Eténi Ya Liloba Ya Mokolo

Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
October 6, 2026

55-1116 Kobiángama Ya Abalayáma

Sikawa, bótála oyo Nzambe Asáláki mpo ya bisó kati na Klisto. Nzambe amonanáki kati na mosuni, Amatisáki Mwana na Ye Mokó na Kalvari, mpe kúná Abomakí Mwana na Ye Mokó na ekulúsu ya Kalvari kosála kondimana na libóta ya moto. Mpe ntango Asaláki yangó, Abákáki Ye na nsété na ekulúsu, mbeka oyo ekúfá, ezaláki yangó, mpe Abéndákí longwá na Ye Molimó Mosanto. “Kati na mabóko ma Yo Natíkí Molimó na Ngai,” Makilá kotanga útá na mopanzí na Ye, na matándú mpe makáká na Ye. Mpe Nzambe Abimisáki Molimó longwá na Ye, mpe Abwákákí nzóto na liyíta, Asékwísáki yango mokolo ya mísáto, mpe Atiáki yangó na lobóko na Ye ya mobáli, mpe Azóngisákí eténi ya boyókani oyo etíkáláki epai ya Lingómbá, oyo ezaláki Molimó Mosanto yango moko ezaláki likoló na Klisto koyá likoló ya Lingómbá. Mpe nzela bobélé mokó kati na mokili tokokoka ndéle kolónga na Mokolo ya Kosámbisama ezali mpo ya Molimó Mosanto yangó moko, oyo azaláki likoló na Yesu Klisto, akosengela kosangana, lokóla Mwasi na Ye kati na Nzóto. Amen.

Lípa Ya Mokolo Na Mokolo

Mpo ete Nzambe alingáki mokili mingi, na motindo boye ete Apésáki Mwana na Ye na likindá, ete moto na moto oyo akondima ye ábébisama te, kasi ázua bomoi na sékó.
Yoane 3:16

An Independent Church of the WORD,