Eténi Ya Liloba Ya Mokolo

Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
October 14, 2026

Mabulú Matobwání 65-0123

Sikawa Liloba ya Nzambe lizali lokóla monyolólo, ozali koleka likoló ya lifelo elongó na Yangó; mpe monyolólo na yangó mozali malámu na yangó koleka bobéle na ekanganeli na yango ya bolembú koleka, mpe Nzambe Alingí tóbatela Liloba moko na moko na Yangó. Sikawa yango ezalaki ya libosó ya Biblia; bobéle kobúka Liloba moko; , ezindísáki libóta ya moto kati ya molílí ya kúfa.

Yesu Ayaki katikáti ya Biblia, mpe Alobaki ete, “Moto akobika bobélé na kwanga te, kasi na Liloba nyoso.” Bobélé ndambo ya Maloba te, to ntúkú libwá na libwá likoló ya mokámá; kasi Liloba nyoso, bobélé lokóla Adama na Ewa bazalaki.

Mpe kati na nsúka ya Biblia, Emóniseli 22:18, Alobaki ete, “Ye nani akolongola Liloba moko na Oyo, to kobakisa liloba moko na Yango!”
Boye mpo na nini tolingi kokótisa na kati Awa makanisi ya moto moko boye ya makambo, nzókandé oyo ezali Likanisi ya Nzambe Ye moko na ntina na yango?

Lipa Ya Mokolo Na Mokolo

Zambi Liloba na Nzambe lizali na makasi, mpe na nguya, mpe na mopotú koleka mopánga mopeli na bipái nyoso mibalé…
Baebele 4: 12

An Independent Church of the WORD,