Eténi Ya Liloba Ya Mokolo

Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
October 31, 2026

Boyoka Ye 60-0712

Moto amekamaka na makasi ya misuni te; yango ezali bonyama. Moto amekamaka na ezaleli na ye. Namoná bato bazalaki na bozito ya kilo mingi mpe batondaki na makasi ya nzoto, kasi bazalaki ata na eteni moke te ya bomoto kati na bango. Kobwaka mwana moke longwa na maboko ya mama na ye mpe kosalela ye mabe, yango ezali bomoto te; yango ezali ezaleli ya nyama. Ezali kanza makasi. Moto ya solo amonisamaka na ezaleli na ye. Mokolo moko te ezalaki na Moto moko lokola Yesu Klisto.

Kasi Biblia elobi ete kitoko moko te ezalaki kati na Ye ete tokoka kosepela na Ye. Mbala mosusu Azalaki Mobali moke ya moke, mapeka magumbama to ndenge mosusu… Biso nyonso tobombaki bilongi na biso liboso na Ye lokola nde tozalaki koyokela Ye nsoni. Kasi Azal…ezalaki naino na ezaleli moko te lokola oyo ya Ye. Yango nde bomobali ya solo. Moto amekamaka na misuni ya nzoto na ye te, kasi na bilembo ya mabɔlɔngɔ na madusu ya pantalon na ye epai afukamáki kobondela. Yango nde ndenge ya komeka moto, na ezaleli na ye. Ezali solo.

Lipa Ya Mokolo Na Mokolo

Mpamba te bozoba ya Nzambe eleki bato nyonso na bwanya; mpe bolembu ya Nzambe eleki bato nyonso na makasi.
1 Bakolinti 1:25

An Independent Church of the WORD,