKOLI

Nsango: 65-0801E MAKAMBO MAMONISAMI POLELE NA NZELA YA LISAKOLI

BranhamTabernacle.org

Balingami Ba Mpongo,

Epai wapi nzoto ekúfí ezali, ba mpongo bazali koyangana. Ezali ntango ya mpokwa, mpe lisakoli lizali kokokisama mpenza na miso ma biso. Mitema na biso mizali kopela kati na biso lokola tobiangí Ye kati na biyanganelo ya biso, ba ndako ya biso, mpe na ba ndako na biso ya potopóto ya mabelé kati na zamba. Akoloba na biso mpe komónisa biso Liloba na Ye. Totóndí na nzala mpe mpósá mingi ya Nzambe.

Aponaki nzela Liloba na Ye likokaki koya epai na biso; na nzela ya mosakoli na Ye, oyo Ayebaki mpe Abongisaki libosó. Aponaki William Marrion Branham kozala moto ya ngonga mpo ya kokanga baponami ya Ye bato ya ngonga, BISO, Mwasi naYe ya libala.

Ezali na moto mosusu te oyo akoki kozua esika na ye. Tolingi lolenge alobi yango ye moko eí te, mema, kumba, tóka, ezali Nzambe koloba na matói ya biso. Nzambe koloba na nzela ya bibebú ya moto, kosala mpeza kaka oyo Alobaki ete Akosala. Ekati likambo!

Nzambe Asalelakí matándú ma ye mpe miso ma ye kati na bimónoneli. Akokaki koloba eloko mosusu te bobele oyo ezalaki ye kotala. Nzambe azalaki na bokonzi mobimba ya lolemo, mosapi, kútu enámá moko na moko ya nzóto na ye ezalaki na nsé ya bokambami na Nzambe. Azalaki mpenza nde monoko ya Nzambe.

Nzambe Ayebaki ete na ekeke oyo lingomba likozuama kati nakobúlungana. Nde ntina, Azalaki na mosakoli na Ye aléngelami mpo na eleko ya biso, kobianga kobima mpe kokamba Mwasi ya libala na Ye moponami na nzela ya Liloba na Ye lindimísámí.

Kati na etandelo na Ye monene, Ayebaki mpe ete akokamata mosakoli na Ye na Ndako libosó ya Boyéi na Ye, nde ntina Atiaki Mongóngó na Ye na ba bande mpe Abombaki yango na ntina ete Mwasi na Ye ya libala moponami akoka kozala na Oyo Elobí Nkoló na nsóngé ya misapi. Na bongo bakokoka kozala na motuna te. Ndimbola te esengelamí na yango, bobele Liloba peto ngondo bakokaki koyoka ntango nyoso.

Ayebaki ete ekozala na mingóngó mingi mpe kobúlungana ebelé na mikolo ya nsuka.

Póso misato ilekí Alobaki na biso mpe Atiaki ngonga oyo tozali kobika kati na yango. Alobaki na biso na ntina na basakoli ya lokuta baoyo bakobima mpe kozímbisa baponami, soko ekokaki nde kokoka.

Boni Nzambe ya ekeke oyo abeti mitema ya bato na lolándá. Boni Nzambe Ye moko Alobaki na nzela ya masakoli ma Ye ete makambo maye makokóma na Eleko oyo ya Laodikia. Ayebisaki biso ezali na eloko te etikali ezangí kosalema.

Amitálisaki liboso na biso na nzela ya makambo masakolamáki mpo na Ye kosala lelo oyo.

Bikela bia Ye mpenza bitalisí biso ete Azali lolenge moko lobi, lelo, mpe libela. Ezali Mongóngó ya Nzambe, koloba na, mpe kobika kati na, Mwasi na Ye ya libala.

Bondimi ete Etindá oyo ezali Baebele 13:8? Ezali nde Liloba ya bomoi? Ezali nde Mwana ya Moto komimonisa kati na mosuni? Na bongo lisakoli likozala Lomingo loye soko bondimí mpe botosi.

Eloko moko ekozala kosalema na mokili mobimba oyo naino ekoká kosalema libosó te kati na lisoló ya ntango ya mokili. Nzambe Akozala koloba na nzela ya bibebú ya moto, kosolola na Mwasi na Ye ya libala zingázingá ya mokili mobimba bango nyoso na ntango moko. Akozala na biso totiánelí maboko mpe tobondeli moko mpo na mosusu lokola azali kobondela mpo ya biso nyoso.

Bino kuna libándá na bikanganelo ya telefóne, soko bondimí na motema na bino mobimba, lokola batéi bazali kotiela bino maboko, mpe balingami na bino batii maboko likoló na bino, soko bondimí na motema mobimba ete esili, Esilí.

Eloko sé eloko tozali na yango bosengá, Nzambe akopesa biso yango soko kaka tondimi …MPE TONDIMÍ. TOZALI MWASI NA YE YA LIBALA SEMBO. Ekosalema. Likonzí ya Móto likozala epai sé epai toyángani mpe kopesa moko na moko na biso eloko sé eloko tozali na yango bosengá, ezali YANGO ELOBI NKOLO.

