Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
September 19, 2026
Bóyóka Ye 56-0930A
Elóko moko etíkali te, lokola Nazali komóna kati na—na Liloba ya lisakoli, elóko moko etíkálí to elóko moko kopekisa koyá ya Nkóló Yesu Klisto na ngonga oyo mpenza, likambo moko etíkálí te kati ya Biblia. Nyoso ekokisámi, kozila sikawa koyá ya Nkóló Yesu. Mpe tosengéláki tósála motindo nini nsima ya nzángá oyo? Tosengéláki koloba mpe kosála makambo lokóla nde oyo ezali ngonga ya nsúka mpo ya bisó kozala na yango ndéle. Mpe nani nde ayébí soki bobélé te oyo ekokí kozala. Ekokí kozala mpo ya ba moko na bisó, ekokí mpe kozala mpo ya bisó nyoso. Kasi tósála lokóla nde ezalaki ngonga na bisó ya nsúka. Tóbóndela lokóla libosó naino soko moké te. Tiká ete tózala lipámboli epai ya basúsu, mpe tómeka kosála oyo tokokí; mpo bókanisa, ete oyo nde ntango sé moko tozali bato ya kokúfa.
Bándá oyo kokóba, bándá na ntango tolongwí na mokili oyo, mpe tokozala soki moké te na libakú ya kozua molimo moko mpo ya Nkóló kati na mokili oyo kuna. Oyo esengéli kozuama ekozuama sikawa mpenza. Mpe soko oyo ekokí kozala ngonga na bisó ya nsúka na bongo tosengéláki tósála nini na ngonga oyo?
Lipa Ya Mokolo Na Mokolo
Ye Oyo Azali kotátola makambo oyo Alobí, Sóló NAzali koya nokí. Amen. Bobélé bongo, yáká, Nkóló Yesu.
Emóniseli 22:20