Eténi Ya Liloba Ya Mokolo

Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
October 4, 2026

Komeka Kobánza 62-0117

Moto moko alobákí, mokolo mosúsu, alobákí, “Ndeko Branham, bato bazuaka yo lokóla mosakoli. Mpo ya nini mpenza ozali kozánga kolakisa bato wana loléngé ya kozua makabo ya molímó? Tiká na yo makambo ya kopámela moláto ya basi mpe motindo mibali bazali kobíka. Lakisá bango makambo minéne, ya bozindó, ya Molimó.” Ozali na likambo ya kosála na yango te.

Nalobákí, “Nalakisa bangó mitúya makási makási boni, ntango bayébí ata ABC te?” Nápésa bango malakisi ya etéyelo ya likoló boni; naino balongwí kútu na kelási ya bana miké te? Bazali naino ata na loléngé ya bomoto te ya komítósa komípétola bino moko mpe kosála makambo lokóla Baklisto, mpe koláta lokóla Baklisto, mpe kobíka lokóla Baklisto, na nsima solólá na ntina na makabo ya molimó. Bóbima na etéyelo ya bana miké. Bazali kobánza ete ezali malámu, nzókande ezali mabé. Bosengéláki kosála yango te. Binó ba mamá bosáláki yango te, ezalákí bino kati na ki Pentekoste elekí ba mbúla mingi. Kasi bazali kosála yango.
Mpe bino mibáli, boni bozali kotélema, kotika basi na binó kosála yango? Bozali naino na etéyelo ya bana miké. Bomóní? Ezali sóló. Bozali koméka kobánza ezali malámu, kasi ezali bongo te.

Lípa Ya Mokolo Na Mokolo

…bozala kati na bizaleli lokóla kokóma na bosanto.
Tito 2: 3.

An Independent Church of the WORD,