Tika ete Pole Mosanto yango moko oyo tozali kotala awa kati na losambo mpenza, tika ete ekwea likolo na moko na moko, mpe bakoka kobikisama na ntango oyo. Topámeli monguna, zábolo, kati na Bozali ya Klisto; toyebisí mongúná, ete alongámí na nzela ya—monyókó ya Mwana ya Nzambe, kufa ya Nkolo Yesu mpe Lisekwa ya elonga na mokolo ya misato; mpe etáliseli ya elembetele ete Azali awa kati ya biso na mpokwa oyo, na bomoi, nsima ya mbula nkóto na nkámá libwá. Tika ete Molimo ya Nzambe na bomoi atóndisa motema moko na moko na kondima mpe nguya, mpe makasi ya lobiko ya nzóto útá na lisekwa ya Yesu Klisto, Oyo amiyébísí sasaipi na nzela ya Pole na Ye monene kozingela lingomba, kati na Bozali na Ye. Kati na Nkombo na Yesu Klisto, pesa yango mpo ya nkembo ya Nzambe.

Bozali Mwasi na Ye ya libala. Eloko moko te ekoki kolongola yango na bino, ELOKO MOKO TE. Satana alongamí. Okoki koyoka ete ozali kaka na lútu moko na Ye, nde nyoso osengeli nayango, EZALI MPENZA SOLO. EZALI YE. OZALI YA YE. LILOBA LYA YE LIKOKI KOKWÉA TE.

Bondima Yango, bóyamba Yango, bótingama na Yango, ekoki kokwea te. Bozali na nguya te, kasi bozali na bokonzi na Ye. Boloba: “Nayambi yango Nkoló, ezali ya ngai, Opesi ngai yango, mpe nakotika te ete Satana ábótola yango.”

Ntango nini oyo tokozala na yango. Ezali na esika mosusu te nakokaki kosepela kozala. Molimo Mosanto Akozala zingázingá na biso. Emoniseli ya koleka kopesamela biso. Mitema mibúkáni mikobambama. Moto nyoso kobikisama. Tózanga boni koloba: “Mitema mia biso mipelaki na móto te kati na biso ,mpe ezali kopela te na móto sasaipi, koyeba ete tozali sikawa kati na Bozali ya Yesu Klisto oyo asekwí, na Ye nkembo mpe lokumu libela na libela.”

Ndeko Joseph Branham

Tobiangi mokili komibakisa na biso na:

Ntango: 12:00 nsima ya nzángá ntango ya Jeffersonville

Liteya: 65-0801E Makambo Mamónisami Polele Na Nzela Ya lisakoli

Makomí ya kotanga libosó ya boyoki Liteya:

Genese: 22:17-18

Njembo: 16:10/ Mokapo ya 22 / 35:11 / 41:9

Jekalia 11:12 / 13:7

Yisaya 9:6 / 40:3-5 / 50:6 / 53:7-12

Malaki 3:1 / Mokapo ya 4

St. Yoane 15: 26

St. Luka 17: 30 / 24: 12-35

Baloma 8: 5-13

Baebele: 1:1 / 13:8

Emoniseli: 1:1-3 / Mokapo ya 10

24-0818 NZAMBE YA EKEKE OYO MABE

Nsango: 65-0801M NZAMBE YA EKEKE OYO MABE

BranhamTabernacle.org

Balingami Babongi Be,

Mongóngó toyókaka likoló ya ba bande ezali Móngóngó yango moko ebimísaki Liloba na Ye na Elanga ya Edene, likoló ya Ngómbá Sinai, mpe likoló ya Ngómbá ya Mbóngwáná. Ezali koyókama lelo na Emoniseli mobimba mpe ya nsuka ya Yesu Klisto. Ezali kobianga Mwasi na Ye ya Lilbala kobima, kobongisa Ye mpo ya Konetolama. Mwasi ya libala azali koyoka Yango, koyamba Yango, kobika Yango, mpe amilengélí na bondimáká Yango.

Moto moko te akoki kolongola Yango na biso. Bomoi ya biso ekoka kosómba Yango te. Molimo na Ye ezali kopela mpe kongenga na kati ya biso. Apesi biso Bomoi na Ye, Molimo na Ye, mpe Azali komonisa Bomoi na Ye kati na biso. Tobombamí kati ya Nzambe mpe koléisama na Liloba na Ye. Satana akoki komama biso te. Tokoninganisama te. Eloko moko ekoki kobongola biso te. Na nzela ya Emoniseli, tokómí MWASI LILOBA na Ye.

Ntango Satana amekaka kokitisa biso, tokaniselaka kaka ye lolenge Nzambe Amónaka biso. Ntango Atalaka na nsé likoló na biso, nyoso Amónaka ezali sé wólo PETO. Boyengebene ya biso nde Boyengebene na Ye. Biteni ya biso nde biteni ya Ye moko ya nkembo. Koyebana ya bisó ezuami kati na Ye. Oyo ezali Ye, tozali sasaipi kotalisa. Oyo ezali Ye na yango, tozali KOMONISA SIKAWA.

