Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
November 2, 2026
Abalayama 60-0803
Mpe sikawa tala, mpe, “Somba epai na Ngai mafuta kopakola miso ma yo.” Oo, oo! “Somba mafuta epai na Ngai, oyo makofungola miso na yo,” na oyo ezali kosalema zingazinga na biso. Oo, Nzambe, nalingaki soko nazalaki na nzela moko ya kosala ete lingomba limona yango. Somba mafuta. Mafuta ya miso mazali makasi. Mpe mafuta mazali Molimo Mosanto. “Tika Napakola miso na bino mafuta mpo bokoka komona ete Nazali lolenge moko lobi, lelo, mpe libela, tika bomona ete bilaka bizaláki Ngai mpo na mikolo ya nsuka bizali awa. Somba mafuta epai na Ngai.”
Lipa ya Mokolo na Mokolo
Napesi yo toli ete osomba epai na Ngai wolo oyo esili konangwa na moto, mpo ozala na bozwi; mpe bilamba pembe, mpo olata, mpe nsoni ya bolumbu na yo emonana te; mpe mafuta kopakola miso na yo, ete omona.
Emoniseli 3:18