Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
October 26, 2026
BandekoTolingi Komona Yesu 61-1224
Soko oyebisi moyekoli moko, “ Nalingí koyeba Nkolo Yesu.”
“Boye, sikawa botala, tozali bai lingomba songolo-pakala, bokita bomibakisa na yango, bomibakisa na biso.” Bomoni?” To, “Tozalaki…tozali bai ebolo ya bato songolo-pakala, mpe boya bomibakisa na yango.” Mpe yango nde bozali koyoka.
Kasi Klisto Ye moko atalisaki bato na kufa na Ye mpe Alobaki, “Bobele mbuma ya momboto ya lisango ekwea na mabele, soko bongo te ekotikala yango moko.” Oo, boni ezali na bokeseni! Ee, mobali. Boni ekeseni! Kasi bomoi na yo mpe bomoi na Ye ikutani, na lingomba te, kati na litongi moko te, kati na endimeli moko te, kati na misala malamu te, kasi kati na ekulusu epai wapi obakami na ekulusu elongo na Ye. Nde esika okozua Klisto. Okokuta Ye te na bofungolaka lokasa ya sika ya buku. Kobanda bomoi ya sika, okozua Klisto te. Okozua Klisto bobele kati na kufa; kati na elielo ya ba nyama te, kati na eyambweli te. Kondima bindimeli moko boye mpe masapo, okokuta Klisto kuna te.
Mosali ya solo akomema yo epai na Ye, mpe Azali Liloba.
Lipa Ya Mokolo Na Mokolo
Solo, solo, Nazali koloba na bino ete, bobele mbuma ya momboto ya lisango ekwea na mabele mpe ekufa, soko bongo te ekotikala yango moko: kasi soko ekufi, ekobota mbuma mingi.
Yoane 12:24