Litéya: 65-0418E Nzambe Abongolaka Nde Makanisi Na Ye Na Ntina Na Liloba Na Ye?
- 26-0412 Nzambe Abongolaka Nde Makanisi Na Ye Na Ntina Na Liloba Na Ye?
- 24-0707 NZAMBE ABONGOLAKA NDELE LIKANISI NA YE LIKOLO NA LILOBA NA YE?
- 22-1218 NZAMBE ABONGOLAKA NDELE LIKANISI NA YE LIKOLO NA LILOBA NA YE?
Balingami Baoyo Bayéisámí Na Bomoi,
Boni mitéma mia bisó mimatákí lokóla ba Mpongo na Nsúka ya póso oyo ya Pásika. Mokolo na mokolo, epakweli ya Ye ekómákí monéne koleka mpe monéne koleka. Elámbo, Bokundami, Bobongi be, nambísa tómbwá monéne koleka Aléngélákí bisó mpo na yango: Ezali Kobima Ya Mói…NKÉMBO, ASÉKWÍ mpe Azali na bomoi kati ya moko na moko na bisó. Azalaki komónisa Liloba na Ye epai na moko na moko na bisó lokola totíkálá koyóka libosó naino soko moké te. Kopakolama etóndisaki mitéma mia bisó, bozali na Ye etóndákí na mopepe; emónánákí lokola ete Konétolama ezalaki pene.
Ayebisákí bisó oyo esálemákí esili koleka mbúla 2000, na nsima oyo ezalaki sikawa kosálema na 2026. Yesu azalaki Mombóto ya Lisángó ya Nzambe ya libosó oyo esékwisamákí longwá na bakúfi. Asékwísámákí na Nguya ya Nzambe oyo ekopésaka bomoi. Nzambe Apésákí nguya na bomoi na Ye, Asekwisaki Ye longwá na bakúfi, mpe Azalaki mbuma ya libosó ya baoyo balálákí. Azaláki ya libosó kotela, Mbuma ya libosó ya Nzambe oyo eningisamákí lokóla ekaniseli ya bopési matóndí epai ya Nzambe, Kondima ete bíso baoyo totíkálí tozali koya. Ezalákí elembo.
NSIMA AMÓNÍSÍ BISÓ OYO ESÁLÉMÍ LELÓ. Pelamókó Aningánísámákí na Mokolo ya Pentekoste wana lokito loyákí koúta na Likoló lokóla lokito ya mopepe ya koninganisa, ya makási mpenza, mopepákí likoló ya bato. Ezalákí koninganisama lisúsu libosó ya bato lokola Alakákí kati ya Luka 17:30 mpe Malaki 4, ntango M-w-a-n-a ya moto akomónisama mpe koninganisama lisúsu likoló ya bato.
Sikawa, Mwana ya moto nde nani? “Na ebandeli Liloba azalaki, mpe Liloba azalaki mboka na Nzambe, mpe Liloba azalaki Nzambe. Mpe Liloba akómákí mosuni mpe afándákí kati na bisó.” Mpe soko malakisi nyoso tozali na yango, mpe endimiseli ya Liloba ya Nzambe; na nzela ya Liloba na Nzambe, na nzela ya bilembo, na nzela ya bikámwiseli, tozali komóna lelo, yango kati na Búku ya—ya Luka awa, yango lokola toúti bobele kozua útá na bozóngeli eténi ya Liloba, to Lu—Luka mokapo ya 17 mpe molongó ya 30; mpe Malakí 4, mpe Makomi ndéngé na ndéngé tomesani na yango, Liloba yango yango lisúsu lininganisámí likoló ya bato, ete bibembe ya mimeseno ya bato mikúfí, mpe Mwana ya Nzambe azali na bomoi lisúsu na libatisa ya Molimó Mosanto alimá kati na bisó, mpe Azali kopesa bisó Bomoi.
