Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
September 27, 2026
Koyamba Likabo Ya Nzambe 53-0219
Nakanisi mokolo moko ntango Natáláki kúná likoló mpe Namónáki oyo Asáláki mpo na ngai, Nabéndanáki kokende epái na Ye. Kuna Atiaki nkómbó na ngai likoló ya búku moko, mpe, óo, oyo ekomámáki na nsé na yango. Nalobáki, “Nkóló, Okolímbisa ngai?”
Mpe emónani lokóla, Azuáki mabóko na Ye, Azindisáki na mopanzí na Ye, mpe Alobaki, “Ee.” Mpe Akomáki likoló ya búku, “Olimbisámi,” Akangaki yangó, mpe Atiáki yango na nsima kati na ebale ya kobósana. Nakómá moto ya esengo bandá wana. Nazali komeka nyoso na ngai ya malamu na nzela na ngai ya komísókisa koyebisa mokúfi nyoso na mabelé: “Yesu Klisto Alingi yo, mpe Azali eloko sé moko oyo ezali kopekisa kándá ya Nzambe likoló na yo. Yambá Ye lokóla Mobikisi na yo moko.”
Mpe ntango osáli yango, sikawa, Ye oyo–mpe Azokisamáki na mokongo, “Na mapipí na Ye tobikisámí. to tobikisamáki,” ezali te tokobikisama, tosílí tobikisamáki. Moto nyoso abikisamáki. Mpe sikawa, eloko bobélé moko osengéli kosála, ezali kondima yango naino kati na motéma na yo libosó ete ókoka koloba yango. Soko ozali bobélé koloba yango na mbebu na yo, ekosálela yo malámu moko te.
Lipa Ya Mokolo Na Mokolo
Tiká ete moto na kanza átangwa na nzela mabe na ye, mpe mozangi boyengebene makanisi na ye: mpe tiká ete ázonga epái na Nkóló, mpe Akoyókela ye mawa; mpe epai ya Nzambe na bisó, zambi Akolimbisa mingi mpenza.
Yisaya 55: 7