Boni Alingaka koyebisa Satana: “Namoní libúngá kati na Ye te; ABONGÍ BE. Epai na Ngai, Azali Mwasi na Ngai ya libala, na kati mpe na libándá. Longwa na ebandeli kino na nsuka, azali Mosálá na Ngai, mpe Misálá mia Ngai minso Mibongí Be. Nde koloba, kati na Ye bwányá mpe ntina na Ngai ya Sekó ikútámí mpe imónisámí”.

“Nakútí Mwasi na Ngai ya libala molingami ete abongí. Pelamókó wolo ekomanyolama, ayikeli monyókó mpiko mpo ya Ngai. Akakóli te, afúkámí te, to azindí kati ya kolemba na motema te, kasi abongisamí lokola eloko ya bonzéngá. Bitumba mpe mimekano mia Ye ya bomoi oyo isáli ete Ázala Mwasi na Ngai molingami ya motema”. Yango ezali te kaka lokola Nkoló? Ayebi bobele boniboni koyikisa biso mpiko. Ayebisaka biso: “bolemba na motema soki moké te, kasi bóyika mpiko”. Amonaka misala mia bisó ya bolingo epai na Ye. Amonaka oyo tosengeli koleka kati na yango. Amonaka bitumba ya mokolo na mokolo tozali kondongbana na yango. Lokola Alingi biso kati na moko na moko  na yango.

Na miso na Ye tozali babongi be. Azilá biso longwa na ebandeli ya ntango. Akotika te eloko ata nini ékómela biso bobele ézala mpo ya bolamu na biso. Ayebi ete tokolonga epekiseli moko na moko Satana atiaka libosó na biso. Alingaka kotalisa ye tozali Mwasi na Ye ya libala. Tokoki koningana te. Biso nde baoyo Azalaki kozila útá na ebandeli. Eloko moko te ekokoka kokabola biso na Ye mpe Liloba na Ye.

Atindelaki biso mwanje na Ye motindami ya nguya ete akoka kosolola na biso mbebu na litói. Atiaki Yango na bande na ntina ete mituná mizala te soko alobaki nini. Abombaki Yango na ntina ete Mwasi na Ye ya libala akoka kozala na eloko ya kolia kino ekoya Ye epai na Ye.

Etali biso te ata bamosusu básosola mabe mpe bányókola biso mpo tolobi ete tozali “bato ya bande”, tosepeli, zambi oyo nde Amonisaki biso ete tósala. Basúsu basengeli basala lokola bayoki bakambami kosala, kasi mpo ya biso, tosengeli kosangana elongo na nsé ya Mongóngó moko, Mongóngó mwa Nzambe mondimisami likoló ya ba bande.

Tokoki kopima eloko mosusu te. Tokoki kososola eloko mosusu te. Tokoki kosala eloko mosusu te. Tokoki KOYAMBA eloko mosusu te. Totemeli te oyo bandimi basúsu bayoki ete bakambami na Nkolo kosala, kasi oyo nde Nzambe AKAMBAKI BISO TÓSALA, mpe tosengeli TÓTIKALA AWA.

Tosepeli. Tozali koléisama na Mongóngó ya Nzambe. Tokoki koloba “amen” na LILOBA MOKO NA MOKO toyókaka. Oyo nde nzela ya Nzambe epesámí mpo na biso. Tokoki kosala eloko mosusu te.

Nalingi kaka kobianga moto nyoso koya kosangana elongo na biso. Tozali kosala losambo kaka lolenge Ndeko Branham asalaki yango wana ezalaki ye awa na mabelé. Ata ko azali awa na mosuni te, eloko ya motúya ezali oyo Nzambe alobaki na Mwasi na Ye ya libala likoló ya ba bande.

Abiangaki mokili mobimba bázala eteni ya EKANGANELI YA TELEFÓNE, kasi bobele soko BALINGAKI KOZALA YANGO. Abiangaki bango báyangana ezala esika ata nini bakokaki koyoka Mongóngó ya Nzambe koloba na bango nyoso na ntango moko. Yango nde mosakoli ya Nzambe asaláki ndéle, na bongo Nazali na ngai kaka komeka kosala bobele oyo asáláki lokola ndakisa ya ngai.

Na ntina wana, obiangami koya komibakisa na biso na ekanganeli ya telefóne mokolo mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka motindami ya Nzambe komemela biso Liteya: Nzambe Ya Ekeke Oyo Mabe 65-0801M.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya boyoki Liteya:

St. Matai Mokapo ya 24 / 27:15-23

St. Luka 17: 30

St. Yoane 1:1 / 14:12

Misala 10:47-48

1 Bakolinti 4:1-5 / Mokapo ya 14

2 Bakolinti 4:1-6

Bagalatia 1: 1-4

‘Baefese 2: 1-2 / 4:30

2Batesaloniki 2:2-4 / 2:11

Baebele Mokapo ya 7

1 Yoane Mokapo ya 1 / 3:10 /4:4-5

Emoniseli 3:14 / 13:4 Mikapo 6-8 mpe 11-12 /18:1-5

24-0811 KOBENDAMA LIKOLO YA NGOMBA EZALI NINI?

Nsango: 65*-0725E KOBENDAMA LIKOLO YA NGOMBA EZALI NINI?

