Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
October 30, 2026
Momboto Mokozala Mosangoli Elongo Na Mposo Te 65-0429B
Moto akelamaki na elilingi ya Nzambe (Nzambe Azali Molimo), na bongo azali moto molimo. Nsima ekomaki ye moto ya mosuni, mosuni ya nyama awa na mabele, Azali–Azali kotalisa, kotalisa elembeteli ya Mwasi na libala. Atikala soki moke te kozua mpe kobongisa ekelamu mosusu, kasi Azuaki eteni ya Adama, bozalisi ya ebandeli, azuaki longwa na ye, mokuwa ya mopanzi uta na mopanzi na ye; mpe azuaki molimo ya mwasi uta na Adama, Atikaki molimo ya mobali wana, mpe atiaki yango kati na eteni ya mwasi. Na bongo, eteni ya molimo na ye, eteni ya nzoto na ye; mosuni ya mosuni na ye; mokuwa ya mokuwa na ye; Liloba ya Liloba na Ye; Bomoi ya Bomoi na Ye, mpe nde
Nde ntina Konetolama ya Momboto ya Bokonzi ekosengela koya liboso. Mpe bakufi baoyo batikali babikaki te mpo na mbula nkoto, nsima bayeisamaki na lisekwa mpo ya kosambisama ya Kiti Mpembe ya Bokonzi. Bomoni, ezali na Kosambisama te mpo ya Momboto ya Bokonzi, to Momboto ya Abalayama oyo ebongisamaki liboso.
Lipa Ya Mokolo Na Mokolo
Kasi sikawa, E Nkolo, ozali tata na biso, tozali lima, mpe Ozali moyemi mbeki; mpe biso nyoso tozali mosala ya loboko na yo.
Yisaya 64: 8