24-0623 Libala Pe Koboma Libala

NSANGO: 65-0221M Libala Pe Koboma Libala

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya Libala Peto Oyo Abebisami te,

 Tozali Mwasi na Ye moké ya bolingo;  oyo abébisami te, asimbami te na ebongiseli ya moto moko boye, lilako moko boye libongisami na moto.  Tozali Mwasi ya libala ya Liloba, na bopeto nyoso oyo tobebisami te!  Tozali mwana mwasi ya Nzambe oyo tomemisami zémi.

 Tozali bana na Ye Liloba lilobámi, oyo  azali Liloba na Ye ya ebandeli!  Lisumu lizali te kati na Nzambe, boye lisumu lizali te kati na biso, lokola tozali na elilingi na Ye Moko.  Lolenge nini tokokaki kokweya?  Ekokoka te….EKOKOKA TE!  Tozali eteni na Ye, LILOBA na Ye ya EBANDELI.

 Tokoki koyeba oyo na ntembe Soki moké te boni? EMONISELI.  Biblia mobimba, Etindá oyo, Liloba ya Nzambe, ezali nyoso Emoniseli.  Bongo nde toyebaka soló kati na Mongóngó moye na mingóngó misusu minso, zambi Ezali Emoniseli.  Mpe Emoniseli na biso ezali mpenza elongo na Liloba, ekeseni na Liloba te.

 Mpe likolo ya libanga oyo” (emoniseli ya molimo ya oyo Liloba ezali) “Nakotonga Lingomba na Ngai;  mpe bikuke ya ewelo bikoki koningisa Yango soko moke te ete likwéa.”  Mwasi na Ye akomekama na babali basusu te.  “Nakotonga Lingomba na Ngai, mpe bikuke ya ewelo bikokí koningisa Yango soko moke te.”

 Tokozala solo mpe sembo na Liloba na Ye mpe Mongóngó na Ye, kaka.   Tokobebisama ata moke te na mobali mosusu to kosala ekobo.  Tokotikala Mwasi ya libala na Ye Moseka Liloba.   Tokotala te, tokoyoka te to toko fina líso na liloba mosusu atá nini te

 Ezali na nsé kati ya mitema na biso.  Tokokaki ata moke te kozala na mobali mosusu, kasi MOBALI na biso MOKO, Yesu Klisto, Mobali moko, Nzambe, Emanuele .  Mwasi na Ye akozala nkóto na nkóto mbala nkóto na nkóto.  Yango ezali kotalisa ete Mwasi ya libala asengeli koúta na Liloba.  “Nkolo moko Yesu, mpe Mwasi na Ye ya libala ebelé, bókó.”

 Tosengeli kokanisa mpe kosósola oyo ezali mpo ya moto nyoso te, libóké ya mosakoli KAKA.  Babili na ye moko.  Etindá oyo ezali kaka mpo na bango, etonga moké Molimo Mosanto apesaki ye mokumba ya koyangela.

 Nzambe akotuna ye mpo na maye ayebisi biso, mpe Nzambe akotuna biso, bandimi na ye útá na mikili misúsu, baoyo amemi epai ya Klisto, mokumba ya kondima Liloba moko na moko na Yango mpe kosala boyokani ata moke te. 

 Boni ezali bikamwa mpo na biso kofanda mpe koyoka Ye koyebisa biso lolenge nini tozali Baponami na Ye.  Lolenge nini Mwasi-libala na Ye ya liboso, mpe Mwasi-libala ya mibale, bazangelaki Ye;  kasi biso, Mwasi-na-libala na Ye monene ya ntango ya nsuka tokozangela YE SOKI MOKÉ TE.  Tokotikala Mwasi ya Liloba na Ye ya solo, ya sembo, ngɔndɔ kino na nsuka.

 Kondima na biso kati na Liloba na Ye ekólaka mokolo na mokolo monene koleka.  Tozali komibongisa na boyókáká mpe botósáká Liloba na Ye moko na moko, koyoka Mongóngó na Ye koloba na biso, kotanga Biblia na biso, kosambela mpe kokumisa Ye mokolo mobimba.

 Toyebi Azali koya noki mpenza.  Monúti nyonso sikawa.  Lokola Noa, tozalaki kolikia ete Azalaki koya lobi;  mbala mosusu lobi na ntongo, midi, na mpokwa, kasi toyebi Azali koya.  Mosakoli ya Nzambe na Liloba na Ye basalaka mabunga te, AZALI KOYA.  Tozali koyoka ete ezali mokolo ya 7, mpe tokoki komona mapata kokangama mpe matangá manéne ya mbula kokwea;  ntango ekoki.

 Tobatelami mpe na nzoto makasi kati na Masuwa, kozila na etingia monene.  Boya komibakisa na biso lokola tozali koyoka Mongóngó ya Nzambe kobɔndisa biso Lomingo loye na 12:00 nsima  ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka: Libala Mpe Bobúki Libala 65-0221M.

 Ndeko.  Joseph Branham,

 Makomi ya kotánga liboso ya koyoka Liteya:

 St. Matai 5:31-32 / 16:18 / 19:1-8 / 28:19

 Misala 2:38

 Baloma 9:14-23

 Timote ya liboso 2:9-15

 Bakolinti ya liboso 7:10-15 / 14:34

 Baebele 11:4

 Emoniseli 10:7

 Genese mokapo ya 3

 Lewitiko 21:7

 Yobo 14:1-2

 Yisaya 53

 Ejekiele 44:22

24-0616 Esika Ya Kosambela Oyo Nzambe Aponi

NSANGO: 65-0220 Esika Ya Kosambela Oyo Nzambe Aponi

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mama Yesu Klisto,

Soko tolingaki kotuna motuna na ntina ya eloko soko nini kati na bomoi ya biso, ekozala na eyano ya solo. Ekoki kozala na eloko moko pene na yango, kasi esengeli ézala na eyano moko ya solo, mbala moko na motúna moko na moko. Na ntina wana, motúna nyoso moyáka na bomoi na biso, esengeli ézala na eyano moko ya solo, sémba.

Soko tozali na motúna ya Biblia, esengeli ézala na eyano ya Biblia. 

Tolingi te éúta na libóké moko ya bato, koúta na bondeko moko boye, to longwa na molakisi moko boye, to longwa na ebongiseli moko boye. Tolingi éuta mbala moko na Makomí. Esengeli tóyeba: Esika ya solo mpe alimá ya Nzambe kosambela Ye ezali nini?

Nzambe aponaki kokútana na moto; ezalaki kati na lingomba moko te, kati na ebongiseli moko te, kati na endimeli moko te, kasi kati na Klisto. Nde esika sé moko Nzambe akokutana na moto, mpe akoki kosambela Nzambe ezali kati na Klisto. Nde esika sé moko. Likambo te ózala Metodisiti, Batisiti, Katoliko, Protestáti, ézala atá nini okoki kozala, ezali na esika bobele moko oyo okoki mpenza kosambela Nzambe, nde kati na Klisto.

Esika ya Nzambe alimá kaka moko, mpe eponámi kosambela Ye ezali kati na Yesu Klisto; nde nzela na Ye bobele moko.

Biblia elakáki biso Mpongo moko kati na Malaki 4; Likonzi ya Pole esengeli na biso kolanda. A kotalisa lingomba lizali koyenga-yenga na nzela ete Azali Baebele 13:8, Yesu Klisto lolenge moko lobi, lelo, mpe libela. Tolakámí mpe kati ya Luka 17:30 ete Mwana ya moto (Mpongo) akozala komimonisa Ye moko epai ya Mwasi na Ye ya Libala.

