24-0204 EZALI NA MOTO MOKO AWA OYO AKOKI KOPELISA POLE

Nsango: 63-1229M EZALI NA MOTO MOKO AWA OYO AKOKI KOPELISA POLE

BranhamTabernacle.org

Molingami Elembetele Ya Yesu Klisto,

Bato bakanisi ete tozali ligbómá, kofanda kati na ba ndako na biso mpe na masámbo na biso, koyoka ba bande. Bakanisi ete tozali kokufa na nzala. Bazali nde na boyebi moké koyeba ete tozali kofanda kati na bozali ya Pole ya Mwana ya Sánzá ya Mwambe, kotela, mpe koleisama na Bilei Bibombamaki lokola bana na ngombe kati na lopango.

Tozali lisángó likembi koleka, pene ya kozwama. Soko balingi kobika kati na mimesano ya bango, bokende liboso. Biso Te, tozali kobika kati na Pole mpo na mokolo na biso.

Pole mpo na mokolo na biso nde nini? Nzambe Atindi na mokili mwanje na Ye ya nsambo ya nguya kokamba Mwasi na Ye ya libala. Azalaki nani? Azalaki mosakoli. Oyo elobaki ye ekokisami. Azalaki Liloba ya Nzambe limonisami. Azalaki komonisama ya Pole ya Liloba ya Nzambe. Azalaki Pole ya Nzambe mpo na lelo.

Mose akendeki na ye kaka liboso, ata bongo, mpo ete azalaki Bomoi, azalaki Pole ya ngonga. Oyo azalaki na yango, ezalaki nini? Nzambe komonisa Liloba na Ye lilakamaki na nzela ya Mose, mpe Mose azalaki Pole.

Eliya azalaki Pole… Pole! Aleluya! Azalaki Pole. Pole! Azalaki Liloba ya Nzambe limonisami. 

Yoane, ntango ayaki na mabelé… Yesu alobaki: “Azalaki Pole makasi mpe ya kongenga.” Aleluya! Mpo na nini? Azalaki Liloba limonisami.

Na bongo kokokana na Liloba, Pole mpo na mokolo ya biso nde mosakoli ya Nzambe, William Marrion Branham. Ye oyo azali kogánga kati na lisobé ya Babele: “Bobima kati na ye, bato na Ngai, ete bosangana te na masumu na ye.” 

Azalaki bokokisami ya Malaki 4:5, mpe Emoniseli 10:7. Alobaki kaka mpe asololaki: “Ekozala wana,” mpe ezalaki wana, na eloko moko te kati na yango. Azalaki na esénde soki moke te; ata moko ezalaki wana te. Asololaki kaka: “Tika ete ezala,” mpe ezalaki.

Liloba ya Nzambe liyebi kokweya te, mpe esengeli likokisama. Tomoni Pole; Liloba na Ye lilakaki Ye mpo na lelo oyo. Litalisami mpe lindimisami ete ezali Solo. Ezali Pole ya ngonga. 

Ezali na eloko ya kokitana te kati na koyeba ete oyo ezali biso koyoka ezali Liloba limonisami mpo na lelo. 

Ezali na NYAMA MIKÉ YA MIKONDÓ KATI NA YANGO TE… ELOKO TE. Soko basusu basepeli na eloko mosusu, bokende liboso, kasi biso te.

Elingi te koloba ete okoki koyoka mobateli na yo te, to moteyi akoki koteya te; soko moke te, kasi OSENGELI kokongola liloba nyoso ozali koyoka na nzela ya ekongoleli monene ya Nzambe, ETINDA OYO LIKOLO YA BANDE.

Ntango balobaka ete mikolo ya Etindá ya moto moko mileki, yango nde NYAMA MIKÉ YA MIKONDÓ.

Ntango balobaka ete Etindá oyo ezali Etemelo ya bango te, yango nde NYAMA MIKÉ YA MIKONDÓ. Ntango balobaka ete koyoka ba bande ekoki te, yango nde NYAMA MIKÉ YA MIKONDÓ

Eloko monene oyo eleki kaka Kofina Play ezali te, na boyebáká ete okoki koloba AMEN na Liloba moko na moko. 

Ezali na esika mosusu te okoki kosala yango longolá sé boyoki Etindá ya ngonga.

Sikawa tozali Elembetele ya Yesu Klisto mpo na lelo. Tozali Liloba na Ye limonisami. Tozali baoyo Aponaki koyamba Emoniseli na Ye monene koleka na ntango ya nsuka.

TOZALI MWASI NA YE YA LIBALA.

Bobele Mwasi na Ye ya libala nde akozala na Emoniseli ya Pole mpo na lelo. Bakoyeba, ete Pole oyo ekobongisa bango be. 

Pole oyo ezali Molimo Monsanto koloba na nzela ya mwanje na Ye motindami. 

Okolinga kofanda kati na bozali ya Pole ya Nzambe mpo na ngonga? Boye nabiangi yo oyo komibakisa na biso mokolo mwa Lomingo  na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka Ezali Na Moto Moko Awa Oyo Akoki Kopelisa Pole 63-1229M.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya losámbo:

Genese 1:3, Mokapo ya 2

Njembo 22

Yoele 2:28

Yisaya 7:14, 9:6, 28:10, 42:1-7

St. Matai 4:12-17, Mikapo 24 mpe 28

St. Malako Mokapo 16

Emoniseli Mokapo 3