Eténi Ya Liloba Ya Mokolo

Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
November 1, 2026

Nzokande Momboto Na Yo Ekobotola Ekuke Ya Bayini Na Ye 61-0213

Nzambe alingaka komonisa loboko na Ye ya nguya. Iyo, Alingaka kosala bongo. Asepelaka komonisa bokasi na Ye. Na mpokwa oyo Azali kozila kotalisa yango kati na yo; kozua mosumuki mpe kobongola ye, kozua mwasi wana ya bomoi mabe mpe kokomisa ye mwasi mosanto atondi na boyengebene, kozua mwana mwasi oyo akendeki na nzela mabe, mwana mobali oyo alandaki nzela mabe, mpe kozongisa bango lisusu na esika na bango mpo bakoma bana mibali mpe bana basi ya Nzambe. Azali pene ya kozua moto oyo azali kokufa na kancer, oyo azali na bokono ya motema, oyo azangi komona, oyo azali na mpasi ya ndenge na ndenge; soko kaka akotia kondima na ye na kati kuna, Nzambe akobongola ye longwa na kufa kino na bomoi mpe akopesa ye litatoli ya sika. Azali kozila kosala yango. Mbala mingi Atikaka yo omimona lokola okangami na motambo mpo na komona oyo okosala. Atiaki bango mpe kati na motambo wana. Emonanaki lokola ata bozalisi ezalaki kobomba elongi na yango. Iyo.

Mokomi moko alobaki mbala moko ete ntango bakómaki na esika wana, bazalaki komituna nini nde Mose akosala. Azalaki na motindo moko kaka: “Kende liboso.” Soko ozali kati na mokano ya Nzambe, ata likambo nini etelemi na nzela na yo… Makambo ya minene oyo nayoká kati na bomoi na ngai ezali ntango nakutani na likambo oyo nakokaki koleka likolo na yango te, nakokaki mpe kokende na nse na yango te, kasi natɛlɛmaki kaka wana mpe namonaki Nzambe kofungola nzela kati na yango. Yango nde lolenge ya kosala yango. Kende kaka liboso. Koba kotambola. Tia zolo na yo na yango. Koba kotambola. Kende kaka liboso. Nzambe akofungola nzela.

Lipa Ya Mokolo Na Mokolo

Nzambe na ngai atindaki Mwanje na Ye, mpe akangaki minoko ya bankosi.
Danyele 6:22

An Independent Church of the WORD,