BranhamTabernacle.org

Balingami Lisangá Moko,

Tozali na mitema lúkulúku mingi mpe bozili na etingiá monene. Tokoki koyoka yango, eloko moko ekosalema. Tolingi tósangisama elongo koyoka Mongóngó na Yo; kozua eloko ata nini mpe eloko nyoso elobí Yo. Tolingi Yango. Tolingi kozala eteni na Yango. Tondimí Liloba moko na moko.

Nini nde ezali kokóma? Nzambe Azali kosala lisoló. Nzambe Azali kokokisa lisakoli. Eyéisaka ntango nyoso kobéndama. Ememaka balobi mabe nyoso, ba kómbékómbé nyoso ya Etindá oyo toyókákí na ntina na bango Lomíngo loleki, kasi eyéisaka mpe ba Mpongo na Ye elongo. Zambí epai wapi nzoto ezali, ba Mpongo bakoyanganisama.

Ezali eyano na lisakoli ya mosakoli, tala Nakotindela bino Eliya mosakoli. Nzambe azali kondimisa mosakoli na Ye. Ezali Nzambe kokokisa lisakoli. Nzambe azali kosala lisoló, kokokisa Liloba ya Ye. Ezali bobéndami ya misato kokokisama.

Nayebi emónáni lokola ete nyoso Nasalaka ezali sé kotémela bakambi ya mangomba, mpe ezali lokola kokwéisa eloko moko na moko ekosalaka bango, kasi Nandimi tozali libóké moko wana ya bato baoyo babongisamaki libosó ko Fina Play mpe koyoka Etindá wana, Mongóngó wana, mpe kolanda Yango.

Totii motema te na bibólo. Totii motema te na bolobi mabe ya mozangi kondima. Tozali na koswana na bango te. Tozali na eloko moko ya kosala, yango nde kondima mpe kozua eteni moké moko na moko na Yango oyo tokokí; kozindisa Yango pelamoko Malia oyo afandaki na makolo na Yesu.

Tozali na motema kati na eloko mosusu te. Tosengeli na eloko mosusu te. Tondimi ete eloko nyoso tosengeli na yango koyoka ezali likoló ya ba bande. Liloba ya Nzambe lizali na bosenga ya ndimbola te.

Elaká ekokisami. Ntango nini oyo, mobali, mpe kobendama oyo ezali nini? Nzambe kokokisa Liloba na Ye! Azali lolenge moko lobi, lelo, mpe libela.

Kobendama ezali nini? Nzambe, mbala moko lisusu, kokokisa Liloba ya Ye, koyanganisa bato na Ye elongó kati na biyanganelo, bisiká ya etékelo pitoló ya mituka, ba ndako, bayangani zingázingá ya mwa mikoló longwa na ekólo mobimba, kobanda libóngo ya Eloli, likoló kuna na ngómbá ya Arizona, na nsé kuna na mabándá ya Texas, kino mosika na libóngo ya Monyele; kati ya mboka mpe na mokili mobimba.

Tokeseni na ngonga ebelé kati nan tango, kasi Nkoló tozali elongó lokola lisangá moko, bandimi, kozila Boyéi ya Masiya. Nazali komeka kolanda mpe kosala bobelé oyo mosakoli na Yo asalaki kosangisa Mwasi na Yo ya libala ntango azalaki awa. Oyo asalaki nde ndakisa na ngai. Tozali na esika esengeli te mpo ya kofandisa bato nyoso awa na Eyanganelo ya Branham, na bongo tosengeli kaka totindela bango Liloba na nzela ya telefóne, lokola esalaki ye ntango wana. Toyangani awa, kati na Jeffersonville, kati ya mangómbá ya biso ya ndako na ndako, kozila Boyéi ya Nkolo.

Oútáki koyebisa biso ete ekozala na ebelé kati na mikolo oyo ya nsuka baoyo bakomeka kosalela Yo mosala nzokandé ezangi kozala Mokáno mwa Yo Mobongí be. Ekozala na ebelé baoyo bakopakolama na Molimo Mosanto ya solo, kasi bakozala balakisi ya lokuta. Nkolo, nzela bobele moko toyebi KONDIMISAMA ezali kotikala na Liloba, kotikala na malakisi ya ba bande, kotikala na Mongóngó mwa
Yo mondimisami.

Toyebi ete tozali Mombóto mwa Yo mobongisamaki libosó oyo tokoki kosala eloko mosusu te kasi kolanda Yango; Elingi koloba koleka bomoi epai na biso. Zua bomoi na biso, kasi kozua Yango te.

Nini nde ekosalema Lomingo loye? Nzambe Akozala kokokisa Liloba na Ye. Libandá kuna kati ya ekólo, na nzela ya telefóne, nkámá na nkámá ya bato bakozala na maboko na bango batiánélí kati na mboka, longwa na libóngo moko kino mosusu, longwa na Likoló kino Ngelé, Monyele kino Eloli.

Atá longwá na bikólo ya bapaya kati na mokili mobimba, tokozala biso nyoso na maboko ya biso moko likoló na mosusu. Olobaki na biso: “tosengeli ten a kálati ya mabondeli, tosengeli te koya kati ya molongó, tosengeli bobele na KONDIMA.” Tokotómbola maboko ya biso mpe koloba: “Nazali mondimi.” Nini nde ekosalema?

