Eténi Ya Liloba Ya Mokolo

Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
September 22, 2026

Ntángo Ya Mokáno 59-0418

Mpe bókanisa, Lebeka, naino eyébáki ye te likambo lizaláki ye kosála, amelísáki nyama yango moko, Kamela, oyo esengélaki komema ye epái na mobali na ye ya libála, epái na mobáli na ye, molingi na ye. Mpe ntango nyoso nyama ya komema míkúmbá kati na Biblia etálisaka nguya. Lokóla nyama kobima na mái monéne kati na Emóniseli, ezalaki nguya oyo ebimáki kati na bato.

Mpe nyama oyo ezaláki komelisama. Lebéka komelisa nyama yangó moko oyo amatáki na yango kokende, oyo ememáki ye kolongwa na esíká na ye awa kino na ezalelo na ye ya sika, ezali elilingi ya Lingómbá lelo, komelisa mpe kopámbola Molimó Mosanto yango moko oyo Akomatisa Yango na ezalelo na Yangó ya sika. Lingómbá oyo ezali kosánzola mpe kopámbola mpe komelisa na bozóngisáká matondi epai ya Molimó Mosanto Oyo Amemí Liloba epái na bino…

Lipa Ya Mokolo Na Mokolo

Na nsúka ete nkémbo na ngai ekoka koyémba masánzoli epai na yo, mpe ézala nye te. E NKÓLÓ NZAMBE na ngai, Nakozóngisela Yo matondi libelá.
Njembo 30:12

An Independent Church of the WORD,