Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
September 18, 2026
Bwanyá Kotémela Kondima 62-0401
Nzambe akokáki kopámbola Sete te kino esilaki Ye kokabola ye na Kaína. Atiáki elembo likoló na Kaina mpe Atíndáki ye na mokili na Noda. Mpe Kaina na bwanyá na ye ya kopanza makita, akómáki nganga zébi mpe elóko ata nini mosusu, akólisáki nkóná na yango. Mpe Sete, na nsé ya boyengebene na ye, mpe bolingo na kondima kati na Liloba ya Nzambe, akónáki nkóná oyo ebótáki mosakoli oyo akébisaki mikolo ya nsúka, ezali sóló, abíkísáki mondimi nyóso. Mpe bwanyá ebebisáki moko na moko na bango. Bango nyoso, moko na moko , bakúfáki. Bango nyoso, ézala mapolóme to bolembeteli ya boni bazalaki na yango, basúsu nyoso na bango, bakúfáki kati na kosámbisama ya Nzambe.
Mpe eloko nini libándá ya Molimo Mosanto ya Nzambe, oyo ebótámi mbala ya mibalé, oyo andimi Liloba moko na moko na Yango mpe atélémi mpenza na Yango, ekokúfa kati na kosámbisama ya Nzambe. Bomóni badendi-dendi nyoso oyo bazali kokita na bala-bála, mpe kowayawaya nyoso wana, mpe kowaya-waya lolénge bazali kowaya, bokanisa, ezali na eloko mosúsu te kasi libóndo ya matíti kozila kosámbisama. Ekopola. Ekosengela kopola. Ekangami bobélé esiká moko mpo na yango. Basi, bólamuka.
Lipa Ya Mokolo Na Mokolo
Mpe libosó na Ye mabóta nyoso bakoyángana: mpe Akokabola ba moko na ba mosúsu, lokóla mobateli akokabolaka ba mpate na ye longwá na ba ntaba:
Matái 25:32