Kati ya Emóniseli 4:7, ayebisi biso ezalaki na Nyama minei, na oyo ya libosó kozala nkosi. Nyama elandaki ezalaki ngombe. Nsima, oyo ezalaki koya na nsima ezalaki moto; moto yango ezalaki nde babongisi makambo, boyekoli ya moto, teoloji, mpe bongo na bongo.

Kasi Biblia elobaki na ntango ya mpókwa, Nyama ya nsuka ezalaki koya ezalaki Mpongo kopumbwa. Nzambe akopesa na Mwasi na Ye ya libala ya ntango ya nsuka Mpongo; Mwana ya moto Ye moko, komimonisa kati ya mosuni kokamba Mwasi na Ye ya libala.

 Biblia mpe elobi makambo ya kala manso, kati na Kondimana ya kala, mazalaki bililíngí ya makambo makoyá. Wana elilingi yango ezali koya pene, elilíngí emelámí kati ya likambo yango mpenza. Oyo esálemáki ndèle ezali elilingi ya oyo esengelaki kosalema lelo.

 Kati na I Samwele 8, Kondimana ya ya Kala eyebisi biso Nzambe apesaki Samwele mosakoli kokamba bato. Bato babelemaki na ye mpe bayebisaki ye balingi mokonzi. Samwele azalaki na kolémwa na motindo ete motema na ye mozalaki pene ya kolemba.

Nzambe azalaki kokamba bato na Ye na nzela ya masakoli na Ye oyo amikabaki, andimisamáki na Makomí mpe ayokaki ete abóyámaki. Ayanganisaki bato mpe abondelaki bango ete bátangwa te na Nzambe oyo amemaki bango pelamoko bana, mpe afulúkisaki bango mpe apambolaki bango. Kasi bayikaki mpiko.

Balobaki na Samwele: “Otikalá kozala na libunga te kati ya kokamba na yo. Otikala kozala na mayele mabe te kati na makambo matali mosolo. Osalaki manso na yo kobatela biso na molongó ya Liloba ya Nkolo. Tosepelaka na bikamwiseli, bwanyá, kopesama mpe kobatelama ya Nzambe. Tondimí yango. Tolingí yango. Mpe na koleka tolingi te kozala soki na yango te. Ezali kaka ete tolingí mokonzi oyo akokamba biso kati na etumba.

Sikawa na solo mpenza ntango tobimi mpo na etumba ezali naino mpósa na biso kozala na banganga kokende liboso elongo na Yuda azali kolanda, mpe tokoyúla keleló, mpe kogánga mpe koyemba. Tozali na mpósa te ya kotelemisa soko nini na yango. KASI TOLINGÍ MOKONZI OYO AZLI MOKO NA BISO KOKAMBA BISO.”
    

 Oyo ezalaki bato ya ebongoseli te ya mokolo wana. Oyo ezalaki mpenza nde bato baoyo balobaki ete AZALAKI MPEZA nde mosakoli ya Nzambe oyo aponamáki na Nzambe kokamba bango.

“Ee, ozali mosakoli. Tondimí Etindá. Nzambe amónisaka Liloba na Ye epai na yo, mpe tolingi Yango, mpe tolingi te kozala tozángi Yango, kasi tolingi moto moko libanda na YO kokamba biso; moko ya biso mpenza. Tozali naino kaka na mpósa ya koloba tondimí Etindá omemelaki biso. Ezali Liloba. Yo nde mosakoli, kasi ezali kaka yo te, to nde Mongóngó ya litomba koleka.

Ezali na bato malamu na mokili lelo, mangomba malamu. Kasi mama Yesu Klisto azali moko, mpe biso nde Ye, baoyo Azali koyela; Mwasi Liloba na Ye ngondo peto oyo akotikala na MONGÓNGÓ YA NZAMBE BOBELE MOKO MONDIMISAMI MPE MOKOKISAMI KOZALA YANGO ELOBI NKOLO.

Soko okosepela komibakisa na biso Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville,  tokozala naino na ekanganeli ya telefóne na mokili mobimba koyoka. Oyo nde ekosalema.

Tambola likolo na Bandeko na ngai mibali, bandeko basi, baninga na ngai, awa na esika oyo na mpokwa oyo mpe kuna libanda na nzela ya telefóne. Ebelé na bitúka bikeseni bazali koyoka longwa na libóngo ya Monyele kino Eloli. Nabondeli, Nzambe molingami, na nsé kuna ngambo ya masóbé kuna na Tucson, epai kuna na California, likolo kuna na Nevada mpe Idaho, epai na ngambo na Monyele mpe nzingánzingá, na nsé kuna na Texas; na ntango mbela oyo epesami, bato bafandi kati na—kati na mwa mangomba, bizueli ya pitoló, ba ndako, koyoka. E Nzambe,  tika ete mobali, mwasi, elengé mobali, elengé mwasi oyo abúngí, na ngonga oyo, aya epai na Yo. Sala yango bobele sikawa. Tosengi yango kati na Nkombo na Yesu,  ete bázwa esika oyo ya kobatelama wana ntango ezali.

 Sikawa, Nkolo, mondengé oyo mokutánámi, ete Satana, mobángisi monene,  azali na makoki te ya kokanga mwana ya Nzambe. Azali ekelámu elongami. Yesu Klisto, esika sé moko ya losambo, Nkombo bobele moko ya solo, alongaki ye na Kalvari. Mpe tosengi Makila na Ye bobele sikawa, ete Alongaki mpasi nyoso, bokono nyoso.

Mpe Nazali kobianga Satana ete álongwa na bayoki oyo. Kati na Nkombo na Yesu Klisto, bimá kati na bato oyo, mpe bázala nsómí.

Moto nyoso oyo ayambi lobiko ya nzóto na ye likolo ya mobóko ya Liloba likomámí, sala litatoli na yo na nzela ya botélémáká na makolo na yo mpe loba: “Nayambi sasaipi lobiko na ngai kati na Nkombo ya Yesu Klisto.” Botelema na makolo na bino.

Masanzoli epai ya Nzambe! Nde yango. Botala epai oyo, motindo bakakatali mpe makambo ya motindo yango bazali kotelema. MASANZOLI epai ya Nzambe! Nde yango. Ndima kaka. Azali awa.

Ndeko Joseph Branham  

Esika Ya Losambo Eponami Ya Nzambe 65-0220

Makomi ya kotanga liboso ya boyóki Liteya:

Dutelonome 16:1-3

Esode 12:3-6

Malaki Mikapo ya 3&4

Luka 17:30

Baloma 8:1

Emoniseli4:7 

24-0609 Lelo Oyo Likomi Oyo Ekokisami

NSANGO: 65-0219 Lelo Oyo Likomi Oyo Ekokisami

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi ya libala Mombóto ya Bokonzi ya Molimo ya Likoló koleka,

Kozila lisusu te, komituna lisusu te, TOSILI TOKÓMI!  ToZALI Mwasi ya libala Mombóto ya Bokonzi ya Molimo ya Likoló koleka.

Momboto ya Molimo epai ya Mwana ya Bokonzi alakamaki.  Libóké moko boye te na mikolo mikoya;  libota likoyá te;  tozali kobika na mokolo ya nsuka, tozali libota likomóna Yesu Klisto kozónga na mabelé.

 Lelo oyo, Likómí Liye Likokísámí!

