Eténi Ya Liloba Ya Mokolo

Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
October 7, 2026

Nkisi Kati Na Giláda 61-0218

Kasi míkanísélá, ndeko, ete etíndá esengéláki koningisa mbóka to koningisa lingómbá. Luká te elóko moko boye ya monéne kokita na bilekelo ya káti. Etindá ya Nzambe ekozala mpenza epai ya Lingómbá liponámí. Bilembo mpe bikamwiseli oyo bikosálema soki moké te libosó na mokili; bisengéláki te kozala.

Mokonzi ya Kopanyé ya Wiskí Four Rose, mwasi na ye azalaki…Azali moko ya Mi–Missionary Alliance. Mpe azaláki na moko ya makita; abiángáki Ndeko Bosworth, oyo azalaki Missionary Alliance moko, mpe alobaki, “likambo na yango, ezali ete, bozali kotika te likabo wana lisála libándá.” Alobáki, “Oyo Namónaki lobi na mpókwa esengélákí esálema na mbóka minéne mpe bongo na bongo, ya ekólo, na bongo,” alobaki, “elingáki kobóngola–komema mokili mobimba na Boklisto.” Kasi, bomóní? Etíndámí te na mbóka mikonzi ya bikólo. Bomóni? Etindáméli Lingómbá liponámí. Bomóní, bozali te…

“Óo,” balobí, “tíá nkómbó na yo likoló ya bilembo binéne binéne mpenza, mpe bétá misisá ya bisíka binene; kendé na televizió.” Ebongisamáki te mpo na yango. Natindamáki bobélé epái na binó, lingómbá, mpe nde nsúka. Sikawa, yo ndimá yango na motéma na yo nyoso.

Lipa Ya Mokolo Na Mokolo

Ete Ákoka kotálisa yango epái na Ye moko lingómbá ya nkémbo, na litónó te, to liyútá, to elóko ata nini mabé; kasi ete bázala bule na kozánga mpámélá.
Baefese 5:27

An Independent Church of the WORD,