Eténi Ya Liloba Ya Mokolo

Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
October 10, 2026

Yobo 55-0223

Nzambe azali kosálá makambo nyoso elongó mpo ya bolámu ya bango balingí Ye, na bongo okobúngisa nano ndéngé nini? Okoki na yo káka te kobúngisa; nzela ezali te ya kobúngisa. Lingómbá likokákï na yangó káka koyéba yango. Sokó okokáki kozua esíká na yo kati na Klisto, nsima makambo masúsu manso maye malingaki kolimwa lokóla elilingí. Moto nyoso oyo ayéi epai ya Nzambe, ezali sóló, osengélí kozala na bililingí na yo, mpe komekama, mpe nsómo, mpe bongo na bongó, kasi kopanza mayéle te mpo na yangó. Mwa koyóka mpasi mpo ya mwa ntango nde nini, koyéba ete nkémbo ya Nzambe ekomónisama na mikolo ya nsúka ntango Yesu ayéí, wana ekozala bisó pelamokó na Ye? Azali bobélé kosála makambo nyoso elongó. Oyebákí nde ete, ntango mosúsu bokono, likambo moko likómélákí yo, ezali nde ete Nzambe Akokákí kosengela kosála yangó káka koyéisa yo mwa pene na Ye koleka?

Lipa Ya Mokolo Na Mokolo

Zambi sikawa tozali kobíka, sokó botélémï ngwí kati na Nkóló
1 Batesaloniki 3:8

An Independent Church of the WORD,