Nsango Malamu yango moko, Nguya yango moko, MWANA ya moto yango moko oyo azalaki lobi, azali lelo, mpe akozala libela.

 Lelo oyo, Likómí Liye Likokísámí!

Baninga balingami na Arizona, California, Texas, kati na Amerika mpe NA MOKILI MOBIMBA baoyo bazali koyoka bande oyo na nzela ya ekanganeli;  M-w-a-n-a ya Nzambe yango moko oyo ayaki na ebimelo ya ntango mpe amindimisaki lokola Nzambe amonisami kati na mosuni, azali M-w-a-n-a ya Nzambe yango moko na ndambo ya mokili na elimwelo ya ntango awa, oyo azali komitálisa kati na lingomba na mpokwa oyo, lolenge moko lobi, lelo, mpe libela.  Pole ya mpokwa ya Mwana eyei.

 Lelo oyo, Likómí Liye Likokísámí!

Mongóngó ya Masiya, oyo azalaki kotelema mpe koloba na etéyelo na mokolo na Ye, komiyébisa elongo na Liloba ya elaka mpo na eleko wana, azali Mongóngó yango moko ya Masiya, koloba na Mwasi na Ye ya libala lelo na mokili mobimba likoló ya ba bande, koyebisa  biso: Nazali lolenge moko lobi, lelo mpe libela.  NAZALI Mongóngó ya Nzambe epayi na BINO.  BOZALI MWASI NA NGAI YA LIBALA MOMBÓTO YA BOKONZI YA MOLIMO  oyo atikali elongo na Liloba na Ngai.

 Lelo oyo, Likómí Liye Likokísámí!

Mobúlungano molekí koleka kati ya bato lelo na lolenge ete bazangi komona Solo ya Nzambe. Ezali mpo ete ndimbolá-ndimbola ya bato ileki na Liloba ya Nzambe. Nzambe asengeli na moto moko te álimbola Liloba na Ye. Azali molimboli na Ye moko. Atindelaki Mwasi na Ye ya libala mwanje mosakoli Emoniseli 10:7 ya Ye mikolo ya Mongóngó kolimbola Liloba na Ye. Ezali YANGO ELOBI NKOLO.

 Lelo oyo , Likómí Liye Likokísámí!

Olobi, “soko Názalaka kuna ntango Yesu azalaki awa na mabelé, nalingaki kosala boye na boye.”  Malamu, wana ezalaki eleko na yo te.  Kasi, oyo nde eleko na yo, oyo nde ntango na yo.  Mongóngó nini nde ozali koloba ezali Mongóngó ya Nzambe?  Mongóngó nini nde ezali Mongóngó ya litombá mingi mpo na yo? 

 Lelo oyo, Likómí Liye Likokísámí!

Zábolo azali kotambola-tambola lokola liboso naino te kobundisa Mwasi na Ye ya Libala.  Akoki kosala ete ókanisa ozali na malali to bokono ya lolenge moko boye, to kobundisa libota na yo.  Ntango mosusu Nzambe atikaka makambo mákóma molili makasi na motindo ete okoki komona likoló te, zingazinga, to esika mosusu te.  Na nsima Ayei mpe afungolí nzela kati na yango mpo na yo, ete okoka koloba, “Nazali mombóto ya Agála te, nazali mombóto ya Sala te, nazali ata mombóto ya Malia te, nazali Mombóto ya Bokonzi ya Likoló koleka ya Abalayama na Molimo ya Nzambe.  Nazui Liloba ya Nzambe lilakámí mpo na ngai, Ezali Yango Elobi Nkolo.  Nakoningana te.  Ata émónana motindo nini, zabolo áloba nini.  Nyoso nazali na yango bosenga, Nakozua Nzambe na Liloba na Ye.

 Lelo oyo, Likómí Liye Likokísámí!

Mongóngó ya Nzambe mosili koloba.  Nabombi Bilei nyonso ya Molimo bosengeli na yango.  Bóloba KAKA oyo ezali likoló ya ba bande.  Nazali Mongóngó ya Nzambe epai na bino.  Liloba na ngai ezali na bosenga ya ndimbola moko te.  Boswana to bóbunda te, bólingana, KASI bótikala na LILOBA NA NGAI.

 Lelo oyo, Likómí Liye Likokísámí!

Zalá na nsé te.  Zindá na mawa te.  Tika te ete Satana áyiba ESENGO na yo.  Kanisa oyo EZALI  yo, wapi ozali kokende, ndenge makambo makozala na Elambo monene wana ya Libala.  Kobika na Mboka kitoko wana Atongáki kaka mpo na yo.  Epai wapi okozala kati na Seko na Seko elongo na Ye mpe baoyo nyonso bakendeki liboso.

Bokono lisusu te.  Mpasi lisusu te.  Kufa lisusu te.  Bitumba lisusu te.  Kaka Bomoi ya Seko elongo na Ye.  Na nsima, tokoloba:

 Lelo oyo, Likómí Liye Likokísámí!

Tózala na molili te mpe toloba, “Nalembí mpenza  esika oyo, nalingi kobima awa.  Tíka ete tóloba yango boye: Azali koya monúti sé monúti sasaipi, MPONA NGAI…NKEMBO!   Nakoki kozila te.  Nakomona balingami na ngai nyoso.  Bakomónana mpenza liboso na ngai, nsima nakoyeba, ESILI, TOKOMI.

 Nsima, na nsé ya mwa ntango ya kobwéta liso, tokozala biso banso elongo na ngambo mosusu.

Tosepela mpe tózala na esengo, mpo ete Libala ya Mwana-Mpate ekómi pene, mpe Mwasi na Ye ya Libala…Mwasi na Ye ya Libala amibongisi.

Soko olingi kozala na esengo, mpe kozala na Libala ya Mwana-Mpate elongo na biso, yaka komilengela Lomingo loye elongo na biso na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka:

 Lelo oyo, Likomí Liye Likokisámí 65-0219

 Ndeko.  Joseph Branham

 Makomi ya kotánga:

 St. Yoane Mokapo ya 16

 Yisaya 61:1-2

 St. Luka 4:16

24-0602 MOMBOTO EZALI MOSANGOLI NA LIBULA ELONGO NA EZIPELO TE

Nsango: 65-0218 MOMBOTO EZALI MOSANGOLI NA LIBULA ELONGO NA EZIPELO TE

BranhamTabernacle.org

Molingami Momboto Ya Bokonzi Ya Abalayama, .

 Natindi mbote na mokili mobimba, epai na Bango oyo bayangani elongo, koyoka na nzela ya ekanganeli, koleisa milimo na Bango na Máná mobésu ya sika mazali kokwéa longwa na Lola.  Ozali mosómbami ya Makila ma Yesu Klisto Ye moko.

 Nkolo Yesu, nabondeli ete Ópakola maloba na mpokwa ya lelo na boyóki ya litoi nyonso oyo ezali na nsé ya loláká ya Bonzambe.  Mpe Soko ezali na basusu awa, to koyoka, longwa na ekolo mobimba.

 Nzambe azali kopakola matoyi ya moko na moko na biso, lokola tozali koyoka útá na mokili mobimba mpe koyoka lolaká ya Bonzambe ya Mongóngó ya Nzambe koloba na biso, Oyo Elobi Nkolo.

Tozali Lingomba ya Nzambe ya solo mpenza, libótámi mbala ya mibale oyo lindimaka Liloba NYOSO ya Nzambe liboso ya eloko ata nini, ézala nini, zambí ezali Mongóngó ya solo ya Nzambe koloba.

