Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
September 17, 2026
Kobúlisama Ya Litongi Epái Na Nkóló 59-0708
Komítúna ezali te lelo mpo ya nini lingómbá ya nzóto likokí te kondima kati ya bikamwiseli. Batikálá te koya na esiká ya bikamwiseli epai wapi bazali na bopémi elongó na Nzambe. Ezaláki na esika língénda ya Alóna litówáki, elóko moko oyo ekúfákí. Mpe lingénda ya kala ya kokaoka elokótámáki na lisóbé kati na esíká eleki bule ezuaki bomoi ya sika, mpe etówáki, ebimáki ya sika kobima, mpe ebimisáki nkásá. Lolengé nini? Ezalaki kolála na esiká elekí bule.
Okoki kozua mosúmuki oyo akúfi, apolí, moto ya mosuni kati ya makanisi mpe kati ya mabánza na ye molobi mabé na nguya ya Nzambe, mpe yéisá ye libosó ya Bozali ya Molimó Mosanto, ekozala na elóko moko ekokómela ye. Ezali sóló. Kokóta na esiká yango moto yo moko na Nzambe…”Afándaka,” elobí Mose na mokapo molandí , “kati ya molílí tuu.” Nde esiká Nzambe Afándaka. Nde esiká bomoi ezalaka. Ezali na kati ya kopola ya kopola. Bomoi efandaka wapi? Kati ya mombóto nsima na yango kopola. Ntango emíkúfeli kati na yango moko ekoyéisa bomoi ya sika.
Nzambe afándaka wapi? Akoumela elongó na yo sokó obelémí kokúfa kati na yo moko mpe kopesa Ye makoki yango: mosálá: mayéle ya bongó: molimó, makanisi; bomoto kondima na yo kati na Nzambe: ndáko ya biténi misáto.
Lipa Ya Mokolo Na Mokolo
Bóbélema epai ya Nzambe, mpe Akobélema na binó. Bópétola mabóko ma binó, bino basúmuki; mpe bópétwisa mitéma, binó bato ya makanisi mibalé-mibalé.
Yakobo 4:8