Eténi Ya Liloba Ya Mokolo

Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
October 8, 2026

Kondimisama Nsima Kotia Likambo Na Motéma 62-0118

Batéi babiángámí. Basakoli, mpe balakisi, mpe bapalanganisi ya Nsano Malámu, mpe babáteli, mpe bongó na bongó, bazuaka Molimó Mosanto, na nsima likabo ya kosala makambo oyo na yango.

Kasi Nzambe azalaka te na mwa bana miké to bana mikóló minéne. Nyoso bazali bana epai na Ye. Ezali sóló mpenza bongo. Mpe esíká alimá na yo ezali kofánda sikawa kati na bisíká ya Likoló káti na Klisto Yesu, na nguya moko na moko.

Okoloba, “Ndeko Branham, Nazali ya moké kati na lingómbá. Nazali na ngai bobélé mwa moto moké.“

Kasi, míkanísélá, ematáki Ye na Likoló, bomóní, osékwí elongó na Ye. Ozalí kati na Nzóto. Mpe ozali elongó na Klisto sikawa, ofándi na bisiká bilekí Likoló. Sokó ozali mposo ya linyatá ya makaká, molimó mabé nyoso azali na nsé na yo. Ezali sóló. Sóló mpenza. Lingómbá! Epái motó mozalí, nzóto ezali elongó na yango. Mpe sokó tokundámí, tokúfí, tokundámí káti na Klisto, boye tosékwí elongó na Ye kati na Lisékwa na Ye, mpe tofándí kati na bisíká na Likoló kati na Klisto Yesu, na mótó nyoso ya ewélo na nsé na bisó. Amen. Sóló. Atá ózala moké bóní, molimó mabé nyoso azali na nsé na yo.

Lipa Ya Mokolo Na Mokolo

Na bongo bózala balandi na Nzambe, lokóla bana balingami;
Baefese 5:1

An Independent Church of the WORD,