 Nzambe azali komimonisa kati na biso, Lingomba Mwasi na Ye ya Libala.   Tozali bamemi Mombóto te, TOZALI MOMBOTO YA BOKONZI.  Mobimba ya Bomoi na Ye oyo ezalaki kati na Ye emibótí lisusu kati na biso, Lingomba Mwasi ya libala ya solo, mpenza kobimisa Liloba mobimba ya Nzambe na litóndi na Yango mpe na makasi na Yango.

Ekoki kozala lisusu na bileko ya lingomba te nsima ya oyo.  Tozali na nsuka, bandeko mibali mpe basi.  Tozali awa.  Tokómí.  Matondi epai na Nzambe!

Tozali na nsuka.   Tosili kokóma.  Mwasi ya libala AYEBI tozali banani. Ezali ntango ya Mombóto Mwasi ya libala. Bizipelo bikúfi. Baizipelo bikaóki. Tozali Liloba ya Nzambe libótámi moseka oyo amonisami, Yesu Klisto lolenge moko lobi loleki, lelo, mpe libela.

Tokosimbama te.  Moto moko te akotia maboko na ye kati na biso. TOZALI Mbotama bongondo ya Mwasi ya libala.  Topesami motindo na Nzambe ete tótikala sembo na Liloba peto ya bongɔndɔ.  Esengeli Mombóto mofánda na Bozali ya Mwana, Molimo Mosanto, Mongóngó ya Mwana ya Moto, mpo Mókoka kotela.  Mpe epai na biso, ezali KAKA NA NZELA MOKO: FINA PLAY MPE YOKA MONGÓNGÓ YA MWANA YA MOTO YE MOKO.

Mpe Nalobi ete ezali na Lingomba moko Liponami esika moko boye na mokili oyo, lizali komibimisa mpe komitia pembeni longwa na makambo wana, mpe komonisama ya Nzambe ebendi bokébi na Yango.  Tozali na mikolo ya nsuka.

 Tozali ba Mpongo ya Nzambe.  Kokakola-kakola ezali te kati na biso.  Tokoki kolia kaka Manna ya sika.  Tozali lokola bana ya ngɔmbɛ na kati ya lopango.  Toliaka kaka Bilei Bibómbamáki biye bipesamaki mpo ya biso.

Tozali komona ba Mpongo ya Nzambe na mokili mobimba kolinga Mana wana ya sika.  Bakokoba koluka-luka kino bakozua Yango.  Bakopumbwa likolo mpe likolo koleka.  Soko moko ezali te na lobwaku oyo, akomata mwa likolo koleka.  Balingi Liloba na Nzambe mobésu útá na Mongóngó ya Nzambe.  Sekó na Sekó ya bango ezali kopema likolo na Yango.  Epai nzóto ezali, ba Mpongo bazali koyangana.

 Molimo na Ye ayei likoló na biso kosala makambo yango moko masaláki Ye.  Ezali kobota ya Mbuma lisusu.  Tozali Mombóto ya Bokonzi ya Kondima ya Abalayama oyo tozuaka nyonso ekeseni na Liloba ya Nzambe mpe kobianga yango lokola nde ezali te.  Tokoki te kotia ntembe to kolongola Liloba moko ya Nzambe na esika na yango, mpo tondimi Ezali OYO ELOBI NKOLO. Yesu Klisto lolenge moko lobi loleki, lelo, mpe libela.

 Nzambe Molingami, tika te ete topesa Yango mokɔngɔ, mpo na mwa bolémá ya mokili, kasi tika ete toyamba Ye na mpokwa ya lelo na motema na biso mobimba.  Nkolo, kela kati na ngai molimo malamu, Molimo ya Bomoi, ete nakoka kondima Maloba ma Yo manso, mpe náyamba Yesu Liloba, lolenge moko lobi loleki , lelo, mpe libela, mpe kondima lelo eteni oyo epésami na eleko oyo.  Pesa yango, Nkolo.  Nasengi yango na Nkombo ya Yesu.

 Nalingi kobianga yo óya koyoka Mongóngó ya Nzambe mondimisami mpo na ntango ya nsuka lokola Azali kopesa biso Bilei ya Mpongo;  elaká ya Nzambe.  Esengeli na kondima ya bongɔndɔ na Liloba oyo ya Nzambe mpo na kozala Mwasi na Ye ya libala.

 Ndeko  Joseph Branham   

 Ntango:
12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville

 Liteya:
Mombóto Ezali Mosangoli Ya Libulá Elongó Na Ezipelo Te 65-0218

 Makomí:
 St. Matai 24:24
 St. Luka 17:30
 St. Yoane 5:24 / 14:12
 Baloma 8:1
 Bagalatia 4: 27-31
 Baebele 13:8
 1 Yoane 5:7
 Emoniseli 10
 Malaki 4

 Kasi ntango oyei koloba, “Ngai mpe Tata na Ngai tozali Moko,” mpe makambo maye masusu, nde ezipelo etángwaka mosika na Yango.  Kasi Lingomba mpenza ya solo, Mwasi ya libala ekobimisa Liloba mobimba ya Nzambe, na litóndi  na Yango mpe na makasi na Yango, mpo ete  Azali lolenge moko lobi loleki, lelo, mpe libela.

 65-0218 – ” Mombóto Ezali Mosangoli Ya Libulá Elongó Na Ezipelo Te

 Momemiami William Marrion Branham

 Yesu Klisto lolenge moko lobi loleki, lelo, mpe libela, Molimo moko moyei epai Mwasi ya libala kosala makambo mangó moko masalaki Ye.  Bomoni?  Ezali kofuluka ya Mbuma lisusu.

65-0218 – ” Mombóto Ezali Mosangoli Ya Libulá Elongó Na Ezipelo Te

 Momemiami William Marrion Branham

24-0526 Moto Oyo Azali Kokima Longwa Na Bozali Na Nkolo

Nsango: 65-0217 Moto Oyo Azali Kokima Longwa Na Bozali Na Nkolo

BranhamTabernacle.org

Balingami ya mobembo ya Niniwe,

Tata, esika Nzóto na Yo ezali, Ba Mpongo na Yo bazali koyangana elongo.  Ozali koleisa biso na Manna na Yo ya Bonzambe.  Pesa na bomoto na biso oyo tozali mpenza na yango bosenga.  Tozali na mposa ya Yo Tata.  Tozali na Maboko na Yo.

Tozali kolala na bozali na Yo, kotela, na boyókáká Mongóngó na Yo.  Mwasi ya libala asengeli kozwa mikano na bango mpe kokutana na yango.  Ezali to malamu to mabe.  Koyoka Mongóngó na Yo mondimísámi nde eloko ya litómbá koleka oyo Mwasi na Yo ya libala asengeli kosala to te?  Soko Ezali malamu, tosala Yango.  Kozila lisusu te, luka sikawa koyeba nini ezali Solo mpe nini ezali malamu, mpe tikala na Yango.  Toyebi ete Ezali Solo, toyebi Ezali Nzela na Yo epesami mpo na lelo.

Nasengeli koganga, “Nkosi engulúmí, nani kobanga te?  Nzambe alobi, nani akosakola te?”  Tomoni Yango kati na Liloba.  Olaki Yango.   Nani akoki kokanga motema mpe kozala nyé?

