Eténi Ya Liloba Ya Mokolo

Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
September 20, 2026

Kondima Ezali Elónga Na Bisó 58-1004

Zalá na kondima. Bobélé kondima ya kotepatepa te, bobélé kondima ya nkómbó te, kasi kondima mpenza.

Sikawa, kondima ezali mokonzi, kondima ezali molóngi. Ezali na yango káka te mo–mokakoli mpo ya kimia. Elóngaka. “Kondima nde Elónga oyo elóngaka mokili.” Esálaka nini? Kondima nde nini? Nini nde, “kolónga”? Kokonza mpe kolónga ezali elóko moko. Kokonza, elingi koloba, “Kokwéisa na nsé; kokonza; kokanga bibendé na mabóko; kobwáka na bolóko.” Elingi koloba lisúmu oyo mbala moko ekonzáki yo, okonzí yango sikawa. Elingi koloba olóngi yango. Ozali…Obéti yango fimbo. Olekí yango na monéne.

Lipa Ya Mokolo Na Mokolo

Molóngi akosangola bilóko nyoso…
Emóniseli 21:7

An Independent Church of the WORD,