Eténi Ya Liloba Ya Mokolo

Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
October 16, 2026

KOFÚNDAMA 63-0707M

Bafúndaki Ye boni? Mpo ete bindimeli na bango bilingaki koyamba Ye te, mpe na nsé kati na motéma na bango bayebaki likambo likeseni. Nikodeme, kati na mokapo ya 3 ya Yoane, alobákí nde yango polélé te? “Labi, bisó, Bafalisai,” batéi, balakisi, “toyébí ete Ozali molakisi otindamí útá na Nzambe, zambí moto moko te akokákí kosála misálá mizali yo kosála bobélé ézala ete Nzambe Azalaki na ye elongó.”Bomóní? Batátolaki yango polélé na nzela ya moko na bato na bangó ya lokúmu, mpe kokákatana na mitéma…zambí mpo ya bindimeli na bango, babákáki Klisto na Ekulúsu.

Mpe lelo ezali na motángi moko te oyo azangi kotánga Misálá 2:38 loléngé moko Nakoki kotánga Yango, mpe oyo etikali na Yango, bobélé lokóla Nakoki kotánga Yango. Kasi mpo na bindimeli na bango mpe mpo ya ba tiké na bango oyo bazali na yango na libenga na bango, bilembo ya nyama bazali komema lokola kálati ya bondeko; mpe na bozuáká bilóko wana, bazali bango moko kobakisa Yesu Klisto na ekulúsu mbala mosúsu, mpe bazali kobáka Ye na ekulúsu libosó ya bato, mpe kotika Nzambe mpenza Oyo Alakáki kosála Oyo, koyeisa ekwéiseli likoló ya libota.

Lípa Ya Mokolo Na Mokolo

Ayaki epai na bato na Ye moko, nde bato na Ye banyangeli Ye te.
Yoane 1:11

An Independent Church of the WORD,