Tolingi likanisi ya bato ebelé te.  Tolingi Solo.  Mpe tolingi te, to (lingi) tolingi te ko—tolingi te kokutana na eloko mosusu kasi oyo Nzambe alobaki ezali Solo.

Ntango ekoki ete osengeli kokána ozali na masuwa nini.  Ozali koleisama na Liloba lilobami mbala moko útá na Mwana ya Moto, to eloko mosusu?  Moto moko azali nde koyebisa yo ete osengeli koyoka mingóngó misúsu mpo ozala Mwasi na Ye ya Libala?  Koyoka ba bande na ba bandako na bino to na mangomba na bino ezali eloko ya litombá koleka te oyo Mwasi ya libala akoki kosala?

Ozali koyoka mongóngó ya nani?  Mongóngó wana ezali koyebisa yo nini?  Likoló ya mongóngó nini nde ozali kotia Sekó na Sekó na yo, mpe ya libota na yo?

Ezali ngai te, ezalaki mwanje ya nsambo te, oo, te;  ezalaki komonisama ya Mwana ya moto.  Ezalaki mwanje te, etindá na ye;  ezalaki libombami oyo Nzambe afungóláki.  Ezali moto te;  ezali Nzambe.  Mwanje azalaki Mwana ya moto te;  azalaki motíndami útá na Mwana ya moto.  Mwana ya moto azali Klisto;  Nde Oyo bozali koleisama útá na Ye.  Bozali koleisama na moto te;  moto, maloba na ye makokwéa.  Kasi bozali koleisama na Nzoto-Liloba ya Mwana ya moto liyebi kokwéa te.

Bóyoka mongóngó moko te oyo ezangi kotia Mongóngó wana, Nzoto Liloba oyo ezangi kokwéa ya Mwana ya moto, libosó na bino NAINO .  Bakoki koteya, kolakisa, to kosala nyonso oyo Nzambe abiangi bango kosala, kasi bazali TE Mongóngó ya litombá koleka BOSENGELI KOYOKA.

Soko bandimaki yango, wana balingaki koyokisa Mongóngó wana ntango boyángáni elongó mpe koyebisa bino: “Mongóngó oyo, likoló ya ba bande, ezali Mongóngó ya motuya mingi koyoka.  Yango, mpe YANGO kaka nde, OYO ELOBI NKOLO.”

 Ozali na bolingo na Mongóngó nini?  Mpo na nini asalaki ete Mongóngó na Ye étiama na bande  mpe ébómbama?  Nzambe aponaki Mongóngó ya nani mpo na koloba Liloba na Ye mpo na mokolo na biso?

Na nzela ya mosakoli na Ye oyo apesamaki, oyo Abongisaki kokita kuna mpe kobianga etindá wana, sikawa, amonanaki lokola Akokaki kotinda mosakoli mosusu, kasi Abongisi Yona, mpe kútu Eliya akokáki kosala te, Yilimia akokaki kosala te, .  Mose akokaki kosala te, ezalaki Yona nde asengelaki kokende na Niniwe.  Yango nde ezalaki nyoso na yango.  Apesaki ye lotómo mpe ayebisaki ye akende.  Mpe ntango Alobi, “Kende kuna, Yona, kende na Niniwe,” moto mosusu te akoki kokende kosala yango bobele Yona.

Nzambe abongisaki biso liboso na bomoi oyo.  Mongóngó oyo ezali koloba Maloba ya Bomoi ya Seko epai na biso.  Epai na biso, oyo ezali Nzela epésami na Nzambe.  Oyo ezali Masuwa na biso.  Soko ozali na masuwa kokende na Talasisi, kita liboso ete ntango  éleka.

 Sok’ozalaki komituna, to ozali na mituna na motema na yo nzela nini osengeli kokende to nini osengeli kosala, yaka komibakisa na biso.  Kótá na Masuwa elongo na biso.  Tozali kokende na Niniwe, kogánga.  Tozali kotika masuwa wana ya Talasisi kokita na yango soko balingi.  Tozali na lotómo liboso ya Nzambe, nde Etindá oyo tozali na mokumba na yango.

 Nazali koloba te ete soko okei na losambo oyo eyókaka ba bande te ezali masuwa ya Talasisi, kasi soko MOTO ATA NANI azali kotia te Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande lokola Mongóngó ya litombá koleka osengeli koyoka, epusí malamu ótála-tala  komóna nani azali kapiténi ya masuwa na yo mpe esika nini masuwa na yo ezali kokende.

 Nabiangi yo komibakisa na biso mokolo  mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola Kapiteni ya Masuwa na biso azali koloba mpe komemela biso Liteya: Moto Oyo Azali Kokima Longwa Na Bozali Ya Nkolo 65-0217.

 Tika bobele ete tóbanda kolamukisa oyo malamu.  Solo!  Ozali kozila nini?  Tondimi ete Boyei ya Nkolo ezali penepene, mpe Akozala na Mwasi ya libala, mpe Eléngélámi.  Mpe tolingi te masuwa moko boye ya Talasisi sóngóló-pakala.      Tozali kokende na Niniwe.  Huh!  Tozali kokende na Nkembo. Amen.  Ezali solo.  Tozali kokende epai wapi Nzambe akopambola, mpe yango nde tolingi kosala.

 Ndeko.  Joseph Branham

 Makomi ya kotánga:

 Yona 1:1-3

 Malaki 4

 St. Yoane 14:12

 Luka 17:30

24-0519 MITUNA MPE BIYANO #4

Nsango: 64-0830E MITUNA MPE BIYANO #4

BranhamTabernacle.org

Balingami Libota ya Bande,

Nalingi koloba bino, libota na ngai, mpe libota libanda kuna na mokili esika to…epai wapi ba bande ya biso ikendeke.

Yango nde biso, Libota ya Bande ya mosakoli;  bana na ye baoyo bapalangani na mokili mobimba, baoyo abótelaki Klisto.  Ba oyo Tata apesi Emoniseli na Ye moko na mikolo oyo ya nsuka.

 Nalingi koyéisa bango nyonso elongo moko ya mikolo oyo, bomoni, Tata akosala yango, na nsima tokozala —tokozala na Ezalelo epai wapi tokosengela lisusu te kotámbola-tambola.

NALINGI KOYEISA BANGO NYOSO ELONGO. Ezali kosalema sikawa mpenza.  Etindá oyo, Liloba na Ye, ba Bande oyo izali kosala yango mpenza: koyeisa Mwasi ya libala banso elongo, kosangisa biso lokola LIBÓKÉ MOKO útá na mokili mobimba.  Ezali na eloko mosusu te bobele Mongóngó na Ye;  Mongóngó ya Nzambe likoló na ba bande, oyo ekoki koyeisa Mwasi na Ye ya Libala elongo.

Mpe yo, ntango otondi na Molimo, oyo nde moko ya bilembo ya malamu koleka nayebi: ozali mpenza na bolingo na Klisto mpe ondimi Liloba nyonso lilobí Ye kozala Solo.  Bomoni?  Yango nde elembeteli ete ozali na Molimo Mosanto.  Mpe bomoi na yo etondi na esengo, mpe —mpe oo oo, nyonso ekeseni (bomoni?) koleka oyo emesénéki kozala.  Yango nde Molimo Mosanto.

