Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
October 13, 2026
Bomokó 62-0211
Bisó oyo awa kati na ntango ya nsuka, kouta longwa na Ebimelo ya ntango mpe Elimwelo ya ntango, Likolo na Ngele. Tozali kosala nini? Komilengela na Konetolama. Komilengela mpo na…Komitemisa ngwi mpo na mwa minuti kino mosisa moko na moko etondisami na Molimo Mosanto. Na bongo Akomata. Oo, oo! Kobianga bato na Ye elongo epai na Ye moko, kati na bomoko ya solo elongo na Ye moko, mpo ete ezali Molimo Mosanto moko. “Na Molimo moko tobatisami biso nyoso moto na moto kati ya nzoto moko, nyoso esika moko Nzoto ya Yesu Klisto.” Mpe Yesu Klisto kobika na Molimo na Ye kati ya mosuni ya biso, Azali kosalela Lingomba mpe kosala makambo yango moko masalaki Ye, lokola el–elembo, lokola elembeteli epai na mokili, ete tozali kati na mikolo ya nsuka, komilengela mpo ya Konetolama. Oo, Nalingi Ye, bino te?
Lipa Ya Mokolo Na Mokolo
Na mwa ntango mokemoke, ya kobweta liso, wana ekoyula kelelo ya nsuka: zambi kelelo ekoyula, mpe bakufi bakosekwa na kozanga kopola, mpe biso nyoso tokobongwana motindo mosusu.
I Bakolinti 15:52