Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
September 23, 2026
Yo Mwana Na Dawidi Yókelá Ngai Mawa 61-0215
Nzambe ayébisáki bango kúná na Ejipito, “Napésí binó mokili wana.” Kasi Alobákí te, “Nakobima Kúná mpe Nakokómba nyoso, mpe kobongisa ba ndako, mpe kokakemisela bínó ba lidó, mpe makambo nyoso. Binó nyoso bókóta na binó káka.” Te, te. Basengéláki kobunda mpo na satimétele ya mabelé nyoso bazuákí. Ezali sóló, kobuna, mpe kozua yango na moko na moko…kobuna na satimétele moko na moko. Kasi Alobákí, “Esiká nyoso manyatá na binó makonyata, yangó nde bozui.” Manyatá nde bozui.” Nde elóko yango moko ezali lelo. Lobiko na maláli koúta na Nzambe ezali ya bisó. Ezali bozui ya bisó. Molimó Mosanto azali ya bisó. Ezali bozui na bisó’ kasi okobunda satimétele moko na moko na yango. Ee, mobali. Kasi ndeko, manyatá ezali ete ozuí yangó. Kóbá bobélé kobuna. Zuá yangó. Molimó mabé akoloba, “Mikolo ya bikámwiseli mileká.”
Lobá, “Lokutá. Nzambe alobáki ete Azali loléngé moko lobí, lelo, mpe libélá.” Zuá yango bobélé kozua. Epái nyoso linyatá na yo linyatí, nde bozui. Sóló.
Lípa Ya Mokolo Na Mokolo
Mpe Nkóló Yawe Nzambe na binó, Akobengana bangó longwá na libosó na binó, mpe Akotángola bangó longwá na libosó na miso na binó; mpe bokokamata mokili na bangó…
Yosua 23:5