Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
November 3, 2026
Lolendo 55-0807A
Kati na bato ya Amerika, na nzela ya televizio mpe na nzela ya sindema, bamoni mpenza mingi ya komitalisa oyo bazali te, kino bango moko bakomi bato ya komitalisa eloko bazali te: mawa mingi. Mpe tozwi yango kati na lingomba, basani masano. Hmmm. Nzambe alingi bango te. Tika te ete biso tozala basani masano. Zala yo moko; Nzambe alingi ozala bongo. Nayinaka komona moto komeka kosala eloko oyo akoki kosala te.
Nsoni nini oyo, namonaki yango mbala mingi, mpe mingongo ya kitoko oyo Nzambe apesaki bato, likabo, mpe na nsima bayekolisi yango koleka ndelo. Nayinaka koyoka mongongo oyo eyekolisami koleka ndelo, ntango batelemi mpo na koyemba, mpe bazui noti moko, kino bakangi yango molai kino bilongi na bango bikomi langi ya bule, kaka mpo na kotalisa eyanganelo boni bakoki kokangama molai na mondimo na bango. Mpe ntango bakiti lisusu, bato wana bazali kokumisa Nzambe te; makanisi na bango mazali likolo ya noti na bango.
Lipa ya Mokolo na Mokolo
Tika ete tolinga nkembo ya pamba te,
Bagalatia 5:26