Eténi Ya Liloba Ya Mokolo

Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
September 24, 2026

Makási Mabongí be Na Nzela Ya Bolembú Bobongi Be 61-1119

Mpe, ndeko, ezipelo ya ewélo elongwí. Ezali sóló. And, brother, the lid’s come off of hell. That’s right. Mpe bitíma ya ngúya ya milímó mabé bizali kosopana longwá na bisíká nyoso. Esí ekonzí bikólo. Ekonzí politíki kino epoli kopola tíí na kati. Ekonzí mangómbá kino bayébí elóko mosúsu te kasi ebongiseli.

Olobi, “Ozali Moklisto?”

“Nazali Metodisiti.”

“Ozali Moklisto?”

“Nazali—Nazali Pentekoste.”

Yango ekeséní te, lokóla Nalobákí mokolo mosúsu na, kozala ngúlu, to ngulúbe, to mpúnda, to elóko moko boye. Ezali na likambo moko te kosála na Yango. Ozali Moklisto ntango obótámí mbala ya mibalé mpe otóndisámí na Molimó Mosanto, libosó na yango te, mpe omíkabí mobimba na Molimó. Soko omikabí na Molimó te, na bongo obótámi mbala ya mibalé te mpe ozali na Molimó Mosanto te.

Lípa Ya Mokolo Na Mokolo

Mpe Nakopésa mokili etúmbu mpo na mabé na bangó, mpe bato na kanza mpo na misálá na bango na nkóo…
Yisaya 13:11

An Independent Church of the WORD,