Molimó Mosanto akóbákí bobélé koninganisa mpe koninganisa lisúsu likoló na bisó, kokómisa mpe komónisa Liloba na Ye…Dinamíki, mekaníki, Nguyá ya kopesa bomoi…
Na bongo, ntango emónanákí lokola ete ekozala monéne koleka te, Ayebisaki bisó:
“Atíkákí ngai kotála na ngambo ya ezipelo, Mpe Namónákí bino nyoso Kúná…Nyoso oyo olingá ndéle, mpe nyoso alingá yo, bapesameli yo.” Bomóní? Namónákí bango nyoso Kúná lokola bongo. Ezalákí nini? Nguya ya kopésa bomoi.
AMÓNÁKÍ BISÓ KÚNÁ!! Ngámbo ya ezipelo ya ntángo…tozalaki KÚNÁ elongó na ye; balingami na bisó nyoso baoyo bakendékí libosó na bisó…ba tatá, ba mamá, bána. Tozalákí Kúná elongó na bango mpe basúsu nyos’oyo totíkála kokútana na bango soko moké te: Mose, Elia, Petelo, Paulo…tozalaki banso kúná elongó.
Nde, káka lokola Molimó Mosanto molingami Azali, Alingákí te kobósana bisó baoyo tozali kobéla, tozindí kati na mawa mpe tobétámí, boye amíninganísí lisúsu likoló na bisó ete moko na moko ákoka kobika na nyoso tosengelákí na yango.
Bato oyo, baoyo bazali bana mboka ya Bokonzi, mozui ya Nguya ya koyéisa na bomoi, yéisá Yango bomoi epai ya bango, Nkoló, sikawa mpenza. Mpe ézala ete Molimó ákende longwá na mpongo kino mpongo, longwá na Liloba kino Liloba, kino litondi na Yesu Klisto limónana kati na moko na moko ya ba nzóto, mpo ya boséngá ya nzóto, ya molimó, to boséngá nyoso basengeli na bango, lokola tozali kotianela mabóko. Kati na Nkombo na Yesu Klisto.
Liloba yango. Mongóngó yango. NYOSO oyo tozali na yango bosengá ezali likoló ya ba bánde, Mwasi ya libála. Nzambe Abóngolaka Likanisi na Ye te na ntina na Liloba na Ye. Litónó moko te, to motó ya likambo moko te ekokí kobóngolama, na bongo Abongísákí nzela ete Mwasi na Ye ya libála bákoka koyoka na matói ya bango moko MPEZA KÁKA oyo Alingákí koyébisa bango.
Nzambe alobí na Mwasi na Ye ya libala mpe Amónisaki MAKAMBO NYOSO. Etiamáki na masíni. Mwasi ya libála asengeli áya epai ya Mobali ya libála; nde NZELA na Ye ebongí be epésámí oyo esálémákí mpo ya lelo. Ezali YANGO ELOBÍ NKOLÓ.
Nzambe Abóngolaka nde Likanisi na Ye na ntina ya Liloba na Ye? TE. Azali na MOKÁNO MOBONGÍ BE MPE MOKÁNO MOLINGISÁMÍ. Mwasi ya libála asengeli kozala kati ya MOKÁNO MWA YE MOBONGÍ BE.
Ezali na Mokáno mobongí be te, to esiká ebongí be te, koleka koyóka Mongóngó ya Nzambe mbala moko alimá koúta na Nzambe Ye moko.
Mbélá na ngai epai ya moko na moko na bino ezali komíbakisa na bisó mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, koyóka Mongóngó ya Nzambe komemela bisó Liloba Peto. Esengelami na komítúna-tuna te, kaka komísémbola nsima mpe koloba AMEN NA LILOBA MOKO NA MOKO…ezali na esiká mosúsu te oyo yango ekokí kosálema, bobélé na nzela ya KOFINA PLAY.
Ndeko Joseph Branham.
Litéya: 65-0418E—Nzambe Abóngolaka Nde Likanisi Na Ye Na Ntina Ya Liloba Na Ye?
Tokobanda na molongó ya 61.
Makomí ya kotánga libosó ya koyóka Litéya:
Esode Mokapo ya 19
Mitúya 22:31
St. Matái 28:19
Luka 17:30
Emóniseli Mokapo ya 17