Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
October 29, 2026
Mposa 65-0919
Mpe, boyebi, bazali bobele bango ekelamu oyo–oyo mwasi azali kitoko koleka mobali, ezali kati na libota ya moto. Nyama mosusu nyoso , zua ngo–ngombe mwasi kokanisa na oya mobali, nganzi mwasi na oya mobali, nsoso mwasi na oya mobali, mama ndeke na tata ndeke, ntango nyoso okokuta ete ndeke mobali azali monene mpe kitoko. Kasi kati na libota ya moto etalisi ete kuna na lipengwi likotaki, ebaluki kobaluka; mpe ezali mwasi na boye nde azali–azali kitoko, mpe balulaka kozala kitoko.
Ezali te lokola bikelamu bisusu ya kokamwa tomonaka na bala-bala lelo oyo; te, te, lolenge wana ya kitoko te. Te. Oyo wana nde eloko ya nsomo koleka Namona ndele na bomoi na ngai. Ee, mobali. Ezali lipengwi kopengola mposa ya solo.
Sikawa, mposa ya solo oyo mwasi asengelaki kozala na yango, elingaki kozala, “komikembisa na molato ya bosokemi, mpe kozala na molimo moulani na Klisto,” Timote ya Liboso 2:9. Sikawa nde mposa mwasi asengelaki kolula azala. Sikawa soko olingi kozala kitoko, nde lolenge lokozalisa yo kitoko, bomoni, ezali kozala na molimo moulani na Klisto, mpe komikembisa na molato ya bosokemi.
Lipa Ya Mokolo Na Mokolo
Nani akoki kozua Mwasi na motema malamu? Aleki mabanga na penini na motuya.
Masese 31: 10