Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
October 24, 2026
Mituna Mpe Biyano #1 64-0823M
Nazali moteoloji te; ntina wana, Nasengeli kolakisa nyoso Nayebi na ntina ya Biblia longwa na bililingi mpe bilembetele. Bino ezali lokola bobiangaka ngai molakisi uta na bililingi. Kasi soko Nakoki kotala na etutu wana, mpe Natikala komimona te; mpe Natali, Nakoki komona ete Nazali na moto, mpe matoi, mpe maboko, mpe…Nayebi eloko moko likolo na oyo Nakoulana na yango ntango nakomimona, ndele. Bomoni? Soko Namoni elembeteli na ngai kati ya tala-tala, Nayebi Nalingaki koulana na nini soko Nakokaki kotelema pembeni mpe komitala.
Sikawa, nde lolenge Nakanisaka mpo ya Biblia. “Makambo nyoso oyo,” Baloma 26 elobaki, “makomami mpo ya ndakisa na biso.” Tokoki kotala nsima mpe komona oyo ezalaki, pelamoko sanza kotalisa mwese. Toyebi oyo mwese ekozala, ntango, soko tomona naino mwese soki moke te, tokoki komona sanza, mpe komona ete ekozala monene koleka wana. Na bongo, ntango bomoni oyo ekomaki na Kondimana ya Kala, ezali bobele etaliseli ya oyo ekomi na oya Sika.
Lipa Ya Mokolo Na Mokolo
Makomi manso mapesami na mpemela ya Nzambe, mpe masengelami na yango mpo ya malakisi, mpo na mpamela, mpo ya kosembolama, mpo ya boyekolisami kati na boyengebene:
2 Timote 3:16