Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
September 16, 2026
Mokúfi Míso Batimáyo 54-0402
Bókó bato bamamáki elambá ya Yesu mpe babíkáki. Basúsu babétéki Ye mbatá na elongi mpe babéteki Ye na njeté likoló ya motó, mpe babwákeláki Ye nsói na elongi na Ye, bayóká nguya ata ndambo soki moké te. Ezalaki lolengé ya bangó ya kobélema. Etál–etáli loléngé na yo ntango ozali kokóta. Soko oyéi kondima ete ozali koya kozua lisungí mpe oyéi wana otíi motéma ete oyéi epai ya Moto yango mpenza, Yesu Klisto, mpe ozali koyela nzela na Ye epésámi mpo ya kobélema, okozua elóko moko sókó nde oyéi na limemiá. Sókó oyéi, “Boye, Nakokende komama mpe Námóna sokó ekosunga ngai,” ekosála malámu moko te ata boni. Bomóní? Ezali kobel–ezali kobelema na yo na likabo ya Bonzambe ya Nzambe nde esálaka yango.
Bobélé lokóla nyóka ya Motáko. Na bongo, nyóka ezaláki na nguya moko te kati na yango; ezaláki eteni ya motáko bakokáki komema yango koúta na Ejipito. Soki mpe te ezaláki bato na nguya moko kati na yango, ata ndambo te. Kasi ezaláki kotósa oyo Nzambe alobáki bósála, nde oyo eyéisákí nguya, oyo eyéisáki mabongi, ezali botósi na Liloba ya Nzambe. Mpe nde likambo yango moko na pókwa oyo.
Lipa Ya Mokolo Na Mokolo
Sikawa na bongo botélema mpe bómóna likambo monéne oyo, oyo NKÓLÓ akosála libosó na míso na binó.
1Samwele 12 : 16