Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
October 11, 2026
Komeka Kobánza 62-0408
Osengéli kozala na etumba. Soko makambo nyoso mayéi na petee, goigói, na bongo, ozali, ozal–ozali kolónga nini? Balóngáki na Liloba ya Nzambe mpe litatoli na bango, Makilá ya Klisto.
Osengéli kolónga elóko moko, mpe osengéli kozala na bipekiseli. Mpe bato baoyo bakeseni, mpe batíí yo gbélélé, mpe bayébisí yo ozali motúntuki, mpe makambo ya ndéngé wana, yo, oyo etiámi libosó na yo, ezali emekeli. Sokó ozali na yango te, na bongo ozali kútu kati na etumba te.
Omibakisi na Lingómbá mpo…? Omibakisi na Mapinga mpe opesámi boyekoli mpo ya nini? Kofánda bobéle mpamba opémi na yo, kokende matá-kitá na balabála, mpe komitálisa? Nde loléngé Baklisto mosúsu babikaka, ete tolingi bato bátála bisó na lokúmu. Okotalama na lokúmu te, okotalama nde lokóla moto mpámba ya nse, “Zambi bango nyoso bakobikaka sembo kati na Klisto Yesu bakonyókolama.” Lokótá Mopánga, kátá nyoso longwá na yo ózala sómí, mpe kóbá kokende libosó.
Lipa Ya Mokolo Na Mokolo
Óbunaka etumba malámu ya kondima, ósimba bomoi na Sékó, epai wapi mpe obiángami…
I Timote 6: 12