Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
October 28, 2026
54-0306 Kondimana Ezangi Mobeko Oyo Nzambe Asalaki Na Bato Na Ye
Ntango mosusu Natali, bato bazali kobima awa…Nazalaki kotelema na misé moko monene awa kala mingi te. Mpe Namonaki bokakoli ya nzoto ya moto. Mobali ya bozito ya kilo ntuku motoba na mwambe azalaki na motuya ya satime ntuku mwambe na minei na boyekoli nzoto ya biloko ya putulu na ye. Okokaki nde kokanisa yango? Na nsima okanisi ozali moto ya lokumu. Ozali na motuya ya satime ntuku mwambe na minei. Ezali solo.
Olati ekoti ya dolale zomi likolo ya satime ntuku mwambe na minei mpe okanisi ozali moto ya lokumu. Omizingi na mokoto ya dolale nkama mitano mpe okanisi ozali moto moko ya lokumu ntango motuya na yo ezali bobele satime ntuku mwambe na minei. Ezali mpenza solo ete ata bongo, ozali kobatela na bokengi satime yango ntuku mwambe na minei, bongo te? Ezali solo.
Kasi mikundwela, na kati kuna ozali na bomoto bozali na motuya ya mikili nkoto zomi. Mpe ozali kotika molimo mabe kopusa yango epai na epai. Ee, ezali solo.
Ozui moto moko, boko ya mwa bato oyo batondi na makasi kuna na bala-bala, ayebi na ye eloko moko te na ntina na Nzambe bobele lokola moinga ya Hottentot azangi koyeba makambo ya ntombwa ya kobika kati na bato. Ee, oo, azali moto ya losámbo. Akomizingela na mokoto ya dolale nkama mitano, akomatisa zolo na ye likolo na mopepe, soko mbula enokaki, mbe epolisa ye mobimba, akanisi azali moto ya lokumu. Ozali nini? Satime ntuku minei na mwambe. Ezali solo. Kasi ozali na bomoto, mikundwela.
Lipa Ya Mokolo Na Mokolo
Na milunge na elongi na yo okolia kwanga, kino ekozonga yo na mabele; zambi outaki na yango: zambi ozali putulu, mpe okozonga na putulu.
Genese 3: 19