Satana, olóngámí. Ozali mokósi. Mpe, lokola mosali ya Nzambe, mpe lokola basali, topesi motindo ete kati na Nkombo na Yesu Klisto, ete ótósa Liloba ya Nzambe, mpe bimá longwá kati na bato, zambí ekomámí: “Kati na Nkombo na Ngai bakobengana milimo mabe.”

Nzambe Molingami. Ozali Nzambe ya Lóla oyo Olóngákí, mokolo wana na bobéndami likoló ya Ngómbá ya Kalvari, makono manso mpe malali manso mpe misala minso mia zábolo. Ozali Nzambe. Mpe bato babíkisamaki na mapipí ma Yo. Bazali basómí. Kati na Nkombo ya Yesu Klisto. Amen.

Nzambe AKOkokisa Liloba na Ye!

Nalingi kobianga yo óya koyoka elongó na biso, eteni ya Mwasi ya libala, lokola tozali koyoka Liteya: 65-0725E Kobendama Likoló Ya Ngómbá Ezali Nini? Tokozala koyangana mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville.

Basúsu bakoki koyoka ete tozali ebongiseli na boyáká elongó, koyoka Liteya yango moko na ntango moko, kasi Nandimi ete soko Ndeko Branham ázalaka awa, akokaki kozala kosala eloko oyo tokozala kosala, koyanganisa Mwasi ya libala elongó, útá na mokili mobimba, koyoka na ntango yango moko BOYOKA YE.

Ndeko Joseph Branham

Makomí:
St. Matai 21:1-4
Jekalia 9:9 / 14:4-9
Yisaya 29:6
Emoniseli 16:9
Malaki3:1 / Mokapo ya 4
St. Yoane 14:12 / 15:1-8
St. Luka 17: 22-30

24-0804 Bapakolami Na Ntango Ya Suka

NSANGO: 65-0725M Bapakolami Na Ntango Ya Suka

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami baléi ya Máná Mabómbami, 

 Nzambe atindaki motindami na Ye mwanje ya nsambo kokamba Mwasi na Ye ya libala; moto mosusu te; ebólo ya bato te, kasi MOTO MOKO, zambi Etindá MPE Motindami na Ye bazali moko. Liloba ya Nzambe lisengeli na ndimbola te. Alobaki Yango na Mwasi na Ye ya libala na nzela ya mbebu ya moto mpe tondimi Yango bobele lokola Alobaki Yango. 

Tosengeli kozala mpenza na bokebi lelo mongóngó nini mozali kokamba biso, mpe oyo ezali koyebisa biso. Seko na Seko ya biso etélemí mpenza likolo ya mokano wana; na bongo tosengeli kokana mongóngó nini nde mongóngó ya litomba koleka mosengeli na biso koyoka. Mongóngó nini nde mondimisamaki na Nzambe? Mongóngó nini nde mozali na Yango ELOBÍ Nkolo? Ekoki te kozala mongóngó na ngai, maloba na ngai, malakisi na ngai, kasi esengeli Ézala Liloba, na boye tosengeli tokende epai na Liloba komona oyo Eyebisí biso.

Eyebisi nde biso ete akotelemisa botéi bótano kokamba biso na nsuka? Tokoki polelé komona kati na Liloba bazali na esika ya bango; bisiká ya litomba monene, kasi Liloba lilobi nde ESIKA MOKO BOYE ete bango nde bakozala na mingóngó ya litomba koleka to SENGELI koyoka mpo ya kozala Mwasi ya libala?

Mosakoli ayebisaki biso ekozala na mibali ebelé mpenza bakotelema na mikolo ya nsuka baoyo bakomeka kosalela Nzambe mosala nzokande Yango Ezangi kozala Mokano na Ye. Akopambola lotómo na bango, kasi ezali te Mokano mwa Ye Mobongí Be kokamba Mwasi na Ye ya libala.

Alobaki Mokano mwa Ye Mobongí Be nde, mpe ezalaka ntango nyoso, koyoka mpe kondima mongóngó ya mosakoli na Ye andimisami. Mpo ete Yango, mpe Yango kaka nde ezali na Yango Elobi Nkolo. Nde ntina Atindaki mwanje na Ye; mpo na nini Aponaki ye; mpo na nini Asalaki ete etiama na ba bande. Ezali Bilei Ya Molimo Na Ntango Elongobani, Maná Mabombamí, epai na Mwasi na Ye ya libala.

“Mpo ete nsambo longwa na bileko nsambo, Namoni eloko mosusu te bobele bato kokumisa maloba na bango likolo ya oya Ngai. Na boye na nsuka ya eleko oyo Nazali kosanza bino na monoko na Ngai. Esili. Nakoloba nde mpenza. Iyo, Nazali awa kati ya Lingomba. Amen ya Nzambe, ya sembo mpe ya solo akomimonisa Ye moko mpe EKOZALA NA NZELA YA MOSAKOLI NA NGAI.”Oo iyo,ezali bongo.

