Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
October 15, 2026
Kondima Ezali Bosóló 51-0508
Nzóto na bisó izali kosúma, mpe tozali na libulá. Mpe tozali bana sikawa, basangoli na libulá ya Bokonzi (Óo,oo.), bakonzi mpe banganga epai na Nzambe kopesa mbeka na molimó.
Nganga asálaka nini? Kosála mbeka. Mbek–mbeka nde nini? Yango nde bana mibali mpe bana basi oyo basálaka, baoyo bazali mikonzi mpe banganga, naino bazuí libulá mobimba te, kasi bazali kosala mbeka, Kopésa Nzambe mbeka: mbuma ya bibebú na biso kopesa masanzoli epai na Ye (Amen.), mbuma ya bibebu na biso.
Olobi, “Ndeko Branham, Nazali koyoka káka te lokola nde Násánzola Ye.” Nde ntango ya kosála mbeka. Sánzólá Ye ata ko bongo. Mikonzi mpe banganga, bana mibali mpe bana basi kopesa mbeka ya molimo, mbuma ya bibebu na biso, kopesa masanzoli na Nkombo na Ye.
Lipa Ya Mokolo Na Mokolo
E masanzoli na Nkolo, bino nyoso mabota: bokumisa ye,bino bato nyoso.
Nzembo 117:1