22-0327 Kotelema Na Katikati

Nsango: 63-0623M Kotelema Na Katikati

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Basembwi,

Ndambo ya ba poso oyo eleki ezalaki ntango na Nkembo ya koleka na bomoi na biso mobimba. Ezalaki moko na na likambo monene ya koleka koyangana elongo na Mwasi na Ye na Libala zingazinga na mokili, koyoka Nzambe komonisa Bilembo Sambo.

Toyanganaki biso nyoso elongo koyoka nini?

“Na kati na Piramidi wana, ezalaki na Libanga pembe oyo ekomamaki likolo na yango te.” Nde ntina esengelaki nakende na Elimwelo nan tango, kokutana na Etinda ya Banje oyo, kozonga awa komungola Yango epai na lingomba.

Asengelaki akende na elimwelo nan tango kokutana na Bange yango 7, kozonga komonisa biso Oyo ekomamaki kutu te; kasi sikawa, na nzela ya Emoniseli, emonisameli biso mpe ezali kopesa biso Kondima ya Konetolama.

Toyokaki Mateya oyo na bomoi nab iso mobimba, kasi emonisameli biso sasaipi ndenge esalemi nano liboso te; sasaipi ezali mokolo, sasaipi ezali ntango. Tozali komono mpe koyoka oyo Ayebisaki biso ekokoma, nyoso kati na mokili mpe kati na Etinda oyo, mpe ezali sasaipi komonana na miso na biso mpenza.

Mwanje na biso ya sambo azalaki nde kaka mosakoli lokola basakoli na kala? Te, abengamaki nae sika moko ya likolo koleka basakoli mosusu nyoso liboso na ye. Mpo Ezalaki Mwana na Moto komimonisa Ye moko kati na mosuni na moto ndenge moko asalaki esili koleka mbula 2000.

Mosakoli na biso abiangamaki ko KAMBE MWASI NA LIBALA na molai na nzela kino na Ndako na biso ya sika, mpe akokoka kolakisa biso epai na Nkolo.

Alobaki na biso ete lotómo na ye ekokanaki na elilingi ya bomoi na Mose mpenza-mpenza. Wana ezalaki Mose na mobembo na ye kolandaka Likonzi na Moto, bato batelemaki mpe batelemelaki ye. Mibali oyo babengamaki mpe bazalaki na nzela na bango kokende na mokili na elaka. Batelemelaki Mose na bolobaka ete azalaki komimona mingi; azalaki kaka ye moko nde mosanto te, bango mpe bazalaki basanto mpe bazalaki na makoki ya koteya eloko moko.

Alobaki ete bazalaki bato basanto, mpe ete ya solo bazali na eloko moko ya kosala, kasi Nzambe abiangaki YE, MOSE, MOTO MOKO, kokamba bato.

Bazalaki na esika na bango. Bapakolamaki. Bazalaki kosala oyo babengamaki mpe babongisamaki kosala na boyebisaka bato, “boyoka Mose”, kasi balingaki koloba ELOKO MOKO KOLEKA, TO KOLIMBOLA OYO MOSE AZALAKI KOLOBA. Basepelaki te kaka kolakisa bato koyoka Mose. Balingaki kokamba bato. Balingaki kosala eloko moko ya koleka, to oyo ekeseni, koleka oyo bapesamaki lotomo kosala.

Soko esili kokomela yo kobeta ntembe soko mosakoli na biso azalaki nani, to oyo abengamaki kosala, nazali kopesa yo mbela ete okende na elimwelo nan tango kotala kotandana ya ngomba oyo Nzambe Ye moko asalaki lokola elembo ya seko na seko awa na mabelé, na botiaka nkombo ya mosakoli na biso, B-R-A-N-H-A-M, likolo na ngomba wana.

Bino bozali Mwasi ya Libala ya Yesu Klisto. Aponaki mpe Abongisaki bino. Liloba na Ye ezali kobika mpe kofanda kati na bino. Bozali Liloba na bomoi ekomi mosuni. Apesi bino Emoniseli ya Liloba na Ye. Satana azali na nguya te likolo na bino. Kondima wana ya Konetolama ezali kobika mpe kofanda kati na bino.

Molimo Mosanto Azali kokamba Mwasi na Ye na Libala na nzela naYe kaka moko epesami mpo na lelo, Liloba na Ye elobami na nzela ya mosakoli na Ye mwanje na sambo. Mosakoli yango azali mobateli na biso.

Mobateli na biso alakaki biso ete bande nyoso ya sika ekouta naino na Ndako ya ebombelo, kino Nkolo Akobongola yango. Mpo ete wana nde ba bande ya kobombama ekosalema.

Apesaki mpe lilako epai na mobateli na ye mokitani, Ndeko Neville, mpe sasaipi na nzela na Ngolu na Ye, ngai moko, tokokaki kosala nini kati na losambo.

Nazali kobondela ete osunga mobateli na biso molingami, Ndeko Neville. Zalisa ye, Nkolo, kotonda na ngolu mpe kotonda na nguya, mpe na lisosoli, ete akoka kozwa Bilei oyo ebombami mpe aleisa bam pate na Nzambe.

Ba bande oyo ezali mpo na baoyo mosakoli abiangamaki kobatela. Soko bokolinga koyoka YANGO ELOBI NKOLO, boya koyoka elongo na biso Mokolo mwa Lomingo na nzanga, ntango ya Jeffersonville, Kotelema Na Kati-Kati 63-0623M, wana ekoyoka biso Bilei bibombamaki oyo epesameli Mwasi na Libala.

Tokobanda Liteya na molongo ya 27.

Ndeko. Joseph Branham