Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
October 9, 2026
Ebandeli Mpe Nsúka Ya Eleko Ya Mabótá 55-0109E
Danyele azíkísákí bgabga nyoso nsima na ye. Azalaki te komibongisa kozónga nsima, lisúsu. Azalaki te kotála nzela nsima na ye. Azalaki kotala, kobóya makambo maleká. Apúsákí likoló ya elembo ya ebiángeli ya likoló. Yango nde tosengélákí kozala kosála. Nde oyo Lingómbá lisengélákí kozala kosála.
Mpe lokola Nazali kotála, na nsima, Nzambe alingísáki Satána ámeka ye. Mpe, óo, bamekákí bango, na móto. Bamekákí bango, mpe lokóla, na libúlu ya ba nkosi. Mpe na likambo moko na moko, Nzambe abimísáki bango, koleka balóngi.
“Mingi izali mimekano ya moyégebene, kasi Nzambe Akangolaka ye na yangó nyoso.“ Boni ezalí bikamwa! Boni tosepelaka na yangó. Bitumba, minyókó, mpe komekama, nyoso kosála mpo ya bolámu! Nsima ya mwa ntango, Nzambe akokí na bongó komóna ete Akokí kotiela yo motéma, na nsima Akosála makambo minéne mpo na yo.
Lipa Ya Mokolo Na Mokolo
Kasi ntango tosámbisámí, tosémbólámí na Nkóló, ete tókwéisama te na mokili.
1 Bakolinti 11:32