Eténi Ya Liloba Ya Mokolo

Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
October 27, 2026

Kondima Utá Na Motema 57-0623

Mosala ya moto nde eyebisaka ezaleli na ye, Klisto azalaki mosala ya Nzambe, mpe Klisto ayebisaki ezaleli ya Nzambe: eyokeli na Ye mpo ya bakoni, motema lukuluku na Ye mpo ya kobikisa milimo, kino kutu Apesaki bomoi na Ye Moko. Mosala ya Nzambe…ezaleli ya Nzambe eyebisamaki kati na Klisto.
Mpe soko okoki bobele kobimisa makanisi ya boyebi na yo moko, mpe kopesa Nzambe makoki ya kosala, Akoki koyebisa ezaleli na Ye na nzela ya mosala na yo kotikela Ye nzela. Misilisa. Bimisa mokili, bimisa ntembe na yo, na nzela. Soko oyaki na etumbelo kobondamela, loba, “Nakomata kuna mpe namona soko Nakobika,” Nzambe akoyebisa misala na Ye soki moke te. Osengeli kobimisa makanisi na yo moko na nzela, mpe kotika Ye Atondisa yo.

Lipa Ya Mokolo Na Mokolo

Moto malamu longwa na ebombelo na ye malamu ya motema akobimisa makambo malamu.
Matai 12: 35

An Independent Church of the WORD,