Eténi Ya Liloba Ya Mokolo

Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
November 6, 2026

Makabo 56-1207

Sikawa, Nzambe kofanda kati na Klisto asalelaki mongongo na Ye mpo na koloba. Yesu alobaki na ekamwiseli na Ye, “Solo, solo, nalobi na bino, Mwana akoki kosala eloko te na Ye moko, bobele oyo Amoni Tata kosala, yango nde Mwana asalaka mpe lokola.” Ezali bongo? Santu Yoane 5:19.

Boye Asalaki eloko te na Ye moko. Mosakoli moko te asalaki naino eloko na ye moko, kino Nzambe amonisaki liboso oyo esengeli kosala. Libunga nini Mose asalaki ntango abimaki kozanga emononeli ya Nzambe mpe abetaki mpe abomaki Moejipito, akanisaki ete akokangola bango na maboko na ye, zambi akanisaki ete azalaki na kondima mingi mpe akokaki kosala yango, zambi abiangamaki mpo na mosala yango.

Ata boni obiangami mpo na mosala, Nzambe asengeli kokamba. Omoni? Alongaki te na boyekoli na ye nyoso, na makanisi na ye ya mapinga, mpe na koyekolisama na ye lokola mokambi monene Moejipito. Kasi atako bongo yango elongaki te, zambi Nzambe azalaki na etandelo mpe tosengeli kosala kolanda etandelo ya Nzambe. Ata nini tosali, ata boni tozali na mayele, tosengeli komikitisa mpe kosala kolanda etandelo ya Nzambe. Amen.

Lipa ya Mokolo na Mokolo

Oyo nyoso napesi bino mobeko, bokengela kosala yango: bokobakisa na yango te, mpe bokolongola na yango te.
Dutelonome 12:32

An Independent Church of the WORD,