Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
October 19, 2026
Boklisto Kotemela Losambo Ya Bikeko 61-1217
Tozali kati na elílíngí na Ye…Tozali bililingi ya bomoi ya Nzambe ya bomoi. Nsima, tokufi kati na biso moko, tosekwi elongo na Ye, sikawa boyoka, boyoka oyo, Liloba na Ye likomi mosuni lisusu kati na biso. (Oo, Ndeko Neville!) Botala! Ezali nini? Ezali Nzambe ya lisapo te, ya mabanza te oyo afandi libanda kuna, kasi Nzambe ya bomoi. Nzambe ya bomoi nde nini? Liloba kati na yo, komisala likambo yango mpenza. Whew! Nkembo na Nzambe! Oo, Nayebi bokanisi Nazali motuntuki, ntango mosusu Nazali yango. Kasi, oo, ndeko, omoni yango? Kolonga ebongiseli nyoso, kolonga bopagano nyoso, Nzambe na bomoi amimonisi kati na tempelo ya bomoi, mpe Liloba na Nzambe, oyo ezali Nzambe, ekomi mosuni kati na yo. Mpo na nini? Ofandi kati na bisika ya Likolo, osili kolonga makambo nyoso, kati na Klisto Yesu. Amen!
Lipa Ya Mokolo Na Mokolo
Boyebi nde te ete nzoto na bino izali binama na Klisto?
I Bakolinti 6: 15