Eténi Ya Liloba Ya Mokolo

Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
October 12, 2026

Ozali Koyóka Nini Eliya? 59-0412E

Ezali ntango nyoso te makambo ya makeléle nde makambo minéne. Ezali makambo ya makeléle te. Likalo likoki kokende kati ya elanga; ntango ezángi mokúmbá ekotúta mabakú, okoyóka lokóla nde bibendé bizali kotútana-tutana, ekosála makeléle mingi, ekozóngela nzela yango moko ya mabakú wana etóndí na bilóko bilámu, mpe ekobimisa ata makeléle ya moké te. Mpo na nini? Etondi na mikúmbá. Oyo lingómbá lisengeli na yango na mpókwa oyo ezali kotónda na mokúmbá, kotónda na bolingo ya Nzambe.

Mói mokokï kobénda milió ya ba lítele ya mái na makeléle moké koleka ndéngé bisó tokokí kobénda kópo mokó na pópi. Ezali sóló. Likol–likoló likokí komwángisa mamwe na mabelé na makeléle te koleka ndéngé okoki kopolisa matíti ya libosó ya lopángo na yo. Ezali mpenza bongó. Osili oyóká ndèle milongo kozunguluka? Makambo minéne nde makambo ya kimiá.

Bótála Molimó Mosanto wana Ezali kokóta na mpókwa oyo, boni Ezali kokómisa nyoso kimiá. Kasi tozali nsima ya biyókeli ya nzóto, kopota nsima ya mwa makambo, kozanga koyoka Mongóngó yango.

Lipa Ya Mokolo Na Mokolo

Kasi NkólóAzali kati na tempelo na Ye ya bule: tiká ete mabelé manso mázala nyé libosó na Ye.
Abakúku 2:20

An Independent Church of the WORD,