Mitema mia biso, mabánza mpe milimo na biso itóndí na esengo kotónda, bolingo mpe Emoniseli, na motindo ete tokoki mpenza komipekisa na mpási.  Liteya nyonso toyokaka ememaka Emoniseli koleka.  Tomoni tozali banani mpe nini tozali kosala kozala kati na Mokáno mwa Ye mobongí be.  Ezali na eloko moko te ekoki kotángola biso na oyo Nzambe atii kati ya mitema na biso.  Kofina Play ezali Nzela epésámí na Nzambe mpo na lelo.  Kokanisa te, kolikia te, ezali te kotuna Molimo Mosanto: “oyo nautakí koyoka ezali nde Liloba ya solo?”  “Nasengeli nde kotala yango na Liloba?”

Biso te.  Oyo toyókaka likoló ya ba bande EZALI LILOBA.  Liloba yango toyokaka likoló ya ba bande ezali LILOBA SÉ MOKO lindimísámáki na Molimo Mosanto Ye moko, Likonzí ya Móto, kozala Oyo Elobí Nkolo epai ya Mwasi ya libala.

Soko moto moko alobi na biso: “Ezali na makambo mingi malobámí likoló ya ba bande oyo mazalaki kaka Ndeko mobali Branham kosolola, kasi Liloba lipakólámi te.  Yango ezalaki kaka moto.  Molimo Mosanto akambaki biso na oyo ezali Liloba mpe oyo ezalaki kaka Ndeko Branham kosolola.”

 Epai na biso te.  Tondimi na biso kaka oyo mosakoli ayebisaki biso tóbósana soki moké te.

Nalingi ete bóbósana Liloba wana soki moke te.  Oyo elobákí Mose Nzambe akumisaki, mpo Liloba ya Nzambe lizalaki kati na Mose.

Tokobosana soki moké te oyo mosakoli alobaki, mpe tondimi Yango;  zambí Ekomami na ekomeli ya ebendé likolo ya mitema na biso.  Oyo alobaki likoló ya ba bande, Nzambe akumisaki Yango, mpe tondimi Yango.

Ezali te na lokúmu lonéne koleka kofanda mpe koyoka Mongóngó ya Nzambe koloba na biso.  Akozala koloba na Mwasi na Ye ya Libala Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá., ntango ya Jeffersonville, mpe koyanola na mituna: 64-0830E Mituna Mpe Biyano #4.  Nalingi kobianga bino bósangisama na biso.  Ezali mokáno oyo okoyoka na yango mawa ata moke te.

 Ndeko.  Joseph Branham

24-0512 MITUNA MPE BIYANO # 3

Nsango: 64-0830M MITUNA MPE BIYANO # 3

BranhamTabernacle.org

Molingami mwasi ya libala Ngondo Peto,

 Boniboni nalingaka kolendisa bino póso na póso kofina Play mpe koyoka Mongóngó ya Nzambe mpo na mokolo na biso.  Mpo nayebi Ezali Manáka ma Nzambe mabongí be mpo na mokolo ya biso.

 Ezali te oyo Joseph Branham alobi to andimi.  Ezali oyo Mongóngó ya Nzambe  mondimisami eyebisi biso:

 Nazali Mongóngó ya Nzambe epai na bino.

 Soko ozali na emoniseli ata nini ya Etindá oyo, eteni moké moko wana ya Liloba esengelaki kokoka mpo na yo koyebisa moto nyonso oyo okutani na ye;  mondimi nyoso, bóyebisa mangomba na bino, Mongóngó wana ezali Mongóngó ya motuya koleka OSENGELI KOYOKA.

 Kokanisa ete, Maloba mpenza toyokaka ntango Tofinaka Play nde Mongóngó ya Nzambe koloba na biso mbala moko.  Tata asalaki ete étiama na bande mpe ébómbama na ntina ete tókoka Kofina Play na sekónde moko na moko ya mokolo na mokolo; ete tóyóka Ye koyikisa biso mpiko, kopambola biso, kopakola biso, mpe kobengana nsómo mpe ntembe na biso, nyoso kaka na nzela ya Bofináká Play.

 Nyoso tozali na yango bosenga kaka na ntango wana, Finá Play, mpe yango wana.  Azali wana mpo na kokundolela biso TOZALI LILOBA.  Azali elongó na biso, zingázingá na biso, KATI NA BISO.  Satana azali mobángisi.  Alóngámí.  Eloko moko te ekoki kolongola Liloba wana longwá na biso.  Nzambe apesaki biso Yango na nzela ya boyébaká na Ye makambo liboso, koyeba ete tozali Mwasi na Ye ya libala.  Tozalaki elongo na Ye útá ebandeli.

 Mongóngó nini nde tokokaki koyoka oyo ekozala monene koleka Mongóngó sé moko mondimisami na Likonzí ya Móto kozala Mongóngó ya Nzambe?

 Mongóngó mosusu mozali te.

 Mongóngó wana eyebisaki biso nini póso eleki?

 Nasengaka bino ntango nyoso, mpe yango lokola ndeko na ngai mobali mpe mwasi.  Bozali bana na ngai;  Na—Nazali tata na bino kati na Nsango Malamu, tata te lokola ekozala nsángó, Nazali—Nazali tata na bino kati ya Nsango Malamu lokola Paulo alobaki kuna.  Nabótí bino epai na Klisto, mpe sikawa, Na—Nabálisi bino na Klisto;  yango nde kobandisa bino na Klisto lokola ngondo peto. Bóyókisa ngai nsóni te! Bóyókisa ngai nsóni te!    Bótikala ngondo peto.

Esengeli totikala ngondo peto na Liloba, Mongóngó wana.  Mpo na biso, ezali kaka na NZELA MOKO ya kondimisama tozali kosala yango: KOFINA PLAY.

Soko bondimi ngai kozala oyo bolobi, mosali ya Nzambe, mosakoli, bóyoka oyo nazali koyebisa bino.  Bomoni?  Bokoki ntango mosusu kozala na makoki ya kososola yango te, mpe soko bokoki te, na boye bósála kaka oyo nayebisi bino bósála.

 Ee, ezali na mibali mosusu bapakólámí na Molimo Mosanto, mpe na nzela ya ngolu mpe mawa ya Nzambe, Nabondeli Nazali moko ya mibali wana.  Nandimi ete Nabiangamaki na Ye  kobatela Liloba na Ye liboso na bino mpe kotálisa bino na Etindá oyo, Liloba ya Nzambe, Mongóngó wana.

Lokola Petelo alobaki, nakozala te na bozangi kotia motema na likambo kotia bino ntango nyonso na ekaniseli ete ezali KAKA MONGÓNGÓ MOKO Nzambe abiangaki komonisa Liloba na Ye epai na ye.  Mongóngó Moko Nzambe andimisaki.  Mongóngó moko oyo Nzambe alobaki, “Boyoka Ye.”  Mongóngó moko Nzambe alobaki, “Nazali Mongóngó ya Nzambe epai na bino.”

Bomikanisela oyo na motema na bino mobimba: Bótikala na Liloba wana!  Bótika Liloba wana te!  Eloko nyoso ekeseni na Yango, tikáná na yango, Ézala ata nini.  Na bongo oyebi ete ezali alimá

Nasosoli mpenza mpo na nini Nasósolamaka mabe mingi mpe ete basúsu bayokaka ete Natémelaka batéi nyonso;  ete Nandimaka ete moko te asengelaki koteya.  “Soko oyoki motéi mosusu longola sé Ndeko Branham, ozali Mwasi ya Libala te.”  Lokola Nalobaka yango mbala mingi, Natíkálá koloba bongo to kondima bongo soki moké te.