Bileko nsambo kati na nsambo bato bamimóni ete maloba na bango mazali likolo koleka oya Ngai. Osengeli ómituna, oyo te nde ezali kokóma kati na biso sikawa mpenza? “Boyokisa ba bande kati na losambo te, kasi bosengeli koyoka mobateli na bino, boyoka ba bande kaka kati ya ba ndako ya bino”. Bazali te kotia Mongóngó na Ye likolo ya ba bande lokola Mongóngó ya litomba koleka, kasi mongóngó ya bango.

Bazali kotalisa bato epai ya bango moko, mpe litomba ya botéi ya BANGO, ebiangeli ya BANGO komema Liloba, kokamba Mwasi ya libala; kasi Mwasi ya libala akoki koyikela yango mpiko te. Bakoki koyamba yango te. Bakosala yango te. Bakokakola likolo na Yango te; ezali to Mongóngó ya Nzambe mpe eloko mosusu te. Yango nde Liloba lilobí.

Motúna likoló ya makanisi ya bato lelo ezali: Nzambe Aponaki nani kokamba Mwasi na Ye ya libala, ba bande to bótàno ya botéi? Botéi nde bokokómisa Mwasi ya libala na bobongi be? Botéi nde bokokamba Mwasi ya libala? Kokokana na Liloba ya Nzambe, etikálá kozala nzela na Ye soki moké te. 

Ezali na ebelé ya bato lelo balobaka ete balandí mpe bandimí Etindá oyo mpo na ba mbula na ba mbula, kasi bazali sasaipi kotia Botéi lokola mongóngó ya litomba koleka bosengeli koyoka. 

Botéi nini ko nde bokolanda? Likoló ya botéi nini nde bokotia Seko na Seko na bino? 

Bango nyoso bazali koloba ete babiangami na Nzambe koteya Etindá. Nawangani to nabeti yango ntembe te, kasi bóko ya batéi bayebani mingi koleka kati ya botéi bótáno bazali koloba: “Ezali Mongóngó ya Nzambe te, ezali kaka Mongóngó ya William Branham”. Basúsu balobi: “mikolo ya Etindá ya moto moko mileká”. “Etindá oyo ezali etemelo te”.  Yango nde ezali kokamba yo?

Mibali oyo bateyaki na nkámá na nkámá ya makita na bangó, bakambi minene ya botéi botáno, SIKAWA bawángáni Etindá mpe BALOBI “Etindá oyo ezali lokuta”.

Mingi kati na batéi lelo balobi: “bosengelaki te koyoka Mongóngó ya mwanje ya Nzambe kati ya losambo, kaka kati ya ba ndako na bino.” “Ndeko Branham atíkálá koloba te bóyóka ba bande kati ya losambo.”

Yango ezali koleka likoló ya kondima. Nakoki te kondima ndeko mobali to ndeko mwasi oyo alobi ete andimí Etindá oyo; ete Ndeko Branham azali mwanje ya nsambo motindami ya Nzambe, Mwana ya Moto koloba, ákende kokwea na liloba ya bokósi ya lolenge wana. Esengelaki ekómisa yo mokoni na likundú na yo. Soko ozali Mwasi ya libala, OKOBELA.

Nzambe Abóngólá Likanisi na Ye likoló na Liloba ya Ye soki moké te. Apóná ntango nyoso moto moko kokamba bato na Ye. Basúsu bazali na esiká ya bango, kasi basengeli kokamba bato epai na oyo Ye aponaki kokamba bato. Bolamuka bato. Boyóká oyo batéi baye bazali koyebisa bino, milongó ya maloba bazali kosalela mpo na kotia botéi na bango libosó ya óya mosakoli. Botéi ya moto ata nani bokozala nde na litomba boni koyoka koleka Mongóngó mwa Nzambe mondimisami mpe mokokisami oyo Akokisi mpe Andimísí ete ezali Yango Elobi Yawe? 

Ayebisaki biso, mpe Ayebisaki biso, ekoki solo kozala na mibali bapakólámi, na Molimo Mosanto ya solo likoló na bango, baoyo bazali lokuta. Ezali kaka na NZELA MOKO komindimisa, BÓTIKALA NA LILOBA YA EBANDELI, zambi Etindá oyo mpe motindami bazali eloko moko. Ezali bobele na Mongóngó moko Nzambe Aponaki kozala Yango Elobi Nkolo…MOKO. 

Botéi ya solo bokoyebisa bino ete ELOKO TE ezali  ya litomba koleka koyoka Liloba ya Nzambe kouta na Mongóngó ya Nzambe likoló ya bande. Bakoki koteya, kolakisa, to ata eloko nini babiangami kosala, KASI BASNGELI KOTIA MONGÓNGÓ YA  NZAMBE LIBOSÓ, KASI BAZALI KOSALA YANGO TE, KASI KOTIA BOTÉI NA BANGO LIBOSÓ. Bikela ya bango mpenza bizali kotalisa oyo bandimi.

Babóyi koyanola motúná likoló ya kozongisa Mongóngó ya Nzambe na bitéyelo ya bango na bolobáka : “Ndeko Joseph andimaka batéyi te. Andimaka kokende losambo te. Bazali kosambela moto, Bazali kolanda lilakisi ya Joseph wana. Azali kosala ebongiseli na boyókisáka mpe boyókáká ba bande yango moko. Bazali kaka kobenda bokébi ya bato mosiká ya motúna mpenza.  Ekela ya bangó etálisi oyo bandimi na nzela ya oyo bazali kolakisa bato na bango: BOTÉI NA BANGO LIBOSÓ.

