Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
September 21, 2026
Kozila Na Etíngiá 61–0205M
Natángáki na ntina na Abraham Lincoln, moto monéne ya epai ya Ngelé, oyo abimáki na masúwa kúná na New Orleans, mpe amónáki bangó baómbo kúná na kati ya libúlú ya bosoto, kotéka mobáli monéne, mobali monéne ya mbinga ya moto moindo. Mpe mwa mobólá na ye ya mwasi atélémáki kúná na bana mibalé miké, bazaláki kolela, mpo bazalaki koteka ye kosanganisa ye na mwasi mbinga ya nzóto kolóngónú kosála baómbo ya minéne. Abraham Lincoln asémbóláki ebotú na ye lokóla bongo, mpe alobáki, “Ezali mabé. Mokolo moko Nakobéta yango, soko ekolongola bomoi na ngai.” Esáláki yango, kasi abétáki yango. Abúkáki yango, mpe lokola.
Bótika Náyebisa binó, ndeko, kozanga kondima eúti na zábolo. Tiká ete Nábéta yango Nkóló. Etáli ngai te soko ekolongola bomoi na ngai. Tîká nábúka elóko wana longwá na likoló na lingómbá, bipekiseli nyoso wana, mpe bongo na bongo, ete tókoka komóna, bisó, na nzela ya Molimó moko, tobátisámi bisó nyoso kati na nzóto moko, mpe tozali Baklisto. Tozali bandeko. Moto ázala ya Lingómbá ya Nzambe mpe názala ya ba Assemblies, mpe oyo awa ya ba Batisiti, to ya ba Presiteria; tozali bandeko, nde oyo tozali, nde oyo tozali, tozali bandeko kati na Klisto. Tóbúka yango. Kobúka bipekiseli nyoso oyo na nsé. Tokoki kosémbola mabóko na bisó epai ya ndeko nyoso.
Lipa Ya Mokolo Na Mokolo
Zambi na nzelá ya Molimo moko tobátisámí bisó nyoso kati na nzóto moko, tózala Bayúda to Mabóta, tózala baómbo to ba nsómi; mpe tosalámi bisó nyoso komela longwá na Molimo yango moko.
1 Bakolinti 12 : 13