 Mosakoli alimbolaki yango malamu mpenza mpóso eleki mpenza lolenge Nayókaka mpe Nandimaka.

Ezalaki ata na mangomba koleka misato mosusu ya Etindá na Jeffersonville mpe nzingánzingá na ntango Ndeko Branham azalaki awa.  Na losambo ya Lomíngo loleki, alobaki ete babáteli ya mboka na mboka penepene bazalaki wana te na losambo ya mpokwa.  Bazalaki na losambo ya bango moko ya mpokwa.  Na bongo, bayokaki te ete baya koyoka Ndeko Branham mpo na losambo ya mpokwa, kasi kozala na losámbo na mangomba na bango.  Yango ezalaki mokáno na bango mpe oyo bayokaki kokambama  kosala, mpe Ndeko Branham andimaki.

 Lelo oyo ezali naino na mangomba mingi na kati ya Jeffersonville mpe nzingánzingá.  Bango mpe basengeli kosala lokola bayóki kokambama na Nkolo kosala.  Soko bayókí te ete báyóka ba bande, lokúmu na Nkolo, bazali kosala oyo bayoki bakambámí kosala, mpe yango nde basengelaki kosala.  Bazali kaka naino bandeko na biso mibali mpe basi mpe balingaka Etindá oyo.  Kasi tosengeli tósala oyo toyókí tokambámí kosala: Kofina Play.  Tolingi koyoka mosakoli.

Kaka lokola Ndeko Branham asalaki na sánzá ya Mwambe mokolo ya 30, 1964, Nabiangi bino boya komíbakisa na biso na 12:00 nsima ya nzángá ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka lisusu mosakoli komemela biso Liteya: 64-0830M Mituna Mpe Biyano #3.

 Ndeko.  Joseph Branham

24-0505 MITUNA MPE BIYANO # 2

Nsango: 64-0823E MITUNA MPE BIYANO # 2

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Liloba Oyo abongi be,

Tozali na biso kozila kaka Boyei ya Nkolo.

Kobatela miinda mia biso mipetwi, mitóndí kotonda na mafuta, koyoka Liloba limónisami mói na butú.  Kati  na mabondeli, ngonga nyoso; mokolo nyoso te, ngonga nyoso. Tozali na biso kaka komilengela na botikalaká na kati mpe bondimáká LILOBA NYOSO.

Tozali kotalela, ntango nyoso, baoyo bazali kolala kati na putulú ya mabelé bálamuka liboso. Kati na mwa ntango, tokomona bango; ba tata, ba mamá, mibáli, basi, bandeko babali mpe bandeko basi. Bango wana, batelemí libosó na biso mpenza. Tokoyeba na ntango yango, tokómí, ntango eyéí. Kondima ya Konetolama ekotondisa bomoto, makanisi mpe nzoto ya biso. Nsima nzoto iye ya kopola ikoláta kozanga kopola kati na Ngolu ya konetolama ya Nkolo.

Na nsima tokobanda koya elongó. Biso baoyo tozali na bomoi mpe totikali tokobóngwana. Nzoto iye ya kufa ikomóna kufa te. Na pwasa, ekozala lokola nde eloko moko kokómba koleka likoló na biso…tokobóngwana. Longwa na mpaka mobali kino elengé mobali, longwa na mpaka mwasi kino na elengé mwasi.

Nsima moké, tokozala kotambola lokola likanisi elongo na baoyo basili kosekwa. NA NSIMA…NKEMBO…tokomemama na bango elongo kokutana na Nkolo na mipepe.

Ntango nini yango ezali koya mpo na biso. Monguna AMEKAKA ko bóla biso na nsé ntango nyoso, na bolózí ya mabánza, mpe kolemba na motéma, kasi Nkembo na Nzambe, akoka te. Tozali na Emoniseli ya koyeba Azali NANI; Atindakí nani kobianga biso kobima, tozali Banani, ezali te tokozala banani, kasi TOZALI BA NANI. SIKAWA Etiami lóngo kati ya BOMOTO, MOTEMA mpe MOLIMO na biso, mpe eloko moko te ekoki kolongola yango na biso. Toyebi Boniboni? Nzambe Alobaki bongo!

Oyo ezali ezalelo ya biso te, ezali nyoso ya yo, Satana, okoki kozala na yango. Tolingi ata ndambo na yango te mpe tosengeli na yango lisusu te. Tozali na Ezalelo Ekoya esilaki kotongama mpo ya biso. Mpe tólobaka naino, zábolo, tosili kokata ntina, EBÉLEMÍ Botongi bosili. Misala miké mia bosúkisi mikokí na esika yango. Mpe nazali na nsango lisusu mpo na yo, NOKI MPENZA, Azali koya kozua biso mpo tókoka kozala na mibú 1000 ya bosepeli makwéla bozángí kotémisama elongó na Ye, mpe obiangámí te, mpe okozala kuna te.

Makambo ya nkembo nini oyo Etindá oyo ezali komonisa biso ntango nyoso to Finaka Play. Nzambe Ye moko Akitáki mpe Alobaki na nzela ya bibebú ya moto na ntina ete Akoka koyebisa biso makambo manso maye. Aponaki biso mpe Apesaki biso Emoniseli ya solo mpe MOBIMBA ya Ye moko.

 Azalaki Liloba likómí mosuni, ezali te Liloba ya mokolo ya Mose, Mose azalaki na mokolo wana, Liloba; ezali te Liloba na mokolo ya Noa, Noa Azalaki Liloba mpo ya Mokolo wana; Ezali te mokolo…Liloba mpo ya mokolo ya Elia, Elia Azalaki Liloba yango mpo ya mokolo yango; kasi Azalaki Liloba na eleko beébeé, mpe bazalaki kobika na nsima.

Bobelemí?…Yang’oyo eyei. Ezali poké etóndi mbala mibale mpe etóndi bozitó meké, mpe tolingí Yango mingi mpenza!!

Eloko yango moko ezongeli! Nde elembetele ya Molimo Mosanto, ntango Nzambe amónisí yo mpe omóni yango, ELOBI NKOLO mpe oyambi yango. Ezali te oyo ezali yo, oyo ezalaki yo, to eloko moko te na ntina na yango, ezali nde oyo Nzambe asalí mpo na yo sikawa. Elembetele yango wana.

 Aleluya, Akótisi losété na kati. Sikawa tika ete tóyoka Ye kokangisa Yango.

Apesi biso elembetele ya Molimo Mosanto, Yoane 14. Alobaki: “Nazali na makambo mingi ya koyebisa bino, Nazali na ntango te ya kosala yango, kasi wana ekoya Molimo Mosanto, Akoyebisa bino, koyeisa na ekaniseli na bino makambo mayebisaki ngai bino, mpe Akoyebisa bino lokola makambo makoya.” 

Bozali komona te? Elembetele yango wana. Oyo wana nde koloba libosó mpe kozala…kozala na ndimbola ya Bonzambe  ya Liloba likomámí. Sikawa, oyo wana te nde elembetele ya mosakoli?

Molimo Mosanto nde mosakoli ya eleko moko na moko. Azali mosakoli ya eleko ya biso. Liloba likoyaka BOBELE epai ya mosakoli wana. Ezali Nzambe koloba mpe komimónisa na nzela ya mosakoli na Ye. Azali Liloba mpo ya mokolo. Etindá oyo, LIKOLÓ NA BANDE nde ndimbola ebongi be ya Liloba, na bondimisami ya Bonzambe.

