Eténi Ya Liloba Ya Mokolo

Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
September 26, 2026

Koyóka Nsóni 65-0711

Moto oyo asi akutanáki na Nzambe mbala moko, oyo Azali Liloba, mpe Liloba Akomáki polélé mpe Amonisamáki na ye, likambo ya nsóni awa ezali te mpo na yangó. Ozali moto ya kozinda na nsóni te mpo na yango. Oyóki nsóni te. Epésaka ngai nsóni te koloba ete Nandimi Liloba nyoso ya Nzambe. Epesaka ngai nsóni te ntango Nkóló ayebisi ngai Naloba likambo ata nini, kende koloba yango mpe kosála yango; epésaka ngai nsóni te koloba ete Natondisami na Molimó Mosanto; epesaka ngai nsóni te koloba ete Nasolóláki minoko mosúsu; epesaka ngai nsóni te koloba ete Nkóló na bisó Amónisi ngai bimónoneli; epesaka ngai nsóni te koloba ete Azali lolengé moko lobí, lelo, mpe libélá.

“Ntango boyéisami libosó na mikonzi mpe mikóló, mpo ya ntina na Nkombó na ngai, bóbánzabanza te soko bokoloba nini, zambi ekopesamela binó na ngonga yango mpenza. Ezali bino koloba te, kasi Tatá na ngai oyo Azali kofanda kati na bino. Kasi ye nani akoyókela ngai nsóni mpe Liloba na Ngai, kati na libóta oyo, ye mpe Nakoyókela nsóni libosó na Tatá na Ngai mpe Banje na Ye na bule.” Nzambe sungá bisó tózala na nsóni te, kasi sungá bisó tózala litatoli ya bomoi.

Lipa Ya Mokolo Na Mokolo

Na bongo bózala na nsóni te na litatoli na Nkóló na bisó, soki mpe te na ngai mokangami na ye…
2 Timote 1: 8

An Independent Church of the WORD,