Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
October 22, 2026
Baebele Mokapo ya Mibale 2 57-0825E
Oo, boni tokokaki kotelema bobele mpo na monuti moko! Ozali nani, ata bongo? Mosala wana ozali na yango elingi koloba nini? To mwa ndako wana tozali na yango ezali na ntina nini? Motuka tozali na yango ezali na ntina nini?
Elenge mwasi moke kitoko, mwa eloko na ezaleli ya matata na bato, lolenge ozali na yango wana sikawa nde nini? Bino bilenge mibali na nsuki elali ya kongenga,, ekiti alima na mapeka, okogumbama mokolo moko, ntamgo bo mpaka ekogumba yo.
Kasi, Nkolo apambolama! Ozali na bomoto ebotami mbala ya mibale. Okobika libélá na libela, mpo ete Akomaki yo, ete yo na nzela na ngolu na Ye okoka kokoma Ye, mpe kosala esika mpo na yo.
Oo, biso baoyo tokanisaka ete tozali na bilamba ya kobongola, ndambo ya bilei ya kolia na ndako, tozali ba nani? Nzambe akoki kokamata yango na sekonde moko. Mpema na yo yango moko esimbami na loboko na Ye. Mpe Ye na kati na biso kobikisa bakoni, koyebisa mpe koloba, mpe koyebisa makambo liboso, mpe ntango nyoso ebongi kwa. Mpe Azali kutu kotia motema na mwa eloko lokola mbisi moke ekufi kozongisa yango na bomoi na yango lisusu, na kati na biso. Yawe zingazinga na biso, NAZALI ya monene mpe na nguya.
Lipa Ya Mokolo Na Mokolo
Ntina wana Nalobi na bino, botungisama te mpo na bomoi na bino, soko bokolia nini, bokomela nini; soki te mpo ya nzoto na bino, soko bokolata nini. Bomoi eleki bilei na motuya te, mpe nzoto koleka bilamba?
Matai 6:25