Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
November 4, 2026
Mongongo Ya Nzambe Na Mikolo Oyo Ya Nsuka 63-0120M
Soko ozali kaka mondimi ya moto moke, Mongongo ya Nzambe ezali koganga na motema na yo ntongo oyo, “Ozali mondimi ya moto moke,” obongola motema na yo!
Bino mibali, basi, bana mibali to bana basi, oyo bazali kobika mpo na Klisto te, mpe Mongongo ya Nzambe ezali kolobela bino na nzela ya Liloba na Ye mpe ezali koloba “tika kosala yango,” bosengeli kotika yango. Zambi bokoyoka Yango lisusu mokolo moko, mpe Ekokweisa bino. Okoki koboya Yango te, Ezali kolobela yo sikawa. Mpe, bókanisa, ekotisami na ba bande.
Mpe baoyo basalaka malamu mpe bayokaka Mongongo na Ye, bakosekwa na boyengebene, na Nkembo, na Likolo.
Lipa ya Mokolo na Mokolo
Oyo azali na matoyi ya koyoka, ayoka.
Matai 11:15