Balobi, kozala na bato koyoka bande yango moko na ntango yango moko ezali ebongiseli. Ezali yango te nde Ndeko Branham asalaki ntango azalaki awa; kokangisa bato na telefóne koyoka Liteya bato nyoso na ntango moko?

Bómituna, soko Ndeko Branham ázalaka awa lelo kati na nzoto, alingaki nde te kozala na Mwasi ya libala nyoso AKANGISI BANGO NA TELEFÓNE koyoka ye nyoso na ntango moko? Akokaki nde te komeka koyeisa Mwasi ya libala elongó zingázingá ya LOTÓMO NA YE lokola asalaki liboso ete Nzambe ázua ye na ndako?

Botika Nakotisa eloko moko awa. Baoyo ya koloba mabe ba koloba, bomoni, ye wana abandi, alekisi koloba likoló ya moto; bazali kolanda moto, William Marrion Branham!! Tika bobele tomona oyo Liloba lilobí mpe na ntina na yango.

Na mikolo ya motindami ya nsambo, na mikolo ya Eleko ya Laodikia, motindami na yango akomónisa mabombami ya Nzambe lokola imonisamelakiki Paulo. Akoloba polele, mpe baoyo wana bakoyamba mosakoli yango na nkombo na ye moko bakozua mbano ya lotómo ya mosakoli yango.

Oyo ekopesa zábolo kándá lokola eloko mosusu te mpe akondongbana na ngai kútu koleka, kasi bato, epusí malamu bótala oyo na Liloba. Ezali te mpo ete Nalobí yango, te, nsima Nakokaki kozala lokola moto mosusu ata nani; kasi bófungola mitema mpe makanisi na bino mpe bótala yango na Liloba. Ezali te oyo moto ata nani alobi to alimbweli bino, kasi oyo mosakoli ya Nzambe alobi.

Nsima ya mokandá oyo bakopesa bino biteni ya maloba nsima ya biteni ya maloba, mpe Nalobi AMEN na eteni ya Liloba moko na moko, KASI TOLOBA NINI NA MAMA NA LIKAMBO? Bazali nde kosalela biteni ya maloba koyebisa bino ete mosakoli nde bosengeli koyoka, to BOTÉI YA BANGO? Soko balobi Etindá, mosakoli, na bongo bóyebisa bango batia Mongóngó wana LIBOSÓ kati ya losambo ya bino.

Likoló ya mobóko ya ezaleli ya moto kaka, moto nyoso ayebi ete esika bato mingi bazali ezali kútu na likanisi likabwání likoló ya mwa makambo maké ya lilakisi linéne oyo bango nyoso bakangani elongo.

Nde yango. Liloba moko oyo liyebísí yo ekoki te mpe EKOZALA TE ebólo ya bato. Ezali te botéi nde bokosangisa bato bobele naino mpo na ezaleli ya bomoto kaka, bakabwani-kabwani likoló ya mwa makambo maké ma malakisi manéne. Bakoki nyoso koyokana te, na bongo bosengeli kozonga na LILOBA YA EBANDELI. 

Nani kasi nde akozala na nguya ezangi kokwea oyo esengeli kozongisama na eleko oyo ya nsuka, zambi eleko oyo ya nsuka ekozonga na bomónisami ya Mwasi Liloba Peto?

NANI akokamba biso? MONGÓNGÓ MOKO, na nguya ya kozanga kokwea nde esengeli kokamba Mwasi ya libala.

Elingi koloba tokozala na Liloba mbala Moko lisusu lokola epesamáki na bobongi be, mpe esósólamáki na bobongi be na mikolo ya Paulo. 

Nkembo…Epesámí na bobongi be mpe Esósólamí na bobongi be. Ezali na bosenga ya botémisami te, lokola epesamáki na bobongi be, mpe biso, Mwasi ya libala, tosósóli na bobongi be mpe tondimi Liloba Moko na moko. 

Yango oyo. Azali kotinda mosakoli andimisami.

Azali kotinda mosakoli nsima ya mbúla pene na nkóto mibale.

Azali kotinda moto moko oyo azali mpenza mosika na ebongiseli, boyekoli, mpe mokili ya losambo ete lokola Yoane Mobatisi mpe Eliya ya kala,

Akoyoka sé longwá na Nzambe

Akozala na “yango Elobi Nkolo” mpe akoloba mpo na Nzambe. 

Akozala monoko ya Nzambe

YE NDE, LOKOLA ELOBAMÍ KATI YA MALAKI 4:6, AKOZONGISA MITEMA YA BANA EPAI YA BATATA NA BANGO.

 Akozongisa baponami ya mokolo ya nsuka mpe bakoyoka mosakoli andimísámí kopesa soló mpenza lokola ezalaki na Paulo. 

Akozongisa solo lokola basalaki yango.

