Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
October 21, 2026
Kende Koyebisa Bayekoli Na NGai 53-0405S
Nsima ntango mosakoli oyo akotaki kati ya Molimo, Nzambe abandaki komonisa ye oyo elingaki kosalema; ete ekozala na moto moko Oyo akolongola lisumu ya mokili, mpe akosekwa lisusu. Amonaki lisekwa ya Nkolo. Na bongo, Nalingaka yango soko Nakanisi. Alobaki ete atelemaki. Aminingisaki.
Azalaki kofanda likolo ya putulu ya moto. Oo! Oyo tozali kobianga, lelo, makila mabe mabetaki ndako na ye. Bana na ye babomamaki nyoso. Bozui na ye nyoso ekendeki. Bokolongono na nzoto na ye esilaki. Ye kofanda, Moklisto, to mondimi, afandi, aboyami. Ndeko, ata lingomba na ye, batielaki ye mokongo. Ye wana afandi kuna, kokwanza ba mpota na ye.
Na nsima ntango Molimo na Nkolo ayaki likolo na ye, mpe amonaki lisekwa na ntongo oyo, boyebi, atelemaki, mpe alobaki, “Nayebi Mosikoli na ngai azali na bomoi, mpe na mikolo ya nsuka Akotelema likolo na mabele. Mpe ata mpambo ya mposo ikobebisa nzoto oyo, naino kati na mosuni na ngai Nakomona Nzambe; Ye oyo Nakomona mpo na oya ngai–…” Ayebaki ete akomona Ye na mikolo ya nsuka, zambi ekozala na lisekwa, Lisekwa ya bato nyoso.
Lipa Ya Mokolo Na Mokolo
Zambi Nayebi ete mosikoli na ngai azali na bomoi, ete akotelema na mokolo ya nsuka likolo na mabele: Mpe ata nde nsima ya mpambo ya loposo na ngai kobebisa nzoto oyo, naino na kati ya mosuni na ngai Nakomona Nzambe;
Yobo 19:25-26