“Wana oyo Ebongí be ekoya, oyo nyoso ezali ya ndambo ekolimwa.” Na bongo biloko nyos’oyo mikémiké ya kopumbwa likoló na nsé lokola mwana, komeka kosolola minoko ya sika, mpe biloko bisúsu biye binso, wana oyo Ebongí be…Mpe lelo tozali na, na nzela ya lisungi ya Nzambe, ndimbola ebongí be ya Liloba na bondimisami ya Bonzambe!

Na boye nyoso ya ndámbo-ndámbo esili kolimwa. “Wana ezalaki ngai mwana, nalobaki pelamoko mwana, Nasósólákí lokola mwana; kasi esilí ngai kokóma moto mobimba, Nabwaki makambo manso ya bo mwana.” Amen!

Oyo ebongi be esili koya; ndimbola ebongi be ya Liloba. KOFINA PLAY. Nde nyoso Mwasi na Ye ya libala asengeli na yango, mpe nyoso alingí.  

Boya mpe bó Fina Play elongó na biso Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, mpe bóyoka LILOBA LIBONGI BE ELONGO NA NDIMBOLA EBONGI BE, NA BONDIMISAMI YA BONZAMBE wana ezali biso koyoka:

Mituna Mpe Biyano # 2- 64-0823E

Ndeko Joseph Branham

24-0428 MITUNA MPE BIYANO # 1

Nsango: 64-0823M MITUNA MPE BIYANO # 1

BranhamTabernacle.org

Balingami bayoki ya Bande,

Nakoki kaka koloba yango na koleka te, ezali na ELOKO TE ya monene koleka koyoka Mongóngó ya Nzambe koloba na biso na nzela ya mwanje motindami na Ye oyo andimisami mpo na mokolo na biso.  Emoniseli nsima ya Emoniseli Nkolo azali komonisa biso.  Ezali na nsuka te na Yango.  Liteya moko na moko ezali lokola toyokaki Yango naino te.  Ezali Liloba ya Bomoi, Manna ya sika, Bilei bibómbamáki bia Nzambe mpo na Mwasi na Ye ya libala, mpe nyonso oyo tosengeli kosala ezali KOFINA PLAY.

Toyoki nyoso na ntina ya Konetolama NA BISO oyo ekoya noki.  Tozali kokende…GLORY, TOZALI KENDE na Lipati ya Libala.  Abongisaki BISO liboso kozala Kuna na boyebi na Ye makambo liboso, mpe ezali na eloko moko te ekopekisa yango.  Liloba awa lisangani na moto, mpe bango mibale bakomi Moko.  Ezali komonisa Mwana ya moto.  Liloba mpe Lingomba bakómí Moko.  Nyoso Mwana ya moto asalaki, Azalaki Liloba, Lingomba lisálaka eloko yango moko.

Yambo nakóba, okoki kolinga kotanga yango lisusu!!  Ndenge nini tokoki kotika zábolo akitisa biso?  Koyoka oyo tozali kotalela.  Koyoka tozali ba nani.  Koyoka oyo ezali koleka SIKAWA.

 Tozali kokende wapi?  Na Lipati na BISO ya Libala oyo tobongisamaki liboso na ntina na yango na nzela ya boyebi na Ye makambo liboso, epai wapi BISO, Liloba na Ye mpe Lingomba, tokomi MOKO ELONGO NA YE, mpe nyoso Mwana ya Moto Asalaki, TOSALAKA ELOKO YANGO MOKO!!

Na nsima toyokaki nyonso na ntina ya Ezalelo ya Biso Ekoya.  Nzambe Mobongisi asali Engumba ya BISO ya Sika, epai wapi Akofanda na BISO, Mwasi na Ye ya Libala. Atongí Yango mpe Atii eloko nyoso ya moke kaka mpenza na mpósa na BISO;  kaka oyo Tolingaki kosepela na yango.  Epai wapi ekozala na bosenga ya pole te, mpo Mwana na Mpate akozala Pole na biso.  Epai wapi mosakoli akofanda pembeni na ekuke ya biso;  akozala mozalani na biso.  Tokolia longwá na banzete wana, tokotambola na balabala wana ya wolo tii na Etóko mpe tokomela.  Tokotambola na ba paladíso ya Nzambe, na Banje kopumbwapumbwa likolo ya mabelé, koyemba ba nzémbo.  Nkembo!  Aleluya!

 Kokokisa Liloba na Ye epai na biso;  Ye, Likonzí ya Móto, asalaki ete elílí na Ye ézuama elongo na mwanje na Ye motindami kotálisa mpe koyebisa mokili, “Boyoka Ye.”  Esengeli te totia ntembe na Liloba moko, mpo Ezali liloba ya mosakoli te, Ezali Liloba ya Nzambe lilobámélí Mwasi na Ye ya libala.  Na nsima Ayebisaki biso, tozali na etáliseli útá na bobongisami liboso, kondimisa biso.  Amonaka biso te, Ayokaka kaka mongóngó na biso na nzela ya Makila ya Yesu.  Tobongí be na miso na Ye.

 Bozindo bozali kobianga bozindó lokola naino soko moké te, mpe Tata azali kotondisa biso na Liloba na Ye limónísámí.  Eloko nyoso tosengeli koyeba etiamaki na bande mpe epesami na BISO.  Ezali kaka na nsuka te na Etíndá oyo Liloba ya Bomoi.  Ezali na eloko moko te monene koleka koyeba TOZALI Mwasi na Ye ya Libala.  Bondimisami ezali koyeba ete koyoka Mongóngó wana, Kofina Play, ezali Mokano mwa Nkolo mobongí be;  Manáka ma Ye Apesaki.  

Ezali na mingi mosusu ezali koya!  Ezali Liloba liyebi kokauka te ya Mai ma Bomoi mpo na Mwasi na Ye ya Libala.  Totíkálá naino kozala na mpósa makasi boye libosó Soki moké te na bomoi na biso mobimba, kasi tozwá naino bopémi ya boye soki moké te wana ezali biso komɛla mpe komɛla nyonso tolingi.

 Lomingo moko na moko, Mwasi ya libala asepelaka mingi koyangana elongo na eteni ya Mwasi ya libala útá na mokili mobimba, koyoka Akomónisa nini nsima.  Ayebisaki biso soko tokoki koya awa na Eyanganelo te, kokende na losambo esika moko boye;  tókende na yango.

Tokokí te biso banso koyangana elongo na ezalelo efándí mosakoli;  esika na ye ya mosala epai wapi atiamáki, kasi tokoki kobongola mangomba na biso, to Bandako na biso íkóma bandakonzambe, epai wapi totii ye na etéyelo.  Epai wapi tokoki koleisama na LILOBA LIBONGI BE BOBELE LOLENGE LIMÓNÍSÁMÁKÍ.

Ezali na bokutani bonéne te, bopakolami bonéne te, esika monene te ya kozala koleka kofanda elongo na bisika ya Likoló, koyokaka Mongóngó ya Nzambe.

Nabiangi bino boya koyoka Mongóngó ya Nzambe mondimisami elongo na biso Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola azali koloba na biso mbala moko lisusu na nzela ya mwanje na Ye motindami, mpe azali koyanola mituna nyonso tozali na yango na mitema na biso, mpe kondimisa biso ete  tozali Mwasi na Ye ya Libala.

 Ndeko.  Joseph Branham,

 Liteya ya mokolo mwa Lomingo: Mituna Mpe Biyano #1  64-0823M

An Independent Church of the WORD,