Mpe baponami wana elongo na ye na mokolo wana bakozala baoyo mpenza bakomonisa Nkolo mpe bakozala nzoto na Ye mpe kozala mongóngó na Ye mpe kosala misala na Ye. Aleluya! Bomoni yango? 

Tomoni Yango. Tondimí Yango. Tozali kopema likoló na YANGO.  

Bobiangamí koya komibakisa na biso lokola tozali koyoka monoko ya Nzambe, Mongóngó oyo ekosangisa Mwasi na libala ya Yesu Klisto, mosakoli na Ye oyo andimisami, lokola azali kopesa biso solo mpenza, na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville. 

Ndeko Joseph Branham 

65-0725M—Bapakolami Na Ntango Ya Nsuka

24-0721 Komeka Kosalela Nzambe Mosala Libanda Ya Mokano Na Nzambe

NSANGO: 65-0718M Komeka Kosalela Nzambe Mosala Libanda Ya Mokano Na Nzambe

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi ya libala ya Klisto,

Tika ete tóya elongó Mokolo mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, koyoka 65-0718M- Komeka Kosalela Nzambe Mosala Nzokande Libandá na Mokano Ya Nzambe.

Ndeko Joseph Branham

24-0714 KOYOKA NSONI

Nsango: 65-0711 KOYOKA NSONI

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya libala Oyo Azangi Koyoka Nsóni,

Etikálá soki moké te kozala na ntango soko bato lokola lelo.  Tozali kati na Ye, basangoli ya libula ya nyonso Asombaki mpo na biso.  Azali kokabola boyengebene na Ye elongo na biso, kino kati na Ye, tokomi bosembo mpenza ya Nzambe.

 Ayebaki biso liboso na mobeko ya Bonzambe, ete tokozala Mwasi na Ye ya Libala.  Aponaki biso, toponaki Ye soki moke te.  Toyaki na lolenge ya biso moko te, ezalaki boponi na Ye.  Sikawa Atii na motema mpe bomoto na biso Emoniseli mobimba ya Liloba na Ye.

 Mokolo na mokolo, Azali komónisa Liloba na Ye epai na biso, kosopa Molimo na Ye likolo na biso, komonisa bomoi na Ye mpenza kati na biso. Mwasi ya libala na Ye atiámá naino lóngo libosó boye Soki moké te  na mitema na bango koyeba ete bazali kati na Mokáno mwa Ye Mobongí Be, mpe na manaka ma Ye, na botikaláká na Liloba na Ye, koyoka Mongóngó na Ye.

 Bolingo ya Nzambe mpe Etindá oyo etondisi mitema ya biso kino ezali bobele kopunjuapunjua.  Ezali na eloko mosusu te tolingi koyoka, koloba na ntina na Yango, kozala na bondeko, to kaka kokabola eténi  moko ya Liloba toúti koyoka mpe kosanzola Nkolo.

 Tozali lokola Mose nsima ya lisóbé.  Totamboli elongó miso na miso na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, mpe tomoni Mongóngó koloba na biso;  mpenza na Liloba mpe elaka ya ngonga.  Esali biso likambo moko.  Tozali na nsóni na Yango te.  Tolingaka kosangela Yango na mokili.  Tondimi Nkolo Yesu azali Etindá ya ngonga mpe TOZALI MWASI NA YE YA LIBALA.

 Akémbisi biso na Liloba na Ye.  Elilingi ya ntembe ezali te, oyo ezali nzela Nzambe apesi.  Nzambe abongolaka Likanisi na Ye na ntina ya Liloba na Ye soki moké te.  Aponaki mwanje na Ye ya nsambo kobianga Mwasi na Ye ya Libala kobima, na nsima kobatela Ye na molongo na Liloba na Ye.

 Ezali na eloko moko te na bomoi oyo longola sé Ye mpe Liloba na Ye.  Tokoki kolemba Yango te.  Ezali koleka bomoi mpo na biso.  Nsango Malamu mpe Nguya ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso epalangani na mokili mobimba lokola naino libosó te.  Liloba ezali sikawa na maboko mpe matói ya Mwasi ya libala.  Ntango ya bokabwani yang’oyo, ntango Nzambe azali kobianga Mwasi ya libala, mpe zábolo azali kobianga lingomba.

 Tolingi Yo mpe Liloba na Yo, Nkolo.  Tokoki kozua mingi koleka te.  Tofandi na bozali ya Liloba na Yo mokolo na mokolo, kotela, komilengela mpo na Koya na Yo noki.  Tata, esengeli ezala pene mpenza.  Tokoki koyoka yango, Nkolo.  Tozali kozila na etingia monene.

Tata, tozala na motema sembo mpenza mpe tozongisa  bilaka na biso bíkóma ya sika lisusu.  Toyebi Kondima na biso kati na Liloba na Yo ezali kopela na motema na biso.  Olongoli ntembe nyonso.  Eloko mosusu ezali kuna te kaka Liloba na Yo.  Tondimisami, mpe toyokaka nsóni te koyebisa mokili, tozali Mwasi na Yo ya libala ya Bande. 

 Nalingi kobianga mokili koya koyoka elongo na biso Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka Liteya: Koyóka Nsóni 65-0711.

 Ndeko.  Joseph Branham

St.  Malako 8:34-38